JUDGES
Chapter 10
Judg | LinVB | 10:1 | Nsima ya Abimelek, Tola, mwana wa Pua, nkoko wa Dodo, moto wa libota lya Izakar, akomi mokonzi mpo ya kobikisa Israel. Afandi o Samir o ngomba ya Efraim. | |
Judg | LinVB | 10:2 | Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku ibale na isato ; nsima awei mpe bakundi ye o Samir. | |
Judg | LinVB | 10:3 | Nsima ya ye, Yair, moto wa Galaad akomi mokonzi. Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku ibale na mibale. | |
Judg | LinVB | 10:4 | Azalaki na bana babali ntuku isato, baye bakobutelaka mpunda ntuku isato, na mpe mboka ntuku isato iye bakotangaka tee lelo « Nganda ya Yair » o mokili mwa Galaad. | |
Judg | LinVB | 10:6 | Ba-Israel babandi lisusu kosala mabe o miso ma Yawe. Bakumisi ba-Baal na ba-Astarte na mpe banzambe ba Aram na Sidoni, ba Moab, ba Amon mpe ba Filisti. Batiki Yawe mpe bakumisi ye lisusu te. | |
Judg | LinVB | 10:7 | Yawe asilikeli ba-Israel mpenza mpe akabi bango o maboko ma ba-Filisti mpe ba-Amon. | |
Judg | LinVB | 10:8 | Bango banyati ba-Israel o mobu mona mpe banyokoli bato banso ba Israel baye bafandi o ngambo ya Yordane, o ekolo ya ba-Amor, o mokili mwa Galaad, mibu zomi na mwambe mobimba. | |
Judg | LinVB | 10:9 | Ba-Amon bakatisi Yordane mpo ya kobunda etumba na Yuda, na Benyamin mpe na ekolo ya Efraim. Ba-Israel bakomi koyoka mpasi mingi. | |
Judg | LinVB | 10:10 | O ntango ena ba-Israel babeleli Yawe, balobi : « Tosali mabe o miso ma yo, zambi totiki Nzambe wa biso mpe tokumisi ba-Baal. » | |
Judg | LinVB | 10:12 | ba-Sidoni, ba-Amalek na ba-Madian banyokoloki bino mpe bino bobelelaki ngai, nabikisaki bino o maboko ma bango te ? | |
Judg | LinVB | 10:13 | Kasi bino botiki ngai mpe bokumisi banzambe basusu. Yango wana nakobikisa bino lisusu te. | |
Judg | LinVB | 10:14 | Bokende sikawa kobelela banzambe baye bino moko boponoki ! Babikisa bino o ntango bozali koyoka mpasi. » | |
Judg | LinVB | 10:15 | Bana ba Israel balobi na Yawe : « Tosali mabe, yango wana sala na biso lokola olingi, kasi lelo bikisa biso. » | |
Judg | LinVB | 10:16 | Balongoli banzambe ba bikolo bisusu o kati ya bango mpe bakumisi Yawe lisusu. Mpe Yawe akokaki kondima lisusu te ’te Israel ayoka mpasi. | |
Judg | LinVB | 10:17 | Ba-Amon bayei kosangana mpe kopika nganda o mokili mwa Galaad. Bato ba Israel basangani lokola, mpe bapiki nganda o Mispa. | |