I SAMUEL
Chapter 16
I Sa | LinVB | 16:1 | Yawe alobi na Samuel : « Mikolo boni okozala kolela Saul ? Ngai moko naboyi ye ; akoki kozala mokonzi wa Israel lisusu te. Kamata liseke lya yo, tondisa lyango na mafuta mpe kende epai ya Yese o Beteleme, zambi o kati ya bana ba ye naponi mwana moko azala mokonzi. » | |
I Sa | LinVB | 16:2 | Samuel alobi : « Boniboni nakende kuna ? Soko Saul ayoki yango, akoboma ngai ! » Kasi Yawe azongisi : « Okokende na mwana ngombe mpe okoloba : Nayei kobonzela Yawe libonza. | |
I Sa | LinVB | 16:3 | Okobenga Yese o esika okobonza libonza. Ngai moko nakoyebisa yo nini osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta. » | |
I Sa | LinVB | 16:4 | Samuel asali lokola Yawe atindaki ye. Awa akomi o Beteleme, bakolo ba mboka bayei kokutana na ye, bayoki nsomo mpe batuni ye : « Profeta, oyeli biso nsango ya boboto ? » | |
I Sa | LinVB | 16:5 | Samuel azongisi : « Solo, nayei kobonzela Yawe libonza. Bomipetola, bongo na nsima boya kobonza elongo na ngai. » Apetoli Yese na bana ba ye mpe abe-ngi bango o esika ya libonza. | |
I Sa | LinVB | 16:6 | Ekomi bango o esika esantu, Samuel amoni Eliab, amilobeli : « Ntembe te, Yawe aponi oyo. » | |
I Sa | LinVB | 16:7 | Kasi Yawe alobi : « Otala elongi ya ye mpe bolai bwa ye te. Naponi ye te ! Otala ye na miso ma bato te, bato bakotalaka nzoto, kasi Yawe akotalaka motema. » | |
I Sa | LinVB | 16:8 | Yese abengi Abinadab mpe akei na ye o boso bwa Samuel. Samuel alobi : « Yawe aponi ye mpe te ! » | |
I Sa | LinVB | 16:10 | Yese atalisi Samuel bana babali nsambo, kasi Samuel alobi na Yese : « Yawe aponi ata moko wa bango te. » | |
I Sa | LinVB | 16:11 | Atuni Yese lisusu : « Ozali na bana basusu te ? » Ye azongisi : « Etikali mwana wa nsuka, azali kokengele bibwele o esobe. » Samuel alobi : « Bakende kobenga ye ; soko ayei te tokolia te. » | |
I Sa | LinVB | 16:12 | Yese abengi Davidi : azalaki elenge mobali na nsuki itane, miso kitoko mpe nzoto kolongonu. Mpe Yawe alobi : « Ezali ye, pakola ye mafuta. » | |
I Sa | LinVB | 16:13 | Samuel akamati liseke na mafuta, apakoli ye mafuta o miso ma bandeko ba ye. Mpe uta mokolo mona, elimo ya Yawe ekiteli Davidi. Na nsima Samuel azongi o Rama. | |
I Sa | LinVB | 16:16 | Mokonzi wa biso aloba ; biso basaleli ba yo tokosalisa yo ; tokolukela yo moto moko ayebi kobete nzenze. Ntango elimo ebe eye euti epai ya Yawe ekokotela yo, moto ona abete nzenze, mpe motema mwa yo mokokita. » | |
I Sa | LinVB | 16:17 | Saul alobi na basaleli ba ye : « Bolukela ngai moto ayebi kobete nzenze malamu mpe boya na ye awa. » | |
I Sa | LinVB | 16:18 | Mosaleli moko ayanoli : « Nayebi mwana moko wa Yese, moto wa Beteleme, ayebi kobete nzenze, azali elombe, soda wa mpiko, akolobaka malamu, azali mpe na nzoto kitoko. Yawe azali na ye. » | |
I Sa | LinVB | 16:19 | Saul atindi bantoma epai ya Yese na maloba maye : « Tindela ngai mwana wa yo Davidi, oyo akokengeleke bibwele. » | |
I Sa | LinVB | 16:20 | Yese akei na mpunda, mampa, libenga lya mbeki ya vino na mwana ntaba ; atindi mwana wa ye Davidi akende kopesa Saul ina inso. | |
I Sa | LinVB | 16:21 | Davidi akomi epai ya Saul, mpe abandi kosalela ye. Saul alingi ye mingi mpe akomisi ye momemi wa bibuneli bya ye. | |
I Sa | LinVB | 16:22 | Saul atindeli Yese maloba maye : « Tika Davidi azala epai ya ngai mpo ’te asalela ngai, zambi asepelisi ngai mingi. » | |