HEBREWS
Chapter 7
Hebr | LinVB | 7:1 | Zambi Melkísedek oyo, mokonzi wa Salém, nganga wa Nzámbe wa NtáLikoló, akeí kokútana na Abaráma mokolo alóngákí bakonzi basúsu o etumba, mpé abenísí yě. | |
Hebr | LinVB | 7:2 | Abaráma apésí yě eténi yǒ kó ya zómi ya bilóko bínso. Nkómbó Melkísedek elakísí ‘mokonzi wa bosémbo’. Azalí mpé mokonzi wa Salém lokóla ’te ‘mokonzi wa bobóto’. | |
Hebr | LinVB | 7:3 | Tatá, mamá na bankóko ba yě bayébání té. Toyébí mpé té ndéngé abótámákí mpé akúfákí. Melkísedek ôná aúlání na Mwána wa Nzámbe, azalí nganga Nzámbe sékô. | |
Hebr | LinVB | 7:4 | Táláni bonéne bwa moto óyo ! Abaráma, nkóko wa bísó, yě mpé apésí yě eténi ya zómi ya bilóko kitóko, biye abótólókí bangúná. | |
Hebr | LinVB | 7:5 | Mobéko motíndí ’te bána ba Lévi, baye bakómí banganga Nzámbe, basengélí kozwa eténi ya zómi ya bilóko bya bato bánso. Nzókandé bangó bazalí bandeko ba bangó, bána ba libótá lya Abaráma. | |
Hebr | LinVB | 7:6 | Kasi Melkísedek, atâ azalákí moto wa libótá lya Lévi té, azwákí eténi ya zómi ya bilóko bya Abaráma, mpé abenísákí óyo Nzámbe alakélákí bilakó. | |
Hebr | LinVB | 7:8 | Lisúsu : ba-Lévi bakozwaka eténi ya zómi ya bilóko bya bato, bazalí sé bato bakokúfa ; kasi ekomámí mpô ya Melkísedek ’te azalí naíno na bomoi. | |
Hebr | LinVB | 7:9 | Bakokí mpé koloba ’te áwa Abaráma apésákí Melkísedek eténi ya zómi ya bilóko bya yě, ezalí lokóla Lévi moto afútákí yě yangó, atâ ba-Lévi bangó mǒkó bakozwaka eténi ya zómi ya bilóko bya bato, | |
Hebr | LinVB | 7:10 | mpô Lévi abómbámákí naíno o nzóto ya nkóko wa yě ntángo Melkísedek akendékí kokútana na Abaráma. | |
Hebr | LinVB | 7:11 | Israél, ekólo ya Nzámbe, ezwákí bonganga Nzámbe bwa Lévi elongó na Mobéko. Bôngó, sókó bonganga Nzámbe bôná bozalákí nsúka ya bonganga Nzámbe, boye bobongísí mánso nyé, mpô níni Nzámbe atíí nganga Nzámbe mosúsu wa loléngé la Melkísedek, wa loléngé la Aróne té ? | |
Hebr | LinVB | 7:13 | Oyo batángí áwa azalí moto wa libótá lisúsu ; moto mǒkó té wa libótá lya yě azalákí kosála mosálá mwa altáre. | |
Hebr | LinVB | 7:14 | Bánso bayébí ’te Mokonzi wa bísó abótámákí o libótá lya Yúda. Ntángo Móze alobákí makambo matálí banganga Nzámbe, atángákí nkómbó ya libótá liye té. | |
Hebr | LinVB | 7:15 | Makambo mâná makómí polélé mpenzá, ntángo nganga Nzámbe mosúsu abimí, óyo aúlání na Melkísedek. | |
Hebr | LinVB | 7:16 | Akómákí nganga Nzámbe na lisálisi lya mibéko mya bato té, kasi na ngúyá ya bomoi boye bokosílaka té. | |
Hebr | LinVB | 7:19 | Ya sôló, Mobéko mwangó mokokísákí elóko yǒ kó té. Kasi elíkyá ya sika eyéí kobima, eye epusí bolámu : mpô ya yangó tokokí kobeleme na Nzámbe ! | |
Hebr | LinVB | 7:20 | Bato basúsu bakómí banganga Nzámbe mpô ya ndaí ya Nzámbe té, kasi Yézu akómí nganga Nzámbe mpô ya ndaí Nzámbe alayákí. | |
Hebr | LinVB | 7:21 | Ntángo aponí Yézu ázala nganga Nzámbe, Nzámbe alayí ndaí, alobí : Mokonzi alayí ndaí mpé akobóngola maloba ma yě té : Ozalí nganga Nzámbe sékô. | |
Hebr | LinVB | 7:23 | Lisúsu : basúsu bakómákí banganga Nzámbe basengélákí kozala míngi, mpô bazalákí kokúfa, bakokákí koúmela o mosálá mwa bangó té. | |
Hebr | LinVB | 7:25 | Yangó wâná baye bakobeleme na Nzámbe na ngúyá ya yě, akokí kobíkisa bangó sékô, zambí akoúmela na bomoi sékô mpô ’te álobela bangó. | |
Hebr | LinVB | 7:26 | Tosengélákí na nganga Nzámbe mokonzi lokóla yě : nganga Nzámbe mosántu óyo azalí na likambo lyǒkó té, na mbindo mpé té ; óyo akabwání na basúmuki mpé atómbwámí o ntá likoló. | |
Hebr | LinVB | 7:27 | Yě asengélí kobonzela Nzámbe mabonza mokolo na mokolo té, lokóla banganga bakonzi basúsu bakosálaka, libosó mpô ya masúmu ma bangó mǒkó, nsima mpô ya masúmu ma bato bánso. Yézu asálá bôngó mbala yǒ kó sékô, áwa amíbonzí yě méí. | |