WISDOM
Chapter 17
Wisd | LinVB | 17:1 | Makanisi ma yo maleki bonene, koyeba mango ezali mpasi ! Yango wana bato baboyaki mateya babungi nzela. | |
Wisd | LinVB | 17:2 | Bato baboyi Yo bakanisaki ’te bakoki kokanga bato ba ekolo esantu, sikawa bango moko bakoti o boombo bwa molili, bakangemi o minyololo mya butu bolai, balali o ndako esika Nzambe akosalisa bango soki te. | |
Wisd | LinVB | 17:3 | Bakanisaki ’te bakoki kobomba masumu masalemi na bonkutu, mpe kozipa mango na elamba mpo bato babosana mango, sikawa bapanzani mpe bakomi kobanga mingi, mpe bayoki nsomo lokola bato baloti ndoto ya mabe. | |
Wisd | LinVB | 17:4 | Ata bakei kobombama, bazalaki se kobanga, bazalaki koyoka makeléle ma nsomo zongazonga na bango mpe komono bilima na bilongi bya nsomo. | |
Wisd | LinVB | 17:5 | Ata bapelisi móto makasi, mwinda mongengeli bango te, mpe ata minzoto mizalaki kongenge makasi, mikokaki kongengisa butu bona bwa nsomo te. | |
Wisd | LinVB | 17:6 | Bamoni bobele móto monene, móto mwa nsomo moye mobimaki mwango moko, mpe ntango bamoni mwango lisusu te, mpo ya bobangi, bakomi kokanisa ’te bamonoki likambo lya nsomo leka liye bauti komono. | |
Wisd | LinVB | 17:7 | Bikelakela bya banganga nkisi bisalisi bango te, baye bafundi na bwanya bwa bango, bakomi koyoka nsoni. | |
Wisd | LinVB | 17:8 | Baye bazalaki kofunda ’te bakoki kolongola nsomo mpe bobulungani o mitema mya bato ba malali, bakomi bango moko kobele mpe koyoka nsomo enene. | |
Wisd | LinVB | 17:9 | Mpe ata eloko yoko ya kobangisa bango ezalaki te, komono nyama ike na nyoka eyokisi bango motema nsomo. | |
Wisd | LinVB | 17:13 | Baye batiki kokanisa na mayele bakobanga mingi, mpo bakobunga ntina ya bobangi bwa bango. | |
Wisd | LinVB | 17:14 | Kasi bango, o ntango ya butu bona bwa nsomo, boye boutaki o bozindo bwa mboka ya bawa, o ntango bazalaki kolala mpongi, | |
Wisd | LinVB | 17:15 | bazalaki komono bilima bya nsomo, mpe mitema mya bango mikatani na mbala yoko, zambi bobangi bwa nsomo bokoteli bango na mbalakaka. | |
Wisd | LinVB | 17:16 | Moto nyonso, ata azalaki wapi, akweyaki o nse, mpe akangemaki o boloko ezali na monyololo te. | |
Wisd | LinVB | 17:17 | Ná moto wa bilanga, ná mokengeli wa mpata, oyo okosalaka mosala o eliki, banso bayoki mpasi ndenge yoko na mbalakaka, | |
Wisd | LinVB | 17:18 | mpamba te, banso bakangemaki na monyololo mwa molili. Ntango esusu bayokaki lokito la mompepe makasi, to nzembo kitoko ya ndeke o bitapi bya nzete, to lokito la mai matiyoli makasi, | |
Wisd | LinVB | 17:19 | to makeléle ma mabanga makwei o nse, to makolo ma nyama ileki wana, kasi imononoki te, to boleli bwa nyama ya zamba ileki nkanda, to lolaka la bato babelelani o kati ya ngomba : mana manso mabangisi bango mpe mayokisi bango nsomo o mitema. | |
Wisd | LinVB | 17:20 | O bisika bisusu binso bya mokili mwinda mozalaki kongenge, eloko yoko te epekisi bato bakoba misala mya bango ; | |