Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 7
Judg LinVB 7:1  Na ntongontongo Yerubaal, ye nde Gedeon, na bato ba ye banso balongwi wana mpe bakei kopika nganda o En-Karod. Nganda ya ba-Madian ezalaki o Nordi ya bango, o esobe penepene na ngomba More.
Judg LinVB 7:2  Yawe alobi na Gedeon : « Bato ba yo baleki mingi mpo ’te nakaba ba-Madian o maboko ma bango. Mbele ba-Israel bakomikumisa esika ’te bapesa ngai lokumu mpe bakoloba : Tobiki na bokasi bwa biso moko !
Judg LinVB 7:3  Bo­ngo sakola maloba maye o matoi ma bato : Soko moto abangi mpe alengi, azo­nga o mboka mpe alongwa o ngomba Gelboe. » Bato nkoto ntuku ibale na ibale bazongi o mboka ; etikali se bato nkoto zomi.
Judg LinVB 7:4  Yawe alobi na Gedeon : « Bato baleki naino mingi. Kita na bango o libongo lya mai, kuna ngai moko nakomeka bango. Soko nalobi : Moto oyo akende na yo, akokende na yo. Mpe soko nalobi : Moto oyo akende na yo te, akokende na yo te. »
Judg LinVB 7:5  Gedeon akiti na bango epai ya mai, mpe Yawe alobi na ye : « Bato banso bakolete mai na lolemu lokola mbwa, tia ba­ngo epai yoko. Baye bakofukama o mabolongo mpo ya komele, tia ba­ngo epai esusu. »
Judg LinVB 7:6  Bato batii maboko penepene na monoko mpe baleti mai bongo, bazalaki nkama isato. Bato ba­susu banso bafukami o mabolongo.
Judg LinVB 7:7  Bongo Yawe alobi na Gedeon : « Nakobikisa bino na bato baye nkama isato baleti mai na lolemu, mpe nakokaba ba-Madian o maboko ma bino. Bato basusu banso bazonga o mboka. »
Judg LinVB 7:8  Bato baye nkama isato bakamati mbeki ya mai na mindule mya bani­nga. Na nsima Gedeon azongisi ba-Israel basusu banso o mboka ya ba­ngo. Aponi se bato nkama isato. Nganda ya ba-Madian ezalaki o liboso, o esobe.
Judg LinVB 7:9  Na butu Yawe alobi na Gedeon : « Teleme, kende kobunda na bato ba nganda, mpamba te, nakabi bango o maboko ma yo.
Judg LinVB 7:10  Soko obangi kokende yo moko, kende o nganda elo­ngo na mosaleli wa yo Pura.
Judg LinVB 7:11  Eyoki yo kuna makambo nini bazali kosolola, okozwa mpiko ya sika na mpe nguya ya kobunda na bango. » Akei na mosaleli wa ye Pura mpe akomi o esika basoda bazalaki kokengele nga­nda.
Judg LinVB 7:12  Ba-Madian na ba-Amalek na bato ba Esti batandani o esobe. Bazalaki mingi lokola mapalela ; moto moko akoki kotanga kamela ya bango te, iza­laki mingi lokola zelo o libongo lya mbu.
Judg LinVB 7:13  Ekomi Gedeon o esika ena, moto moko azalaki kosolola ndoto ya ye na moninga. Alobi : « Nalotoki ndoto : Namoni limpa lizali ko­zolongana o nganda ya ba-Madian, likei kotuta ema yoko ; bongo ema ekwei mpe ebulungani. »
Judg LinVB 7:14  Moninga wa ye azongisi : « Ekoki kozala bobele mopanga mwa Gedeon, mwana wa Yoas, moto wa Israel. Nzambe akabaki Madian na basoda ba ye banso o maboko ma ye. »
Judg LinVB 7:15  Eyoki Gedeon lisolo lya ndoto mpe ndimbola bapesi, afukami o nse. Azongi noki o nganda ya Israel, alobi : « Boteleme, zambi Ya­we akabi nganda ya Madian o maboko ma bino ! »
Judg LinVB 7:16  Gedeon akaboli bato ba ye nkama isato mangomba masato ; apesi bango mindule na mbeki izalaki mpa­mba, na mpe bisungi mpo ya kotia o mbeki.
Judg LinVB 7:17  Alobi na bango : « Bo­ta­la epai ngai nakozala mpe bosala lokola ngai nakosala. Soko nakomi penepene na nga­nda, bino bosala se lokola ngai nakosala.
Judg LinVB 7:18  Ngai na bato ba ngai tokobete mindule, bino mpe bobete mi­ndule zongazonga na nganda mpe bo­ganga : Mpo ya Yawe mpe mpo ya Gedeon ! »
Judg LinVB 7:19  Gedeon na bato monkama bazalaki na ye, bakomi pene na nganda o kati ya butu, o ntango bakengeli balongwi mpe batii bato ba sika. Babeti mindule mpe babuki mbeki izalaki o maboko ma bango.
Judg LinVB 7:20  O mangomba masato bato babeti mindule mpe babuki mbeki ; na loboko la mwasi basimbi bisungi, na loboko la mobali bakamati mindule mpo ya kobete. Ba­gangi : « Mopanga mpo ya Yawe mpe mpo ya Gedeon ! »
Judg LinVB 7:21  Batikali nye, moto na moto o esika ya ye zongazo­nga na nganda. Basoda ba nganda ya Madian babandi kopota mbangu, koganga makasi mpe kokima.
Judg LinVB 7:22  Awa bato nkama isato bazalaki kobete mi­ndule, Yawe asali ’te o nganda bato ba­nso bakoma kozokisana na mopa­nga. Banso bakimi tee o Bet-a-Sita, epai ya Sartan, tee o libongo lya Abel-Meola penepene na Tabat.
Judg LinVB 7:23  Ba-Israel ba Neftali, ba Aser mpe ba Manase mobimba basangani mpe balandi ba-Madian.
Judg LinVB 7:24  Gedeon atindi bantoma o ngomba inso ya Efraim na maloba maye : « Bokita ngomba mpe bokutana na ba-Madian. Bowela maziba manso ma mai liboso lya bango, tee o Bet-Bara mpe o Yordane. » Bato banso ba Efraim basangani mpe baweli maziba ma mai tee o Bet-Bara mpe o Yordane.
Judg LinVB 7:25  Bakangi bakonzi babale ba Madian, Oreb na Zeeb ; babomi Oreb o Libanga lya Oreb mpe Zeeb o ekamelo ya Zeeb. Babengani ba-Madian mpe bakatisi Yordane lisusu, bapesi Gedeon mitó mya Oreb na Zeeb.