WISDOM
Chapter 2
Wisd | LinVB | 2:1 | Bazalaki kobunga ntango ba lobanaki : « Bomoi bwa biso bozali bobele mokuse mpe mawa ; soko liwa likomi penepene, eloko ekobikisa moto ezali te, toyebi ata moto moko te oyo auti o mboka ya bawa. | |
Wisd | LinVB | 2:2 | Toyebi te ndenge nini tobotami, na nsima tokozala lokola bato babotamaki te. Mpema o zolo lya biso ezali se mompepe ; makanisi ma biso lokola miloli mibimi o motema. | |
Wisd | LinVB | 2:3 | Ekufi miloli mina, nzoto ekobongwana mputulu, mpe molimo mokolimwa lokola mompepe mpamba. | |
Wisd | LinVB | 2:4 | Mosika te bakobosana nkombo ya biso, moto moko akokanisa misala mya biso lisusu te ; bomoi bwa biso bokoleka lokola limpata, bokotika elembo te, bokolimwa lokola londende lokokimaka moi mpe lokosila mpo ya molunge mwa mwese. | |
Wisd | LinVB | 2:5 | Bomoi bwa biso bozali se elilingi mpamba, mokolo mwa liwa lya biso mokozonga nsima te ; bakata ndelo seko mpe nzela ya kozonga ezali te. | |
Wisd | LinVB | 2:6 | Yango wana, tosepela biloko bya mokili, tondima bisengo bya mokili lokola o ntango ya bolenge. | |
Wisd | LinVB | 2:7 | Tolangwa vino elengi mpe topakola nzoto malasi, tobuka fulele inso ya yambo ya bilanga. | |
Wisd | LinVB | 2:9 | Moto moko azanga o limpati linene lya biso te ; bipai binso totia bilembo bya bisengo bya biso, bakabeli biso yango, balengeleli biso bongo ! | |
Wisd | LinVB | 2:10 | Tonyokolo babola, bato ba bosembo, toyokela mwasi akufeli mobali mawa te, tomemya nsuki mpembe ya mobange te. | |
Wisd | LinVB | 2:11 | Bokasi bwa biso bokolingisa biso tosala maye tolingi : bato batau bazali na ntina yoko te. | |
Wisd | LinVB | 2:12 | Tonyokolo moto semba, mpo akotungisaka biso, akondimaka ezalela ya biso te, akopalelaka biso soko tobuki Mobeko, akofundaka biso mpo toboyi kolanda nzela ya bankoko. | |
Wisd | LinVB | 2:14 | Na ezalela ya ye alakisi ’te aboyi makanisi ma biso, soko tomoni ye, tomiyoki lokola bato basali likambo ; | |
Wisd | LinVB | 2:15 | mpamba te, biso na ye tokeseni na manso tokosalaka, ezalela ya ye ekokamwisaka biso. | |
Wisd | LinVB | 2:16 | Akotalaka biso lokola bato mpamba, akokimaka nzela ya biso mpo akoma na mbindo te ; akosakolaka ’te bobele basemba bakobika, akomikumisaka ’te Nzambe azali tata wa ye. | |
Wisd | LinVB | 2:18 | Soko moto semba azali mwana wa Nzambe, Nzambe akosalisa ye, mpe akobikisa ye o maboko ma banguna ba ye. | |
Wisd | LinVB | 2:19 | Tomeka ye na matumoli mpe na minyoko, bongo tokoyeba soko azali moto wa boboto, mpe soko ayebi kokanga motema. | |
Wisd | LinVB | 2:22 | Bayebi mibombamo mya Nzambe te, bazali na elikya te ’te bakozwa litomba soko basali malamu ; bakondimaka te ’te bato ba motema peto bakozwa mbano. | |