WISDOM
Chapter 15
Wisd | LinVB | 15:1 | Kasi yo, Nzambe wa biso, oleki bolamu mpe bosolo, okoyokaka nkanda noki te, mpe okoyangelaka molóngó mobimba na ngolu. | |
Wisd | LinVB | 15:2 | Ata tosali masumu, tokotikala se bana ba yo, mpo tondimi ’te yo ozali Mokonzi monene, tokosala mabe te, mpo toyebi ’te tozali bato ba yo. | |
Wisd | LinVB | 15:3 | Koyeba yo ezali kokomisa biso bato ba bosembo, kondima bokonzi bwa yo ezali ebandela ya bomoi bwa seko. | |
Wisd | LinVB | 15:4 | Biloko bisalemi na mayele mabe bibungisi biso te : ézala mosala mozangi ntina mwa baye bakopakolaka langi to bilili biye babebisi na langi ndenge na ndenge. | |
Wisd | LinVB | 15:5 | Komono byango ekoki koyokisa bazoba mposa ya kosala mabe, to kotinda bato ’te balinga elili mpamba ezangi bomoi. | |
Wisd | LinVB | 15:6 | Ná baye basali bikeko, ná baye baluli mpe bakumisi byango, balingi mabe mpe babongi na biye batii mitema. | |
Wisd | LinVB | 15:7 | Ndakisa esusu : mosali mbeki akopotoko mabelé na mpasi, mpe akosalaka biloko binso bisengeli na biso o ndako : se na mabelé mango akosalaka mbeki bo esaleli ya misala kitoko, mpe mbeki isusu mpo ya misala misusu. Kasi mosali mbeki akopesaka mbeki yoko yoko mosala mwa yango. | |
Wisd | LinVB | 15:8 | Oyo abimaki o mabelé bobele sika, akomiyokisa mpasi se mpamba na boyemi ekeko ya nzambe wa mpamba, akozonga noki o mabelé esika autaki, mokolo Nzambe akobyanga molimo mwa ye. | |
Wisd | LinVB | 15:9 | Awa abosani ’te liwa lya ye likomi penepene, ’te akoumela na bomoi mikolo mingi lisusu te, alingi komekana na batuli ba wolo mpe ba palata, akomekolaka baye bakotulaka mbengi, mpe alingi komipesa lokumu na bosali biloko bya lokuta. | |
Wisd | LinVB | 15:10 | Motema mwa ye mozali se mputulu, elikya ya ye bobele mabelé mpamba, bomoi bwa ye mobimba bobele potopoto. | |
Wisd | LinVB | 15:11 | Mpamba te, awangani Oyo azalisi ye, oyo apesi ye mpema ya kosala mosala ná mpe molimo mokopesa bomoi. | |
Wisd | LinVB | 15:12 | Moto oyo akanisi ’te bomoi bwa biso bozali se lisano, lokola baye bakokendeke zando mpo ya kozwa mbongo, amilobeli : « Nasengeli koluka bomengo o nzela inso, ata o nzela ya mabe. » | |
Wisd | LinVB | 15:13 | Moto oyo ayebi, leka bato banso, ’te azali kosala mabe, awa akosalaka mbeki ya libazi mpe bikeko bya mpamba. | |
Wisd | LinVB | 15:14 | Kasi banguna mpe banyokoli ba bato ba ekolo ya yo, banso bamilakisi bazoba mpenza, baleki naino mwana moke na bolema. | |
Wisd | LinVB | 15:15 | Bakumisi mpe bikeko bya bikolo bisusu lokola banzambe, bikeko bizali na miso, kasi bikoki komono te, bizali na zolo, kasi biyebi kobenda mpema te, bizali na matoi, kasi bikoki koyoka eloko te, bizali na misapi o maboko, kasi biyebi kosimba eloko te, bizali na makolo, kasi biyebi kotambola te. | |
Wisd | LinVB | 15:16 | Mpamba te, oyo asali byango azali bobele moto, oyo ayemi byango, azali se na mpema ya kodefa, moto moko te ayebi kosala nzambe oyo akokani na ye moko. | |
Wisd | LinVB | 15:17 | Awa azali moto wa kokufa, na maboko ma ye mabe ayebi se kosala eloko ezangi bomoi. Ye moko aleki biloko biye akokumisaka : ye azwi bomoi, kasi bikeko bikozwa bwango soki te. | |