Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
WISDOM
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19
Prev Up Next
Chapter 2
Wisd LinVB 2:1  Bazalaki kobunga ntango ba lobanaki : « Bomoi bwa biso bozali bobele mokuse mpe mawa ; soko liwa likomi penepene, eloko ekobikisa moto ezali te, toyebi ata moto moko te oyo auti o mboka ya bawa.
Wisd LinVB 2:2  Toyebi te ndenge nini tobotami, na nsima tokozala lokola bato babotamaki te. Mpema o zolo lya biso ezali se mo­mpepe ; makanisi ma biso lokola miloli mi­bimi o motema.
Wisd LinVB 2:3  Ekufi miloli mina, nzoto ekobo­ngwana mputulu, mpe molimo mokolimwa lokola mompepe mpamba.
Wisd LinVB 2:4  Mosika te bakobosana nkombo ya biso, moto moko akokanisa misala mya biso lisusu te ; bomoi bwa biso bokoleka lokola limpata, bokotika elembo te, bokolimwa lokola londende lokokimaka moi mpe lokosila mpo ya molunge mwa mwese.
Wisd LinVB 2:5  Bomoi bwa biso bozali se elilingi mpamba, mokolo mwa liwa lya biso mokozonga nsima te ; bakata ndelo seko mpe nzela ya ko­zonga ezali te.
Wisd LinVB 2:6  Yango wana, tosepela biloko bya mokili, tondima bisengo bya mokili lokola o ntango ya bolenge.
Wisd LinVB 2:7  Tolangwa vino elengi mpe topakola nzoto malasi, tobuka fulele inso ya yambo ya bilanga.
Wisd LinVB 2:9  Moto moko azanga o limpati li­nene lya biso te ; bipai binso totia bilembo bya bi­se­ngo bya biso, bakabeli biso yango, balengeleli biso bongo !
Wisd LinVB 2:10  Tonyokolo babola, bato ba bose­mbo, toyokela mwasi akufeli mobali ma­wa te, tomemya nsuki mpembe ya mobange te.
Wisd LinVB 2:11  Bokasi bwa biso bokolingisa biso tosala maye tolingi : bato batau bazali na ntina yoko te.
Wisd LinVB 2:12  Tonyokolo moto semba, mpo akotungisaka biso, akondimaka ezalela ya biso te, akopalelaka biso soko tobuki Mobeko, akofundaka biso mpo toboyi ko­la­nda nzela ya bankoko.
Wisd LinVB 2:13  Akomikumisaka ’te ayebi maka­mbo ma Nzambe, mpe akomitangaka mwana wa Nza­mbe.
Wisd LinVB 2:14  Na ezalela ya ye alakisi ’te aboyi makanisi ma biso, soko tomoni ye, tomiyoki lokola bato basali likambo ;
Wisd LinVB 2:15  mpamba te, biso na ye tokeseni na manso tokosalaka, ezalela ya ye ekokamwisaka biso.
Wisd LinVB 2:16  Akotalaka biso lokola bato mpa­mba, akokimaka nzela ya biso mpo ako­ma na mbindo te ; akosakolaka ’te bobele basemba bakobika, akomikumisaka ’te Nzambe azali tata wa ye.
Wisd LinVB 2:17  Bongo totala soko maloba ma ye mazali ma solo, tomeka koyeba soko akosuka boni.
Wisd LinVB 2:18  Soko moto semba azali mwana wa Nzambe, Nzambe akosalisa ye, mpe akobikisa ye o maboko ma banguna ba ye.
Wisd LinVB 2:19  Tomeka ye na matumoli mpe na minyoko, bongo tokoyeba soko azali moto wa boboto, mpe soko ayebi kokanga motema.
Wisd LinVB 2:20  Tokitisa ye o liwa lya nsoni mpe­nza, mpamba te, akolobaka ’te bakosalisa ye. »
Wisd LinVB 2:21  Bakokanisaka bongo, kasi babu­ngami, masumu ma bango makomisi ba­ngo lolanda.
Wisd LinVB 2:22  Bayebi mibombamo mya Nza­mbe te, bazali na elikya te ’te bakozwa litomba soko basali malamu ; bakondimaka te ’te bato ba motema peto bakozwa mbano.
Wisd LinVB 2:23  Ya solo, Nzambe akeli moto mpo áwá te, akeli ye ndenge ye moko azali.
Wisd LinVB 2:24  Kasi zabolo akotisi liwa o mokili mpo ya zuwa, liwa likokwela bato bakolanda nze­la ya zabolo.