I SAMUEL
Chapter 19
| I Sa | LinVB | 19:1 | Saul ayebisi Yonatan, mwana wa ye, na mpe basaleli ba ye banso ’te akani koboma Davidi. Kasi Yonatan, mwana wa Saul, azalaki kolinga Davidi mingi. | |
| I Sa | LinVB | 19:2 | Yango wana akei kokebisa Davidi : « Tata wa ngai Saul azali koluka koboma yo, bongo keba lobi na ntongo ; kende komibomba, obima te. | |
| I Sa | LinVB | 19:3 | Ngai nakobima o mboka elongo na tata ; soko tokomi pene na esika obombami, ngai nakobondela tata mpo ya yo ; nakoyoka nini akoloba ; na nsima nakoyebisa yo. » | |
| I Sa | LinVB | 19:4 | Yonatan atangeli tata wa ye Saul malamu manso Davidi asalaki, alobi : « Mokonzi, osala mosaleli wa yo Davidi mabe te, asalaki yo mabe moko te ; kutu, maye asalaki mabongeli yo mingi. | |
| I Sa | LinVB | 19:5 | Abangaki liwa te, abomaki mo-Filisti mpe Yawe abikisi Israel mobimba. Yo moko omonoki yango mpe osepelaki. Bongo osala nde mabe na bobomi moto oyo azali na likambo te, awa olingi liwa lya Davidi, ntina te ? » | |
| I Sa | LinVB | 19:6 | Saul ayoki maloba ma Yonatan mpe alayi ndai : « Lokola Yawe azali na bomoi, Davidi akokufa te. » | |
| I Sa | LinVB | 19:7 | Na nsima Yonatan abengi Davidi mpe ayebisi ye maloba mana manso. Bakei epai ya Saul, mpe Davidi asaleli Saul lisusu lokola liboso. | |
| I Sa | LinVB | 19:8 | Awa etumba ebandi lisusu, Davidi amilengeli mpe akei kobunda na ba-Filisti ; anyati bango mpe banso bakimi. | |
| I Sa | LinVB | 19:9 | Mokolo mosusu elimo ebe euti epai ya Yawe, ekoteli Saul. Afandi o ndako ya ye likongo o maboko, Davidi azalaki kobete nzenze. | |
| I Sa | LinVB | 19:10 | Saul ameki kobwakela ye likongo mpe kokangisa ye o efelo ya ndako. Kasi Davidi amibongoli ntango Saul ameki kobaka ye o efelo na likongo, liye apiki o efelo. David akimi mbangu mpe alongwi na butu bona. | |
| I Sa | LinVB | 19:11 | Saul atindi bato mpo ’te bakengele ndako ya Davidi mpo ’te baboma ye o mokolo mwa nsima na ntongo. Kasi Mikal, mwasi wa Davidi, akebisi ye mpe alobi : « Soko okimi lelo na butu te, bakoboma yo lobi. » | |
| I Sa | LinVB | 19:13 | Mikal akamati ekeko ya ndako, atii yango o mbeto, akamati nsuki ya ntaba, atandi yango malamu o motó mwa mbeto mpe azipi yango na elamba. | |
| I Sa | LinVB | 19:14 | Saul atindi bato mpo ’te bakanga Davidi, mpe Mikal alobi na bango : « Azali kobele. » | |
| I Sa | LinVB | 19:15 | Kasi Saul atindi lisusu bato bakende kotala Davidi, alobi na bango : « Bomeme ye likolo lya mbeto, bongo nakoboma ye. » | |
| I Sa | LinVB | 19:16 | Ekoti bango o ndako, bamoni ekeko ya ndako elali o mbeto mpe nsuki ya ntaba epai ya motó. | |
| I Sa | LinVB | 19:17 | Saul atuni Mikal : « Mpo nini okosaki ngai mpe otikaki monguna wa ngai akima boye ? » Mikal ayanoli Saul : « Ye moto alobaki na ngai : Tika ngai nakende, soki te nakoboma yo. » | |
| I Sa | LinVB | 19:18 | Davidi akimi, akei epai ya Samuel o Rama mpe ayebisi ye manso Saul asalaki ye. Bango na Samuel bakei kofanda o ndako ya makita. | |
| I Sa | LinVB | 19:20 | Saul atindi bato bakanga Davidi. Kuna bamoni lingomba lya baprofeta bazalaki kosakola makambo, Samuel azalaki kokamba bango. Elimo ya Nzambe ekoteli mpe bato ba Saul ; bango mpe babandi kosakola. | |
| I Sa | LinVB | 19:21 | Bayebisi Saul ; ye atindi bato basusu, kasi bango mpe babandi kosakola. Saul atindi bato basusu mbala ya isato, bango babandi kosakola lokola. | |
| I Sa | LinVB | 19:22 | Sikawa Saul yemei akei o Rama mpe akomi o liziba linene lizali o Seku. Atuni : « Wapi esika Samuel na Davidi bakofandaka ? » Bazongisi : « Bazali o Rama o ndako ya makita. » | |
| I Sa | LinVB | 19:23 | Bongo akei o ndako ya makita o Rama. Elimo ya Nzambe ekoteli ye lokola ; o nzela azalaki se kosakola makambo tee akomi o ndako ya makita o Rama. | |