I SAMUEL
Chapter 29
I Sa | LinVB | 29:1 | Ba-Filisti basangisi basoda ba bango banso o Afek. Ba-Israel bapiki nganda penepene na liziba lya Yizreel. | |
I Sa | LinVB | 29:2 | Bankumu ba Filisti batamboli liboso lya milongo mya basoda monkama to nkoto yoko ; Davidi na bato ba ye batamboli nsima ya bango elongo na Akis. | |
I Sa | LinVB | 29:3 | Bakonzi ba Filisti batuni : « Ba-Ebrei baye, banani ? » Akis azongiseli bakonzi ba Filisti : « Ezali Davidi, mosaleli wa Saul, mokonzi wa Israel ! Asili afandi epai ya ngai mbula yoko to ibale, nazali na likambo lyoko lya kopalela ye te, banda mokolo akimaki epai ya biso tee lelo. » | |
I Sa | LinVB | 29:4 | Bankumu ba Filisti basiliki na Akis, balobi na ye : « Longola moto oyo, azonga o esika olakisaki ye. Ye akoki kobunda na biso elongo te, mpo ’te abongwanela biso o ntango ya etumba. Boniboni akozwa bolamu o miso ma nkolo wa ye, soko abomi basoda ba biso te ? | |
I Sa | LinVB | 29:5 | Ye Davidi te, oyo bato bazalaki kobina mpo ya ye mpe koyemba : Saul abomaki bato nkoto, mpe Davidi abomi bato nkoto zomi ? » | |
I Sa | LinVB | 29:6 | Akis abengi Davidi mpe alobi na ye : « Lokola Yawe azali na bomoi, yo ozali moto wa bosembo. Nalingi ’te obima mpe ozonga o nganda elongo na ngai, mpo, banda mokolo oyaki epai ya ngai tee lelo, nazwi yo na mabe moko te. Kasi bankumu bandimi yo te. | |
I Sa | LinVB | 29:7 | Yango wana zonga o mboka ya yo mpe kende na boboto, mpo ’te bankumu ba-Filisti bayoka mabe te. » | |
I Sa | LinVB | 29:8 | Davidi alobi na Akis : « Nasali nini ? Na likambo nini okoki kopalela ngai mosaleli wa yo, ut’o mokolo nabandaki mosala epai ya yo tee lelo, bongo nakende kobunda lisusu te na banguna ba mokonzi wa ngai ? » | |
I Sa | LinVB | 29:9 | Akis ayanoli : « Nayebi. Solo, nandimi yo lokola anzelu wa Nzambe. Kasi bankumu ba Filisti balobaki na ngai : ‘Moto oyo akoki kokende etumba elongo na biso te’. | |
I Sa | LinVB | 29:10 | Teleme lobi na ntongo mpenza, yo na basaleli ba mokonzi wa yo, mpe awa moi mobandi kotana, bokende. » | |