DEUTERONOMY
Chapter 17
Deut | LinVB | 17:1 | Obonzela Yawe Nzambe wa yo ngombe to mpata te, eye ezali na mbeba to na bobe ata nini, zambi ezali eloko ya nsomo o miso ma Yawe Nzambe wa yo. | |
Deut | LinVB | 17:2 | Soko o kati ya bino moto moko, mobali to mwasi, oyo afandi o mboka iye Yawe Nzambe wa yo apesi yo, asali makambo mabe o miso ma Yawe Nzambe wa yo, soko abuki mobeko mwa bondeko bwa ye, | |
Deut | LinVB | 17:3 | mpe akumisi banzambe basusu, soko akumbameli bango, mwese, sanza to minzoto mya likolo, soko asali makambo maye ngai natindi te, | |
Deut | LinVB | 17:4 | awa bayebisi yo likambo lina to oyoki bongo na monoko mwa bato, tuna bato soko likambo lizali lya solo ; mpe awa emononi polele ’te asalaki likambo lya nsomo o Israel, | |
Deut | LinVB | 17:5 | kende na mobali to mwasi oyo asalaki mabe o ezibeli ya mboka mpe bwakela ye mabanga tee akufi. | |
Deut | LinVB | 17:6 | Nzokande okoki koboma moto, bobele soko oyoki monoko mwa bato babale to basato. Soko oyoki se monoko mwa moto moko, okoki koboma ye te. | |
Deut | LinVB | 17:7 | Banzeneneke bakobanda kobwakela ye mabanga, nsima bato basusu bakobwakela ye mabanga. Bobele bongo okosilisa bobe o kati ya bino. | |
Deut | LinVB | 17:8 | Soko ozali na likambo lileki yo na bokasi, kanisa : likambo lya moto abomi moninga, likambo lya esambi to likambo ata nini o mboka ya yo, kende o esika Yawe Nzambe wa yo aponoki. | |
Deut | LinVB | 17:9 | Kende kokutana na banganga Nzambe ba Levi mpe na zuzi wa mboka oyo azali kosambisa o mikolo mina. Batala likambo malamu mpe bayebisa motindo bakati likambo. | |
Deut | LinVB | 17:10 | Ndima maloba bakoloba na yo o esika eye Yawe aponoki mpe landa se maloba manso ma bango. | |
Deut | LinVB | 17:11 | Sala bobele lokola bayebisi yo mpe lokola bakati likambo ; okende nzela epai ya mobali to epai ya mwasi te, kasi landa se maloba bayebisi yo. | |
Deut | LinVB | 17:12 | Soko moto asali lolendo mpe aboyi kotosa monoko mwa nganga Nzambe, oyo azali wana mpo ya kosala mosala mwa Yawe Nzambe wa yo, to aboyi kotosa monoko mwa zuzi, moto oyo akufa. Okosilisa bongo bobe o Israel. | |
Deut | LinVB | 17:14 | Mokolo okokoma o mokili Yawe Nzambe wa yo akokabela yo, ozwi mwango mpe ofandi wana, soko omilobeli : « Nalingi kozala na mokonzi lokola bato ba bikolo bya penepene », | |
Deut | LinVB | 17:15 | osengeli kolubola se oyo Yawe Nzambe wa yo aponoki. Oyo akoyangela yo azala moko wa bandeko ba yo ; okoki kokomisa mompaya mokonzi te oyo azali ndeko wa yo te. | |
Deut | LinVB | 17:16 | Kasi atika koluka farasa ebele ya etumba ; atinda bato o Ezipeti te mpo ya kozwa farasa ebele kuna, zambi Yawe alobaki na bino : « Bozongela lisusu nzela ena te. » | |
Deut | LinVB | 17:17 | Amilukela mpe basi ebele te, mbele bakobebisa motema mwa ye. Aluka palata na wolo eleka te. | |
Deut | LinVB | 17:18 | Mokolo akobanda kofanda o ngwende ya bokonzi, akoma o buku ya ye moko, maloba manso ma Mobeko, maye banganga Nzambe ba Levi bakotangela ye. | |
Deut | LinVB | 17:19 | Buku ena ezala ntango inso penepene na ye, atanga yango mikolo minso mya bomoi bwa ye mpo ’te amemya Yawe Nzambe wa ye, mpe atosa mibeko minso. | |