Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDGES
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 18
Judg LinVB 18:1  O eleko ena, mokonzi azalaki o Israel te. O mikolo mina bato ba libota lya Dan bazalaki koluka esika ya kofanda, zambi kin’o mokolo mona bazwaki mabelé te lokola mabota masusu ma Israel.
Judg LinVB 18:2  Bo­ngo bato ba Dan batindi babali batano ba etuka ya bango, basoda ba mpiko bauti o Sorea mpe o Estaol, bakende konongo mokili mwango malamu ; balobi na bango : « Bokende kotala mokili mona. » Bato batano bakomi o ngomba ya Efraim mpe basuki o ndako ya Mika ; na butu balali wana.
Judg LinVB 18:3  Ekomi bango penepene na ndako ya Mika, bayoki mongongo mwa elenge mo-Levi. Bakei epai ya ye, batuni ye : « Nani atindi yo awa ? Oyei kosala nini awa ? Ozali koluka nini awa ? »
Judg LinVB 18:4  Ayanoli : « Mika asali ngai malamu maike, andimi ngai o mosala, nakomi nganga Nzambe wa ye. »
Judg LinVB 18:5  Balobi na ye : « Tuna Nzambe mpo toyeba soko mobembo mwa biso mokosuka malamu. »
Judg LinVB 18:6  Nganga Nzambe alobi na ba­ngo : « Bokende na boboto ! Yawe ako­batela bino o mobembo. »
Judg LinVB 18:7  Bato batano bakei mpe bakomi o Lais. Bamoni ’te bato ba mboka ena bafandi nye lokola bato ba Sidoni, se na boboto, matata te. Bazalaki na mbuma mingi ya bilanga, bafandi mosika na ba-Sidoni mpe bakokutanaka na ba-Aram te.
Judg LinVB 18:8  Bato batano bazongi epai ya bandeko ba bango o Sorea mpe Estaol. Bandeko batuni bango : « Boyeli biso nsango nini ? »
Judg LinVB 18:9  Ba­ngo bayanoli : « Toteleme ! Tokende kobunda na bango, zambi tomoni ’te mokili mona mozali malamu mpe­nza. Boni bino bofandi nye mpe bolobi eloko te ? Bobete ntembe te ! Bokende kokamata mokili mona mpo bokoma bankolo ba mwango.
Judg LinVB 18:10  Ekoti bino o mokili, bokokuta se bato bafandi na boboto. Mokili mozali monene, mpe Yawe akabi mwango o maboko ma bino ; mokili moye mozali na biloko binso mpenza. »
Judg LinVB 18:11  Bato nkama motoba ba libota lya Dan balongwi o Sorea mpe o Estaol, bamemi bibuneli bya bango.
Judg LinVB 18:12  Bapiki nganda o Kiriat-Yearim o Yuda. Ntina yango bakobengaka esika ena ‘Nga­nda ya ba-Dan’ tee lelo ; ezali o Westi ya Kiriat-Yearim.
Judg LinVB 18:13  Longwa kuna bakei o ngomba ya Efraim mpe bakomi o ndako ya Mika.
Judg LinVB 18:14  Bato batano baye bakendeki konongo mokili o Lais balobi na bandeko ba bango : « Boyebi te ’te o ndako ina efod ezali, mabenga ma biloko bya bonganga, ekeko ya bibende na elili ? Sikawa boyeba nini bosengeli kosala. »
Judg LinVB 18:15  Bakei kuna, bakoti o ndako ya mo-Levi, ndako ya Mika, mpe bapesi ye losako.
Judg LinVB 18:16  Bato nkama motoba ba libota lya Dan batikali penepene na ezibeli ya ndako, bibuneli o maboko.
Judg LinVB 18:17  Bato batano, baye bake­ndeki konongo mokili, bayingeli o ndako, bakamati efod, ekeko, nkisi na elili ; nganga nzambe atikali penepene na ezibeli ya ndako elongo na bato nkama motoba baye bazalaki bibuneli o maboko.
Judg LinVB 18:18  Awa bakoti o ndako ya Mika mpe bakamati ekeko, efod, nkisi na elili, nganga nzambe atuni bango : « Boli­ngi kosala nini ? »
Judg LinVB 18:19  Bango bazongisi : « Kanga monoko, tia loboko liboso lya monoko mpe landa biso. Zala tata wa biso mpe nganga nzambe wa biso. Olingi kozala nganga Nzambe o ndako ya moto moko, to wa libota mpe wa etuka ya Israel mobimba ? »
Judg LinVB 18:20  Nganga nzambe asepeli na maloba mana ; akamati efod, mabenga ma biloko bya bonganga na ekeko, mpe alandi limpinga lya bango.
Judg LinVB 18:21  Bato ba Dan bakobi mobembo mwa bango, batindi ’te basi, bana, bi­bwele na biloko bakende liboso.
Judg LinVB 18:22  Eko­mi bango mwa mosika na ndako ya Mika, bato bafandi penepene na ndako ya Mika babimi, bakei kolanda bato ba Dan.
Judg LinVB 18:23  Bagangeli ba­ngo, bato ba Dan bamibongoli mpe balobi na Mika : « Mpo nini otindaki bato baya kosala makeléle boye ? »
Judg LinVB 18:24  Mika azongisi : « Nasalaki bikeko bya nzambe wa ngai mpe bino boyibi byango, na mpe nganga nzambe wa ngai bokei na ye. Ngai natikali na eloko te ! Boniboni botuni ngai : Likambo nini na yo ? »
Judg LinVB 18:25  Bato ba Dan bayanoli : « Toyoka yo lisusu te, soki te bato basusu bakosilika awa, bakoki mpe kosala yo mabe mpe koboma yo na libota lya yo mobimba ! »
Judg LinVB 18:26  Bato ba Dan bakobi nzela ya bango. Mika amoni ’te bango baleki ye na bo­kasi, atiki bango mpe azongi o ndako ya ye.
Judg LinVB 18:27  Ezwi bango biloko, biye Mika asalaki na mpe nganga Nzambe azalaki kosalela ye, bato ba Dan, bakobi nzela mpe bakomi o Lais. Bakuti bato bafandi nye, bazalaki kobanga likama lyoko te. Babomi bango banso na mopanga mpe batumbi mboka ya bango.
Judg LinVB 18:28  Moto moko azalaki te mpo ya kobikisa bango, zambi bazalaki mosika na bato ba Sidoni, mpe bazalaki na mokonzi mosusu te. Mboka ya bango ezalaki o lobwaku la Bet-Rekob. Batongi mboka lisusu mpo bafanda kuna seko.
Judg LinVB 18:29  Bapesi yango nkombo Dan, oyo azalaki nkoko wa bango mpe mwana wa Israel ; kala nkombo ya mboka ena ezalaka Lais.
Judg LinVB 18:30  Bato ba Dan babongiseli ekeko ya bango esika. Yonatan, mwana wa libota lya Gersom, nkoko wa Moze, azalaki nganga Nzambe o libota lya ba-Dan tee o eleko bato banso bakangemi mpe bakei o boombo.
Judg LinVB 18:31  Babongiseli ekeko eye Mika asalaki esika ; etikali kuna mikolo minso tee mokolo ndako ya Nzambe ekomi o Silo.