Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 31
Deut LinVB 31:1  Moze ayei koloba naino maloba maye na bato ba Israel banso :
Deut LinVB 31:2  « Lelo nakokisi mibu nkama na ntuku ibale ; nakoki kotambola lisusu bipai binso te. Mokonzi alobi na ngai : Okokatisa ebale Yordane te.
Deut LinVB 31:3  Yawe Nzambe wa bino akoleka liboso lya bino ; ye moto akosilisa bato ba ekolo ena mpo ’te bokoka kobotolo mokili mwa bango. Yozue moto akokamba bino, lokola Yawe alobaki.
Deut LinVB 31:4  Yawe akosala bango lokola asalaki na Sikon mpe na Og, bakonzi ba Amor ; abomaki bango mpe abebisaki mokili mwa bango.
Deut LinVB 31:5  Yawe akokaba bango o maboko ma bino mpe bokosala na bango se lokola natindaki bino.
Deut LinVB 31:6  Bozala makasi mpe na mpiko ; bobanga te mpe bolenge o miso ma bango te, zambi Yawe Nzambe wa bino akozala na bino, akotika bino te. »
Deut LinVB 31:7  Na nsima Moze abengi Yozue mpe alobi na ye o miso ma bato ba­nso ba Israel : « Zala makasi mpe na mpiko ; yo moto okoyingisa libota liye o mokili Yawe alakelaki bankoko ba bango ; yo moto okopesa bango mabelé mana.
Deut LinVB 31:8  Yawe akotambola liboso lya yo ; akozala na yo mpe akotika yo te. Obanga te, oyoka mpe nsomo te. »
Deut LinVB 31:9  Moze akomi Mobeko o monka­nda mpe apesi mwango na banganga Nzambe, bana ba Levi, baye bakomemeke Sanduku ya Bondeko bwa Yawe, apesi mwango mpe na bakolo ba Israel.
Deut LinVB 31:10  Moze apesi bango etinda eye : « Mbala na mbala, o mobu mwa nsambo, o mobu mwa bolimbisi nyo­ngo inso, o ntango ya eyenga ya Biema,
Deut LinVB 31:11  o eleko bato banso ba Israel bakokende kotala elongi ya Yawe Nza­mbe wa yo o esika ye moko aponoki, osakola Mobeko moye o matoi ma ba-Israel banso.
Deut LinVB 31:12  Sangisa bato banso, babali, basi, bana na mompaya oyo afandi o mboka yo, mpo ’te bayoka mpe bayekola bobangi Yawe Nzambe wa bino, batosa mpe bala­nda maloba manso mazali o Mobeko moye.
Deut LinVB 31:13  Bana ba bango, baye bayebi Mobeko naino te, bayoka mpe bayekola bobangi Yawe Nzambe wa bino mikolo minso bokozala o mokili moye bolingi koyingela sikawa mpo ’te bofanda kuna nsima ya bokatisi Yordane. »
Deut LinVB 31:14  Yawe alobi na Moze : « Mokolo mwa liwa lya yo mokomi penepene ; benga Yozue. Bino babale bokende o Ema ya Likita mpo ’te napesa ye bitinda bya ngai. » Moze na Yozue bakei kofanda o Ema ya Likita.
Deut LinVB 31:15  Yawe amilakisi na bango o Ema ya Likita, amononi o kati ya limpata, liye litelemi o monoko mwa Ema.
Deut LinVB 31:16  Yawe alobi na Moze : « Sikawa oko­kende kokutana na bankoko ba yo. Kasi bato baye balingi kosala mabe na bolandi banzambe basusu o ekolo ya bampaya esika balingi koyingela, bakotika ngai mpe bakoboma bondeko nakataki na bango.
Deut LinVB 31:17  O mokolo mona nakolakisa bango nka­nda ya ngai, nakotika bango mpe nakobombela bango elongi ya ngai. Makambo ma mpasi ndenge na nde­nge makokwela bango ; yango wana bakomituna : « Mabe mana makweli biso, mbele ezali mpo Nzambe wa biso azali lisusu o kati ya biso te ? »
Deut LinVB 31:18  Ya solo, ngai nakobombela bango elongi ya ngai o mokolo mona mpo ya mabe manso basali na bolandi ba­nzambe basusu.
Deut LinVB 31:19  Koma sikawa o monkanda nze-mbo eye bokoyemba mbala na mbala, lakisa bana ba Israel yango, yembisa bango yango ezala lokola elembo eko­kitisa bana ba Israel.
Deut LinVB 31:20  Ngai nakambi bango o mokili moye nalakelaki bankoko ba bango, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, esika bakolia mpe bakotonda mpe bakokoma banene ; nzokande na nsima bakolanda ba­nzambe basusu, bakokumisa ba­ngo, bakokinola ngai mpe bakoboma bo­ndeko bwa ngai.
Deut LinVB 31:21  Kasi mokolo mabe na mpasi ndenge na ndenge mako­kwela bango, nzembo eye ekolakisa bobe bwa bango, mpe bana ba bango bakobosana likambo lina mokolo moko te. Solo, nayebi mikano bazali kokana lelo, ata nakambi ba­ngo naino o mokili mona te, moye nalayaki ndai ’te nakopesa bango. »
Deut LinVB 31:22  O mokolo mona akomi nzembo eye o mo­nka­nda mpe alakisi bana ba Israel yango.
Deut LinVB 31:23  Apesi Yozue, mwana wa Nun, eti­nda eye : « Zala makasi mpe na mpi­ko, zambi yo moto okokamba bana ba Israel o mokili nalayaki ndai ’te nakopesa bango, mpe ngai nakozala na yo. »
Deut LinVB 31:24  Esilisi Moze kokoma kin’o nsuka maloba manso ma Mobeko o buku,
Deut LinVB 31:25  apesi etinda eye na ba-Levi, baye bakomemeke Sanduku ya Bondeko bwa Yawe :
Deut LinVB 31:26  « Bokamata buku eye ya Mobeko ; botia yango penepene na Sanduku ya Bondeko bwa Yawe Nzambe wa bino. Ezala elembo ekolakisa mabe ma bino.
Deut LinVB 31:27  Nayebi mayele ma botomboki mpe mitó makasi mya bino. Soko lelo, ata nazali naino o kati ya bino, bozali kotombokela Yawe, bokosala nini nsima ya liwa lya ngai ?
Deut LinVB 31:28  Bosangisa bakolo banso ba mabota ma Israel na mpe bateyi ba mobeko penepene na ngai ; nayokisa ba­ngo maloba maye nakosakola o matoi ma bango ; ba-likolo na banse bazala banzeneneke ba ngai.
Deut LinVB 31:29  Nayebi ’te nsima ya liwa lya ngai bino bokobeba mpe bokolongwa o nzela eye nalakisaki bino. O mikolo mikoya mpa­si ekokwela bino, zambi bokosala mabe o miso ma Yawe mpe bokoyokisa ye nkanda na misala mya bino. »
Deut LinVB 31:30  Na nsima Moze asakoli maloba manso ma nzembo eye o matoi ma bato banso ba Israel :