HEBREWS
Chapter 12
Hebr | LinVB | 12:1 | Tótála ndakisa ya baye bazalí kozínga bísó lokóla limpata : tóbóya mánso makokí komemisela bísó mókúmbá tǒ kotíela bísó libakú, libosó mpenzá lisúmu, mpô tópota mbángu mpé na moléndé o nzelá eye ya momekano tozalí kokóba. | |
Hebr | LinVB | 12:2 | Tótála bobélé Yézu : boyambi bwa bísó bobandí sé epái ya yě, yě mpé akokokisa bwangó. Etíkákí yě esengo eye akokákí kozwa, andimákí koyóka mpási o kurúse mpé abángákí nsóni ya kurúse té. Sikáwa afándí o lobóko la mobáli la ngwendé ya Nzámbe. | |
Hebr | LinVB | 12:3 | Bókanisa óyo basúmuki babóyákí na motéma mǒkó, mpô ’te bózónga nsima té mpé bólembe o mitéma mya bínó té. | |
Hebr | LinVB | 12:5 | Bobósání ndé maloba maye Nzámbe ayébísí bínó lokóla bána ba yě mpô ya koléndisa bínó ? Mwána wa ngáí, ókínola etúmbu té eye Nzámbe apésí yǒ, ólembe mpé té sókó apálélí yǒ. | |
Hebr | LinVB | 12:6 | Mokonzi akotúmbolaka moto yě akolingaka, akobéteke moto nyónso óyo andimí lokóla mwána wa yě. | |
Hebr | LinVB | 12:7 | Sókó boyókí mpási, bóyéba ’te Nzámbe alingí kobongisa bínó. Nzámbe akosála na bínó lokóla tatá akosálaka na bána. Mwána náni óyo tatá akopésaka etúmbu té ?* | |
Hebr | LinVB | 12:8 | Bána bánso bakozwaka etúmbu, bôngó sókó bínó bozwákí etúmbu té, mbele elakísí ’te bozalí bána ba sôló té, bozángí tatá. | |
Hebr | LinVB | 12:9 | Ntángo batatá ba bísó, baye babótákí bísó, bazalákí kotúmbola bísó, tozalákí komemya bangó. Bôngó bísó, sókó tolingí kobíka, tosengélí kolakisa Tatá wa milímo botósi bonéne té ? | |
Hebr | LinVB | 12:10 | Batatá ba bísó áwa o nsé bazalákí kopésa bísó etúmbu mwâ ntángo eké lokóla mitéma mya bangó mǒkó milingákí ; kasi Nzámbe akopésaka bísó etúmbu mpô ya bolámu bwa bísó mpô tókóma basántu lokóla yě. | |
Hebr | LinVB | 12:11 | Sôló, etúmbu yǒ kó té ekoyókisa moto esengo, ekoyókisa yě bobélé mpási. Nzókandé na nsima baye bandimí ’te etúmbu ébongisa bangó, bakozwa bobóto mpé bosémbo. | |
Hebr | LinVB | 12:12 | Yangó wâná bótómbola mabóko ma bínó malembí, mpé bóléndisa mabolóngó ma bínó mazángí makási. | |
Hebr | LinVB | 12:14 | Bóluka kozala bobóto na bato bánso, bózala basántu : moto azalí mosántu té, akomóno Nzámbe té. | |
Hebr | LinVB | 12:15 | Bókéba ’te atâ moto mǒkó té ábóya ngrásya ya Nzámbe ! Mǒ kó té ábima o ntéi ya bínó lokóla litíti lya bololo, óyo akokí kotía mobúlú mpé kobébisa lisangá lya bínó. | |
Hebr | LinVB | 12:16 | Moto mǒkó té ásála mpô bosóni tǒ ázánga limemyá ôná bilóko bisántu, lokóla Ezáu asáláká : atékí likokí lya mwána wa yambo mpô ’te álía biléi sé mbala yǒkó. | |
Hebr | LinVB | 12:17 | Boyébí yangó malámu : na nsima, áwa alingákí kozwa bobenisi bwa tatá, bazóngísí yě nsima. Akokákí kobóngola maloba ma tatá wa yě té, atâ abóndélákí yě na mái o míso. | |
Hebr | LinVB | 12:18 | Bínó bobelémékí lokóla ba-Israél na ngómbá Sinaí té, eye bakokákí komóno na míso : na molílí lokóla butú mpé na mompepe mwa ekumbaki ezalákí kobimisa móto mopelí makási. | |
Hebr | LinVB | 12:19 | Bayókákí ’te bazalákí kobéte mondúle mpé loláká la mongóngó monéne ; baye bánso bazalákí koyóka yangó babángákí mpé babóndélákí míngi ’te báloba na bangó lisúsu té. | |
Hebr | LinVB | 12:20 | Mpô bangó bakokákí kondima motíndo moye té : Atâ nyama eye ekosímba ngómbá, basengélí koboma yangó na mabángá. | |
Hebr | LinVB | 12:21 | Bamónókí makambo ma nsómo mpenzá. Atâ Móze alobákí : Nazalí koyóka nsómo mpé kolénge. | |
Hebr | LinVB | 12:22 | Kasi bínó bobelémí na ngómbá Síon mpé na engumbá ya Nzámbe wa bomoi, na Yerúzalem ya likoló, na bǎnzelú nkóto na nkóto. | |
Hebr | LinVB | 12:23 | Bobelémí na lisangá lya eyenga ya bána ba yambo, baye nkómbó ya bangó ikomámí o likoló. Bobelémí na Nzámbe óyo akokáta makambo ma bato bánso mpé na milímo mya basémba baye bakómí basántu. | |
Hebr | LinVB | 12:24 | Bokómí penepene na Yézu, Mobémbisi wa Bondeko bwa Sika, mpé na makilá ma yě maye mazalí kobélela Nzámbe mpô ya kopétola bísó ; makilá maye malekí makilá ma Abel. | |
Hebr | LinVB | 12:25 | Bókéba ’te bóyóka Nzámbe óyo akolobaka na bínó. Baye babóyákí koyóka maloba ma óyo alobákí o nkómbó ya yě áwa o nsé, bakokákí kokíma etúmbu té. Bôngó bóníbóní tókíma etúmbu, sókó tobóyí koyóka Oyo akolobaka na bísó út’o likoló ? | |
Hebr | LinVB | 12:26 | Oyo aningísákí mokili kala na loláká la yě lonéne alakélí bísó sikáwa boye : Mbala yǒ kó nakoningisa lisúsu bobélé mokili té, kasi ná likoló lokóla. | |
Hebr | LinVB | 12:27 | ‘Mbala yǒ kó lisúsu’ elakísí ’te maye makelámí makoningana mpé makolímwa, kasi maye makokí koningana té, makotíkala. | |
Hebr | LinVB | 12:28 | Bapésí bísó bokonzi bokokí koningana té, yangó wâná tótóndo Nzámbe mpé tókúmisa yě na losámbo lokosepelisa yě, na limemyá mpé na bobángi, | |