WISDOM
Chapter 19
Wisd | LinVB | 19:1 | Kasi Nzambe ayokeli bato baboyi ye nkanda enene tee nsuka, zambi asili ayebaki makambo nini balingaki kosala : | |
Wisd | LinVB | 19:2 | batiki bato ba yo bakende, babengani bango noki, na nsima babongoli makanisi mpe bakei kolanda bango. | |
Wisd | LinVB | 19:3 | Ntango basilisi naino mikolo mya lilaka te, mpe bazalaki naino kolela o malita ma bawei, bakomi na makanisi masusu ma bozoba : bakomi kolanda bango lokola bato bakimi bokimi, ata babondelaki bango ’te bakende. | |
Wisd | LinVB | 19:4 | Ebongoki ’te basala naino likambo liye lya nsuka, mpe babosana maye masalemaki liboso, mpo ’te babakisa naino etumbu ya sika na minyoko mya kala. | |
Wisd | LinVB | 19:5 | Bongo bato ba yo bakende mobembo mwa kokamwa, kasi bango banso bakufa liwa lya nsomo. | |
Wisd | LinVB | 19:6 | Olingaki ’te bikelamo binso bikoma bya sika, ekelamo yoko yoko etosa mibeko mya yo, se na ntina ya kobikisa bato ba yo o mabe manso. | |
Wisd | LinVB | 19:7 | Bamoni limpata lizipi nganda ya bango, bamoni mokili mobimi o esika ezalaki mai : Mbu Etane ekomi nzela esika bakoki koleka, mbonge ya mai ibongwani esobe mobesu. | |
Wisd | LinVB | 19:8 | Na loboko la yo obateli bato ba yo ntango bakatisi mbu, bamoni misala mya yo mya kokamwa. | |
Wisd | LinVB | 19:9 | Bana ba yo basepeli lokola farasa ikei kolia o esobe, bapimbwi lokola bana mpata, bakumisi yo, Mokonzi, yo mobikisi wa bango. | |
Wisd | LinVB | 19:10 | Bakundoli naino maye makwelaki bango o ntango ya boombo, ndenge nkungi ibotamaki na nyama te, kasi ibimaki o mabelé, ndenge magbololo mabotamaki na nyama ya mai te, kasi ibimaki o ebale. | |
Wisd | LinVB | 19:11 | Na nsima bamoni mpe ndeke ibimaki ya ndenge ya sika. Ntango bayoki mposa ya kolia mpe basengi biloko elengi, | |
Wisd | LinVB | 19:14 | Ba-Sodoma bayambaki bampaya te ntango bakomi epai ya bango, kasi ba-Ezipeti bakangaki o boombo bampaya baye basalaki bango se malamu. | |
Wisd | LinVB | 19:16 | Kasi ba-Ezipeti bayambaki bato ba yo na esengo, bandimaki bango lokola bato ba ekolo ya bango moko, kasi na nsima banyokoli bango na misala mya boombo. | |
Wisd | LinVB | 19:17 | Yango wana miso ma bango makufaki, bamonoki eloko te, se lokola ba-Sodoma o boso bwa ndako ya moto semba, bango banso bazipamaki na molili makasi, bongo moko moko bakomaki koluka nzela ya ndako ya ye. | |
Wisd | LinVB | 19:18 | Bikelamo bya mokili bikobongwanaka lokola mingongo mya nzembo, kasi lolaka la nzenze lotikali se loko. Yango emononi malamu na maye masalemaki : | |
Wisd | LinVB | 19:19 | nyama ya mokili ibongwani nyama ya mai, iye izalaki o mai ikomi kotambola o mokili ; | |
Wisd | LinVB | 19:21 | Nzokande miloli mizikisi nkungi te, nyama iye ike izalaki kotambola o kati ya móto, mpe minyangwisi bilei te, biye biuti o likolo, bilei lokola galasi ikonyangwaka noki. | |