Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 9
Judg LinVB 9:1  Abimelek, mwana wa Yerubaal, akei o Sikem epai ya bandeko ba mama wa ye mpe epai ya banoko ba ye. Alobi na bango :
Judg LinVB 9:2  « Bokende kotuna bakolo ba mboka ba Sikem : Eloko nini eleki malamu o miso ma bino ? Bolingi kozala na bakonzi ntuku nsa­mbo, banso bana ba Yerubaal, to bolingi kozala na mokonzi moko ? Boyeba ’te ngai nazali na bino makila moko ! »
Judg LinVB 9:3  Bandeko ba ye bayebisi bakolo ba mboka ba Sikem bobele maloba mana manso. Balingi se Abimelek, balobi : « Azali ndeko wa biso ! »
Judg LinVB 9:4  Bapesi ye mitako mya palata ntuku nsambo iye bazwi o tempelo ya Baal-Berit. Abimelek akamati myango mpe afuti bato ba mpamba mpe ba mobulu mpo balanda ye.
Judg LinVB 9:5  Na nsima akei o ndako ya tata wa ye o Ofra, mpe abomi bandeko ba ye, bana ba Yerubaal, bato ntuku nsambo o libanga se lyoko. Ebiki bobele Yotam, mwana wa nsuka wa Yerubaal, zambi amibo­mbaki.
Judg LinVB 9:6  Na nsima bakolo ba mboka banso ba Sikem na Bet-Milo basangani likita penepene na wenge eye ezali o Sikem, mpe baluboli Abimelek mokonzi.
Judg LinVB 9:7  Bayei koyebisa likambo lyango na Yotam. Yotam atelemi o nsonge ya ngomba Garizim mpe agangi : « Boyoka ngai, bankumu ba Sikem, mpo ’te Nzambe ayoka bino.
Judg LinVB 9:8  Mokolo moko nzete ya zamba ikei mobembo mpo ya kopono mokonzi. Balobi na nzete ya oliva : ‘Zala mokonzi wa biso !’
Judg LinVB 9:9  Nzete ya oliva ezongisi : ‘Bolingi natika kopesa mafuta makosepelisa banzambe na bato, mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’
Judg LinVB 9:10  Na nsima balobi na nzete ya figi : ‘Yaka, zala mokonzi wa biso !’
Judg LinVB 9:11  Nzete ya figi ezongisi : ‘Bolingi natika kobimisa nsolo mpimbo mpe natika kobota mbuma elengi mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’
Judg LinVB 9:12  Na nsima balobi lisusu na nzete ya vino : ‘Yaka, zala mokonzi wa biso !’
Judg LinVB 9:13  Nzete ya vino ezongisi : ‘Boli­ngi natika kopesa vino ekosepelisa ba­nzambe na bato mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’
Judg LinVB 9:14  Na nsima nzete inso ilobi na nzete ya nzube : ‘Yaka, zala mokonzi wa biso !’
Judg LinVB 9:15  Mpe nzete ya nzube ezongisi : ‘Soko ya solo boyei na motema malamu mpe bolingi kolubola ngai moko­nzi wa bino, boya koluka esika ya malili penepene na ngai. Kasi soko bolingi bongo te, móto mokobima o nzete ya nzube mpe mokozikisa sédere ya Libano.’
Judg LinVB 9:16  Boluboli Abimelek mokonzi na mayele malamu mpe na motema moko, solo ? Ya solo, bosalaki Yerubaal na libota lya ye lokola ekoki na mosala mwa ye ?
Judg LinVB 9:17  Tata wa ngai abunelaki bino, mpe andimaki kokufa mpo ya kobikisa bino o maboko ma ba-Madian,
Judg LinVB 9:18  kasi bino botomboki na libota lya ye, bobomi bana ba ye ntuku nsambo o libanga se lyoko ; bokomisi Abimelek, mwana wa moombo wa ye, mokonzi wa bakolo ba Sikem, zambi azali ndeko wa bino.
Judg LinVB 9:19  Soko bo­salaki bongo na bosembo, mpe na motema moko solo, soko bosalaki Yerubaal na mpe libota lya ye malamu, bozala na esengo mpo ya Abimelek, mpe ye azala na esengo mpo ya bino.
Judg LinVB 9:20  Kasi soko ezali bongo te, móto móbima o Abimelek mpe mósilisa bankumu ba Sikem na Bet-Milo ; móto móbima mpe o bankumu ba Sikem na Bet-Milo mpe mósilisa Abimelek ! »
Judg LinVB 9:21  Yotam alongwi mpe akimi o Beer ; akei kofanda mosika na ndeko wa ye Abimelek.
Judg LinVB 9:22  Abimelek azalaki mokonzi wa Isra­el mibu misato.
Judg LinVB 9:23  Na nsima Nza­mbe abebisi boyokani kati ya Abimelek na bakolo ba Sikem, bongo bakolo ba Sikem baboyi Abimelek.
Judg LinVB 9:24  Ebongo­ki ’te Abimelek azwa etumbu mpo ya bana ba Yerubaal ntuku nsa­mbo abomaki, mpe makila ma bango ma­kwela Abimelek, oyo abomaki ba­ndeko ba ye, makwela mpe bakolo ba Sikem, baye basalisaki ye na bobomi bandeko ba ye.
Judg LinVB 9:25  Bakolo ba Sikem ba­tindi bato o kati ya ngomba mpo ’te ba­bombama mpe babotolo biloko bya bato banso bakoleka kuna ? Bato ba­yebisi Abimelek mpo yango.
Judg LinVB 9:26  Gaal, mwana wa Obed, aleki o Sikem elo­ngo na bandeko ba ye, mpe bakolo ba Sikem batii mitema na ye.
Judg LinVB 9:27  Mokolo moko bakei o bilanga kobuka mbuma ya vino. Bakamoli mbuma bazwi, nsima balengeli limpati. Bakei o te­mpelo ya nzambe wa bango, balei mpe bameli ; nsima batombeli Abimelek bobe.
Judg LinVB 9:28  Gaal, mwana wa Obed, agangi : « Abimelek nde nani o Sikem mpo ’te akomisa biso baombo ba ye ? Ebongoki te ’te Abimelek, mwana wa Yerubaal, na kapita wa ye Zebul basalela bato ba Amor, tata wa Sikem ? Bongo ntina nini biso tosalela ye ?
Judg LinVB 9:29  Soko nazalaki mokonzi wa bango, mbele nakokimisa Abimelek o ngwende mpe nakoloba na ye : Luka basoda ba­susu mingi, na nsima tobunda biso na yo ! »
Judg LinVB 9:30  Zebul, moyangeli wa mboka, asiliki ntango ayoki maloba ma Gaal, mwana wa Obed.
Judg LinVB 9:31  Atindeli Abimelek bantoma na bonkutu mpo ’te bayebisa ye boye : « Gaal, mwana wa Obed, ayei o Sikem elongo na bandeko ba ye ; bazali kosala ’te bato ba mboka batombokela yo.
Judg LinVB 9:32  Yango wana na butu boye kamata bato ba yo mpe kende kobombama o esobe.
Judg LinVB 9:33  Na nsima soko ntongo ekomi kotana, lo­ngwa kuna mpe pota mbangu epai ya mboka. Soko Gaal na bato ba ye bayei kozwana na yo, sala na bango lokola okoki. »
Judg LinVB 9:34  Bongo Abimelek, elo­ngo na bato ba ye, bakei na butu kobo­mbama penepene na Sikem ; bato ba ye bakabwani na mampinga manei.
Judg LinVB 9:35  Gaal, mwana wa Obed, abimi o ezibeli ya mboka, esika atelemi. Abimelek na bato ba ye babimi o esika babombamaki.
Judg LinVB 9:36  Emoni Gaal bango, alobi na Zebul : « Tala bato bazali kokita ngomba. » Kasi Zebul ayanoli : « Ozali komono molili mwa ngomba mpe okanisi ’te ezali bato. »
Judg LinVB 9:37  Gaal alobi lisusu : « Tala bato bazali kokita ngomba ‘Litolu lya Mokili’, mpe basusu bazali kouta epai ya ‘Wenge ya banganga nkisi’. »
Judg LinVB 9:38  Zebul alobi : « Obo­sani nde maloba ma yo : Abimelek azali nani mpo ’te tokoma baombo ba ye ? Okinolaki bango te ? Kende kokutana na bango sikawa mpe bu­nda bitumba. »
Judg LinVB 9:39  Gaal abimi elongo na bakolo ba Sikem mpe abundi etumba na Abimelek.
Judg LinVB 9:40  Kasi akoki te mpe aki­mi. Abimelek alandi ye. Bato ba Gaal mingi bakwei mpe bakufi liboso ’te bakoma o ezibeli ya mboka.
Judg LinVB 9:41  Abimelek akei kofanda o Aruma, mpe Zebul abengani Gaal na bandeko ba ye, apekisi bango bafa­nda o Sikem lisusu te.
Judg LinVB 9:42  Mokolo mwa nsima bato balo­ngwi o mboka mpe bakei o esobe ; bayebisi Abimelek likambo lina.
Judg LinVB 9:43  Akamati bato ba ye mpe akaboli bango na mangomba masato, bakei kobo­mbama o bilanga. Emoni ye ’te bato bazali kobima o mboka, akei kobu­nda na bango mpe alongi bango.
Judg LinVB 9:44  Abimelek elongo na lingomba lya bato ba ye, akei mbangu epai ya mboka mpe atelemi o ezibeli ya mboka ; mamgomba masusu mabale makei kobunda na baye bazali o esobe mpe babomi bango.
Judg LinVB 9:45  Mokolo mobimba Abimelek abundi na bato ba mboka ; abotoli mboka, abomi bato banso. Abomi mpe mboka mpe abwa­keli yango mongwa.
Judg LinVB 9:46  Eyoki bakolo ba Migdal-Sikem nsango ena, ba­nso bakei kosangana o mobenga mozali o nse ya tempelo ya El-Berit.
Judg LinVB 9:47  Bayebisi Abimelek ’te bakolo banso ba Migdal-Sikem basangani kuna.
Judg LinVB 9:48  Bongo Abimelek abuti ngomba Salmon elongo na bato ba ye. Akamati soka, akati eta­pi ya nzete, atomboli yango mpe atii yango o lipeke lya ye ; alobi na bato ba ye : « Bomoni ndenge nasali, bino mpe bosala bongo noki. »
Judg LinVB 9:49  Bato ba ye banso bakati etapi mpe balandi Abimelek. Babwaki byango penepene na mobenga mpe batumbi byango likolo lya mobenga esika bato bazalaki. Bato banso ba Migdal-Sikem bakufi, bazalaki soki nkoto yoko, babali na basi.
Judg LinVB 9:50  Na nsima Abimelek akei epai ya Tebes, azingi mboka mpe abotoli ya­ngo.
Judg LinVB 9:51  O kati ya mboka linongi litongami makasi esika babali, basi na ba­kolo banso ba mboka bakimaki. Bakangi ezibeli nsima ya bango mpe babuti epai ya likolo.
Judg LinVB 9:52  Abimelek asili akomi pene na linongi mpe abandi etumba ; ntango akomi penepene na ezibeli ya linongi mpe alingi kotu­mba lyango,
Judg LinVB 9:53  mwasi moko abwakeli ye libanga linene mpe apasoli ye mo­tó.
Judg LinVB 9:54  Abimelek abengi noki ele­nge mobali oyo amemi bibuneli bya ye, alobi na ye : « Bimisa mopanga mwa yo mpe boma ngai mpo ’te bato baseke ngai te na bolobi ’te : Mwasi moto abomi ye. » Mosali wa ye atuboli ye, mpe akufi.
Judg LinVB 9:55  Eyoki bato ba­nso ba Israel ’te Abimelek akufi, bazongi o mboka ya bango.
Judg LinVB 9:56  Nzambe azongiseli Abimelek ma­be asalaki tata wa ye awa abomaki bandeko ba ye ntuku nsambo.
Judg LinVB 9:57  Azongiseli bato ba Sikem mabe manso basalaki. Bongo esalemi na bango se lokola Yotam, mwana wa Yerubaal, atombelaki bango bobe.