Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I SAMUEL
Prev Up Next
Chapter 27
I Sa LinVB 27:1  Davidi amilobeli : « Ntembe te, mokolo moko Saul akoboma ngai. Etikali se nakima o mokili mwa ba-Filisti. Bobele bongo Saul akotika koluka ngai bipai binso o Israel, mpe nakobika o maboko ma ye. »
I Sa LinVB 27:2  Davidi asimbi nzela elongo na bato nkama motoba mpe aleki epai ya Akis, mwana wa Maok, mokonzi wa Gat.
I Sa LinVB 27:3  Davidi afandi epai ya Akis o mboka Gat, elongo na bato ba ye ; bayei moto na moto na libota lya ye, Davidi na basi ba ye babale, Akinoam wa Yizreel, na Abigayil, moto wa Karmel.
I Sa LinVB 27:4  Bayebisi Saul ’te Davidi akimaki o Gat ; bongo atiki koluka ye.
I Sa LinVB 27:5  Davidi alobi na Akis : « Nabondeli yo, pesa ngai esika o ekolo ya yo mpo nafanda wana. Mpo nini ngai mosaleli wa yo nafandi pene na yo o mboka ya mokonzi ? »
I Sa LinVB 27:6  Bobele o mokolo mo­na Akis apesi ye mboka Siklag. Yango wana mboka ena ekomi ya bakonzi ba Yuda tee lelo.
I Sa LinVB 27:7  Davidi afa­ndi bongo o mokili mwa ba-Filisti mbula yoko na sanza inei.
I Sa LinVB 27:8  Davidi akei elongo na bato ba ye kobunda etumba na ba-Gesur, ba-Girzi na ba-Amalek ; bango bafandi o mokili mona ut’o kala, kuna epai ya Sur tee mokili mwa Ezipeti.
I Sa LinVB 27:9  Davidi abebisi mokili, atiki moto moko na bomoi te, mobali te, mwasi mpe te ; abotoli mpata, ngombe, mpunda, kamela na mpe bilamba. Nsima azongi epai ya Akis.
I Sa LinVB 27:10  Akis atuni ye : « Lelo okendeki kobunda epai wapi ? » David ayanoli ye : « Tobundi etumba na Negeb o Yuda, to na Negeb ya ba-Yeramel, to na Negeb ya ba-Keniz. »
I Sa LinVB 27:11  Davidi atiki moto te azonga na bomoi o Gat, ezala mobali to mwasi, zambi amilobeli : « Soko babandi koloba, mbele bakofunda biso kuna. » Davidi azalaki kosala bongo o eleko azalaki kofanda o ekolo ya ba-Filisti.
I Sa LinVB 27:12  Akis atii motema na Davidi ; amilobeli : « Ntembe te, bato ba Israel bakomi koyina ye solo, bongo akozala mosaleli wa ngai seko. »