Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
WISDOM
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19
Prev Up Next
Chapter 8
Wisd LinVB 8:1  Bwanya bokolakisaka bokasi bwa bwango bipai binso, mpe bokoyangelaka mokili se malamu.
Wisd LinVB 8:2  Ut’o bolenge nabandi koluka mpe kolinga Bwanya, nalulaki kozwa bwango lokola mwasi wa bolongani, mpe nakomi kolula bonzenga bwa bwango.
Wisd LinVB 8:3  Ut’o libandela bwanya bozali na lokumu loleki, mpo bokozalaka epai ya Nzambe, mpe Mokonzi wa bikelamo binso alingi bwango.
Wisd LinVB 8:4  Nzambe abombeli Bwanya mibo­mbamo mya ye te, mpe akokokisaka misala mya ye na lisalisi lya bwango.
Wisd LinVB 8:5  Mpe soko nkita ezali eloko ya kolula awa o nse, eloko nini eleki Bwanya, mokeli wa biloko binso, na motuya ?
Wisd LinVB 8:6  Soko tokosalaka mosala na mayele ma biso, eloko nini ekoleka Bwanya mokeli wa bikelamo inso ?
Wisd LinVB 8:7  Mabongi ma moto alingi bosembo mauti se na bwanya bwa ye, mpo bwanya bokoteyaka ndenge nini tokanga mitema, tokeba, tozala na bosembo mpe na mpiko. Mango nde mazali na ntina o bomoi bwa bato, leka masusu ma­nso.
Wisd LinVB 8:8  Soko moto alingi koyeba maka­mbo mingi, ayeba ’te Bwanya boyebi ná maye maleki ná maye makoya, bokoki mpe kolimbola biyele na nsambole, boyebi mpe bilembo bya mokili, ata bisalemi naino te, na mpe makambo makokwela o eleko yoko yoko.
Wisd LinVB 8:9  Bongo naponi Bwanya bo moni­nga wa bomoi bwa ngai, mpo nayebi ’te bokopesaka ngai malako malamu, mpe bokozala mobondi o mikolo mya mpasi mpe mya mawa.
Wisd LinVB 8:10  Nakanisi : « Mpo ya Bwanya nako­zwa nkembo o miso ma bato, mpe ata nazali naino elenge, babange bakokumisa ngai.
Wisd LinVB 8:11  Bato banene bakokamwa ntango bakomono, ndenge nakosambaka makambo na mayele.
Wisd LinVB 8:12  Soko nakangi monoko, bakozila ngai, soko nabandi koloba, bakotia matoi, mpe ata nakobi koloba naino, bakotikala nye mpe bakofanda na limemye.
Wisd LinVB 8:13  Mpo ya Bwanya nakozwa bomoi bwa seko, baye bakoya nsima bakobosana ngai mokolo moko te.
Wisd LinVB 8:14  Nakoyangela bikolo mpe nakokonza bato ba mikili.
Wisd LinVB 8:15  Bakonzi ba nsomo bakolenge na boyoki nsango ya ngai ; nakosala bato ba ngai malamu, mpe nakozala motema mpiko o etumba.
Wisd LinVB 8:16  Ezongi ngai o ndako, nakopema penepene na Bwanya, zambi kofanda na bwango ekole­mbisa ngai te ; kosolola na bwango ekoyokisa ngai motema mpasi te, nakoyoka bobele elengi mpe nsai o motema. »
Wisd LinVB 8:17  Awa nakanisaki bongo o motema mpe namonoki ’te kozala na Bwanya ekopesa bomoi bwa seko ;
Wisd LinVB 8:18  kozala penepene na bwango ekoyokisa nsai ya solo, misala mya bwango mikobota nkita nsuka te, kokende mbala na mbala epai ya bwango ekopesa mayele mingi, mpe kosolola na bwango ekokomisa ngai moto wa lokumu, yango wana nakei koluka bwango mpe naluki kozala na bwango.
Wisd LinVB 8:19  Ya solo, nazalaki mwana na nzoto kitoko, nazwaki mpe molimo malamu.
Wisd LinVB 8:20  Naloba kutu : awa nazalaki mwana wa motema malamu, nabotami mpe na nzoto ezangi mbe­ba.
Wisd LinVB 8:21  Nzokande nayebaki ’te nakoki ko­zwa bwanya te soko Nzambe yemei akabeli ngai bwango te. Koyeba ’te likabo lyango liuti na Nzambe, yango mpe ekolakisa mayele ma moto. Yango wana nalobi na Mokonzi mpe nabondeli ye, mpe na motema monso nalobi na ye :