Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 10
Judg LinVB 10:1  Nsima ya Abimelek, Tola, mwana wa Pua, nkoko wa Dodo, moto wa libota lya Izakar, akomi mokonzi mpo ya kobikisa Israel. Afandi o Samir o ngomba ya Efraim.
Judg LinVB 10:2  Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku ibale na isato ; nsima awei mpe bakundi ye o Samir.
Judg LinVB 10:3  Nsima ya ye, Yair, moto wa Galaad akomi mokonzi. Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku ibale na mibale.
Judg LinVB 10:4  Azalaki na bana babali ntuku isato, baye bakobutelaka mpunda ntuku isato, na mpe mboka ntuku isato iye bakotangaka tee lelo « Nganda ya Yair » o mokili mwa Galaad.
Judg LinVB 10:6  Ba-Israel babandi lisusu kosala ma­be o miso ma Yawe. Bakumisi ba-Baal na ba-Astarte na mpe banzambe ba Aram na Sidoni, ba Moab, ba Amon mpe ba Filisti. Batiki Yawe mpe bakumisi ye lisusu te.
Judg LinVB 10:7  Yawe asilikeli ba-Israel mpenza mpe akabi ba­ngo o maboko ma ba-Filisti mpe ba-Amon.
Judg LinVB 10:8  Bango banyati ba-Israel o mobu mona mpe banyokoli bato ba­nso ba Israel baye bafandi o ngambo ya Yordane, o ekolo ya ba-Amor, o mokili mwa Galaad, mibu zomi na mwambe mobimba.
Judg LinVB 10:9  Ba-Amon bakatisi Yordane mpo ya kobunda etu­mba na Yuda, na Benyamin mpe na ekolo ya Efraim. Ba-Israel bakomi koyoka mpasi mingi.
Judg LinVB 10:10  O ntango ena ba-Israel babeleli Yawe, balobi : « Tosali mabe o miso ma yo, zambi totiki Nzambe wa biso mpe tokumisi ba-Baal. »
Judg LinVB 10:11  Yawe alobi na ba-Israel : « O ntango ba-Ezipeti, ba-Amor, ba-Amon, ba-Filisti,
Judg LinVB 10:12  ba-Sidoni, ba-Amalek na ba-Madian ba­nyokoloki bino mpe bino bobelelaki ngai, nabikisaki bino o maboko ma bango te ?
Judg LinVB 10:13  Kasi bino botiki ngai mpe bokumisi banzambe basusu. Yango wa­na nakobikisa bino lisusu te.
Judg LinVB 10:14  Bo­kende sikawa kobelela banzambe baye bino moko boponoki ! Babikisa bino o ntango bozali koyoka mpasi. »
Judg LinVB 10:15  Bana ba Israel balobi na Yawe : « Tosali mabe, yango wana sala na biso lokola olingi, kasi lelo bikisa biso. »
Judg LinVB 10:16  Balongoli banzambe ba bikolo bisusu o kati ya bango mpe bakumisi Yawe lisusu. Mpe Yawe akokaki ko­ndima lisusu te ’te Israel ayoka mpasi.
Judg LinVB 10:17  Ba-Amon bayei kosangana mpe kopika nganda o mokili mwa Galaad. Bato ba Israel basangani lokola, mpe bapiki nganda o Mispa.
Judg LinVB 10:18  Bato na bakonzi ba Galaad balobani : « Nani moto akomeka kobunda na bato ba Amon ? Ye akozala mokonzi wa bato banso ba Galaad. »