Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I SAMUEL
Prev Up Next
Chapter 17
I Sa LinVB 17:1  Ba-Filisti basangisi basoda ba bango mpo ya etumba. Bakei kosangana o mboka Soko o mokili mwa Yuda mpe bapiki nganda kati ya Soko na Azeka o mboka Efes-Damin.
I Sa LinVB 17:2  Saul asangisi ba-Israel, bapiki nga­nda o lobwaku la Gbukulu mpe batandani milongo mpo ya kobunda na ba-Filisti.
I Sa LinVB 17:3  Ba-Filisti bazalaki o ngo­mba yoko, mpe bato ba Israel o ngo­mba esusu ; lobwaku lozalaki o kati.
I Sa LinVB 17:4  Elombe moko abimi o nganda ya ba-Filisti, nkombo ya ye Goliat wa mboka Gat. Bolai bwa nzoto ya ye maboko motoba na ndambo.
I Sa LinVB 17:5  Alati enkoti ya etumba ya mbengi, mpe molato mwa ye mwa etumba moto-ngami na biteni bya bibende. Bozito bwa molato mona bozalaki bwa mitako nkoto itano mya mbengi.
I Sa LinVB 17:6  Azi­ngi makolo ma ye na manzanza ma mbengi, mpe akangi mopanga mwa mbengi o loketo.
I Sa LinVB 17:7  Esimbeli ya liko-ngo lya ye ezalaki lokola nzete ya batongi bilamba, mpe nsonge ya ebende ya likongo ezalaki ya mitako nkama motoba. Moto amemeli ye nguba atamboli liboso lya ye.
I Sa LinVB 17:8  Akei koteleme liboso lya milongo mya ba-Israel mpe agangeli bango : « Mpo nini bolingi kobunda na biso ? Ngai mo-Filisti mpenza, bino basaleli ba Saul ! Bopono moto moko aya kokutana na ngai.
I Sa LinVB 17:9  Soko ye aleki ngai na bokasi o etumba mpe alongi ngai, biso tokozala baombo ba bino ; soko ngai naleki ye na bokasi mpe nalongi ye, bino bokozala baombo ba biso mpe bokosalela biso. »
I Sa LinVB 17:10  Mo-Filisti abakisi : « Lelo tosilisa ntembe biso na ba-Israel. Bopesa moto moko aya kobunda na ngai. »
I Sa LinVB 17:11  Eyoki Saul na ba-Israel banso maloba mana, bale­ngi na nsomo.
I Sa LinVB 17:12  Davidi azalaki mwana wa Yese, moto wa Efrata, o Beteleme ya Yuda. Yese azalaki na bana babali mwambe. O eleko ya Saul, Yese asili akomi mobange mpe akokisi mibu miike.
I Sa LinVB 17:13  Ba­na ba ye basato ba yambo bakendeki mosala mwa soda ; nkombo ya bango : Eliab, motomolo, Abinadab mwana wa babale, na Sama mwana wa basato.
I Sa LinVB 17:14  Davidi azalaki mwana wa nsuka, mpe bana basato ba yambo bake­ndeki kolanda Saul.
I Sa LinVB 17:15  Davidi azalaki kosalela Saul, mpe na nsima azongi o mboka mpo ya kokengele bibwele bya tata wa ye o Beteleme.
I Sa LinVB 17:16  MoFilisti azalaki kobima ntongo mpe mpokwa inso, ayei komilakisa bongo mikolo ntuku inei.
I Sa LinVB 17:17  Yese alobi na mwana wa ye Davidi : « Kende na ngo­to eye ezali na mbuma ya mampa bakalingi, kamata mampa maye zomi mpe kende noki o nganda mpo ’te opesa yango na bandeko ba yo.
I Sa LinVB 17:18  Kamata fromage iye zomi mpe pesa ya­ngo na komanda wa basoda nkoto yoko. Tuna bandeko ba yo soko bazali malamu mpe bapesa yo elembo ’te bazali na bomoi.
I Sa LinVB 17:19  Bazali kuna elongo na Saul mpe na ba-Israel ba­nso o lobwaku la Gbukulu, bazali ko­bunda etumba na ba-Filisti. »
I Sa LinVB 17:20  Davidi alamuki na nta ntongo. Atiki bibwele bya ye o maboko ma mokengeli wa mpata, amemi biloko bya ye mpe akei lokola Yese atindaki, mpe akomi o nganda. Basoda balingi kokende o etumba bagangi migango mya etumba.
I Sa LinVB 17:21  Ba-Israel na ba-Filisti babongisi milongo mya etumba mpe bakomi kotalana.
I Sa LinVB 17:22  Davidi atiki biloko bya ye o maboko ma mokengeli wa biloko ; apoti mbangu epai etu­mba elingi ebanda mpo ’te apesa ba­ndeko ba ye losako.
I Sa LinVB 17:23  Awa azalaki kosolola na bango, elombe Goliat, mo-Filisti wa mboka Gat, abimi o milongo mya ba-Filisti. Alobi se maloba maye alobaki liboso, David ayoki mango.
I Sa LinVB 17:24  Awa bamoni moto oyo, ba-Israel banso babangi mingi mpe bakimi.
I Sa LinVB 17:25  Ba-Israel balobi : « Bomoni moto ona abimi ? Ayei se kotumola ba-Israel. Moto akoboma ye, mokonzi akopesa ye biloko mi­ngi ; akobalisa ye mwana wa ye mpe bandeko ba ye bakofuta mpako o Israel lisusu te. »
I Sa LinVB 17:26  Davidi atuni baye bazalaki penepene na ye : « Bakosala nini na moto oyo akoboma mo-Filisti mpe akolo-ngola nsoni o Israel ? Mo-Filisti oyo, akatemi nzoto te, ye nde nani mpo ’te atumola basoda ba Nzambe wa bomoi ? »
I Sa LinVB 17:27  Bato bayanoli ye se bongo : « Moto akoboma ye, bakosala ye lokola tolobaki. »
I Sa LinVB 17:28  Motomolo wa ye Eliab ayoki ’te azalaki kosolola na basoda, ayokeli ye nkanda mpe alobi : « Mpo nini oyei awa ? Otiki mpata ya yo o esobe o maboko ma nani ? Nayebi lolendo la yo mpe mayele mabe ma yo. Oyaki awa se mpo ’te otala bitumba ! »
I Sa LinVB 17:29  Davidi azongisi : « Mabe nini nasali ? Bongo nakoki kotuna lisusu te ? »
I Sa LinVB 17:30  Davidi atiki ye mpe akei kosolola na moto mosusu. Atuni motuna se moko mpe bazongiseli ye se lokola mbala ya liboso.
I Sa LinVB 17:31  Kasi bato basusu bayokaki maloba ma Davidi, bakei koyebisa Saul mango. Saul abe­ngi ye.
I Sa LinVB 17:32  Davidi alobi na Saul : « Moto moko abanga mo-Filisti oyo te. Ngai mo­saleli wa yo nakokende kobunda na ye. »
I Sa LinVB 17:33  Saul alobi na Davidi : « Yo okoki kokende kobunda na mo-Filisti oyo te, ozali se mwana, ye nde ameseni na bitumba ut’o bomwana. »
I Sa LinVB 17:34  Kasi Davidi alobi na Saul : « Ngai, mosaleli wa yo, nazalaki kokengele mpata ya tata wa ngai ; soko ntambwe to nkoi eyei koyiba mpata o lopango,
I Sa LinVB 17:35  na­landaki yango, nabeteki yango mpe nabotoloki mpata o monoko mwa yango. Awa elingaki kokanga ngai, nakangaki yango na mbanga mpe nabeteki yango tee ekufi.
I Sa LinVB 17:36  Ngai mosaleli wa yo nabomaki ntambwe na nkoi, nakosala se bongo na mo-Filisti mosutu oyo, zambi aluki basoda ba Nzambe na makambo. »
I Sa LinVB 17:37  Davidi alobi lisusu : « Yawe oyo abikisaki ngai o manzaka ma ntambwe mpe ma nkoi, akobikisa ngai mpe o maboko ma mo-Filisti oyo. » Saul alobi na Davidi : « Kende, Yawe azala na yo. »
I Sa LinVB 17:38  Saul alatisi Davidi monkoto mwa ye mwa soda, enkoti ya mbengi na bilamba bisusu bya etumba.
I Sa LinVB 17:39  Mpe likolo lya monkoto mwa ye akangi mopanga mwa ye ; Davidi ameki kotambola na byango, kasi akoki te, zambi ameseni na byango te. Alobi na Saul : « Nakoki kotambola boye te, zambi nameseni na byango te. » Bo­ngo balongoli ye bilamba bina.
I Sa LinVB 17:40  Davidi asimbi lingenda o maboko. O moluka akei koluka mabanga seliseli matano, abombi mango o libenga ; amemi mpe bilingongo mpe akei kokutana na mo-Filisti.
I Sa LinVB 17:41  Goliat abelemi, alandi soda oyo amemeli ye nguba mpo ya kobatela ye, akomi penepene na Davidi.
I Sa LinVB 17:42  Ntango mo-Filisti akomi komono Davidi, atali ye swii mpe akinoli ye, mpo Davidi azalaki se elenge, nsuki motane mpe elo­ngi kitoko.
I Sa LinVB 17:43  Alobi na Davidi : « Nazali nde mbwa mpo ’te oya kobunda na ngai na lingenda ? » Mpe abeteli Davidi mobondo o nkombo ya ba­nzambe ba ye.
I Sa LinVB 17:44  Alobi lisusu na Davidi : « Yaka pene na ngai, napesa ndeke ya likolo mpe nyama ya zamba misuni mya yo ! »
I Sa LinVB 17:45  Kasi Davidi azo­ngiseli mo-Filisti : « Yo oyeli ngai etu­mba na mopanga, na likongo mpe na makula ; kasi ngai nakobunda na yo o nkombo ya Yawe wa mampinga, mokonzi wa basoda ba Israel. Yo moko oluki bango na etumba.
I Sa LinVB 17:46  Le­lomei Yawe akokaba yo o maboko ma ngai, nakoboma yo mpe nakokata yo nki­ngo ; bobele lelo nakopesa bibembe bya ba-Filisti na ndeke ya likolo mpe na nyama ya zamba. O nse mobimba bakoyeba ’te o Israel Nzambe azali.
I Sa LinVB 17:47  Mpe bato banso basangani awa, bakoyeba ’te Yawe akolongisa bato na mopanga to na likongo te. Yawe akokamba etumba mpe ye akokaba bino o maboko ma biso. »
I Sa LinVB 17:48  Awa mo-Filisti apusani mpe ayei epai ya Davidi, Davidi abimi o milo-ngo mya basoda mpe akei kokutana na ye.
I Sa LinVB 17:49  Atii loboko o libenga, akamati libanga lyoko, mpe na bilingo­ngo ya ye abwakeli ye libanga. Azokisi ye o elongi ; libanga likoteli ye o motó ; akwei elongi o nse.
I Sa LinVB 17:50  Davidi alongi bongo mo-Filisti na bilingo­ngo mpe na libanga. Abeti mpe abomi ye ata azalaki na mopanga o maboko te.
I Sa LinVB 17:51  Apoti mbangu epai ya mo-Filisti, atelemi o nzoto ya ye, akamati mopanga mwa ye mpe akati ye nkingo. Emoni ba-Filisti ’te elombe wa ba­ngo akufi, bakimi.
I Sa LinVB 17:52  Bato ba Israel mpe ba Yuda batelemi mpe bagangi migango mya etumba, babengani ba-Filisti tee o mboka Gat, tee o ezibeli ya mboka Ekron. Bipai binso bibe­mbe bya ba-Filisti bilali o nzela, ut’o Saraim tee Gat na Ekron.
I Sa LinVB 17:53  Ba-Israel batiki kobengana ba-Filisti mpe bazongi o nganda ya bango, babotoli bango biloko binso.
I Sa LinVB 17:54  Davidi akamati motó mwa mo-Filisti mpe amemi mwango o Yeruzalem, akei na bibuneli bya ye o ema ya ye moko.
I Sa LinVB 17:55  Emonoki Saul boniboni Davidi akendeki kobundisa mo-Filisti, atunaki Abner, komanda wa basoda : « Abner, elenge mobali oyo, ye mwana wa nani ? » Abner azongisaki : « E mokonzi, ya solo mpenza, nayebi ye te ! »
I Sa LinVB 17:56  Mokonzi alobaki : « Kende kotuna soko elenge mobali oyo azali mwana wa nani ! »
I Sa LinVB 17:57  Euti Davidi koboma mo-Filisti, Abner akei na ye epai ya Saul ; amemi motó mwa mo-Filisti o maboko.
I Sa LinVB 17:58  Saul atuni ye : « Ele­nge mobali, yo mwana wa nani ? » Davidi azongisi : « Nazali mwana wa mosaleli wa yo Yese, moto wa Beteleme. »