I SAMUEL
Chapter 17
I Sa | LinVB | 17:1 | Ba-Filisti basangisi basoda ba bango mpo ya etumba. Bakei kosangana o mboka Soko o mokili mwa Yuda mpe bapiki nganda kati ya Soko na Azeka o mboka Efes-Damin. | |
I Sa | LinVB | 17:2 | Saul asangisi ba-Israel, bapiki nganda o lobwaku la Gbukulu mpe batandani milongo mpo ya kobunda na ba-Filisti. | |
I Sa | LinVB | 17:3 | Ba-Filisti bazalaki o ngomba yoko, mpe bato ba Israel o ngomba esusu ; lobwaku lozalaki o kati. | |
I Sa | LinVB | 17:4 | Elombe moko abimi o nganda ya ba-Filisti, nkombo ya ye Goliat wa mboka Gat. Bolai bwa nzoto ya ye maboko motoba na ndambo. | |
I Sa | LinVB | 17:5 | Alati enkoti ya etumba ya mbengi, mpe molato mwa ye mwa etumba moto-ngami na biteni bya bibende. Bozito bwa molato mona bozalaki bwa mitako nkoto itano mya mbengi. | |
I Sa | LinVB | 17:7 | Esimbeli ya liko-ngo lya ye ezalaki lokola nzete ya batongi bilamba, mpe nsonge ya ebende ya likongo ezalaki ya mitako nkama motoba. Moto amemeli ye nguba atamboli liboso lya ye. | |
I Sa | LinVB | 17:8 | Akei koteleme liboso lya milongo mya ba-Israel mpe agangeli bango : « Mpo nini bolingi kobunda na biso ? Ngai mo-Filisti mpenza, bino basaleli ba Saul ! Bopono moto moko aya kokutana na ngai. | |
I Sa | LinVB | 17:9 | Soko ye aleki ngai na bokasi o etumba mpe alongi ngai, biso tokozala baombo ba bino ; soko ngai naleki ye na bokasi mpe nalongi ye, bino bokozala baombo ba biso mpe bokosalela biso. » | |
I Sa | LinVB | 17:10 | Mo-Filisti abakisi : « Lelo tosilisa ntembe biso na ba-Israel. Bopesa moto moko aya kobunda na ngai. » | |
I Sa | LinVB | 17:12 | Davidi azalaki mwana wa Yese, moto wa Efrata, o Beteleme ya Yuda. Yese azalaki na bana babali mwambe. O eleko ya Saul, Yese asili akomi mobange mpe akokisi mibu miike. | |
I Sa | LinVB | 17:13 | Bana ba ye basato ba yambo bakendeki mosala mwa soda ; nkombo ya bango : Eliab, motomolo, Abinadab mwana wa babale, na Sama mwana wa basato. | |
I Sa | LinVB | 17:15 | Davidi azalaki kosalela Saul, mpe na nsima azongi o mboka mpo ya kokengele bibwele bya tata wa ye o Beteleme. | |
I Sa | LinVB | 17:16 | MoFilisti azalaki kobima ntongo mpe mpokwa inso, ayei komilakisa bongo mikolo ntuku inei. | |
I Sa | LinVB | 17:17 | Yese alobi na mwana wa ye Davidi : « Kende na ngoto eye ezali na mbuma ya mampa bakalingi, kamata mampa maye zomi mpe kende noki o nganda mpo ’te opesa yango na bandeko ba yo. | |
I Sa | LinVB | 17:18 | Kamata fromage iye zomi mpe pesa yango na komanda wa basoda nkoto yoko. Tuna bandeko ba yo soko bazali malamu mpe bapesa yo elembo ’te bazali na bomoi. | |
I Sa | LinVB | 17:19 | Bazali kuna elongo na Saul mpe na ba-Israel banso o lobwaku la Gbukulu, bazali kobunda etumba na ba-Filisti. » | |
I Sa | LinVB | 17:20 | Davidi alamuki na nta ntongo. Atiki bibwele bya ye o maboko ma mokengeli wa mpata, amemi biloko bya ye mpe akei lokola Yese atindaki, mpe akomi o nganda. Basoda balingi kokende o etumba bagangi migango mya etumba. | |
I Sa | LinVB | 17:22 | Davidi atiki biloko bya ye o maboko ma mokengeli wa biloko ; apoti mbangu epai etumba elingi ebanda mpo ’te apesa bandeko ba ye losako. | |
I Sa | LinVB | 17:23 | Awa azalaki kosolola na bango, elombe Goliat, mo-Filisti wa mboka Gat, abimi o milongo mya ba-Filisti. Alobi se maloba maye alobaki liboso, David ayoki mango. | |
I Sa | LinVB | 17:25 | Ba-Israel balobi : « Bomoni moto ona abimi ? Ayei se kotumola ba-Israel. Moto akoboma ye, mokonzi akopesa ye biloko mingi ; akobalisa ye mwana wa ye mpe bandeko ba ye bakofuta mpako o Israel lisusu te. » | |
I Sa | LinVB | 17:26 | Davidi atuni baye bazalaki penepene na ye : « Bakosala nini na moto oyo akoboma mo-Filisti mpe akolo-ngola nsoni o Israel ? Mo-Filisti oyo, akatemi nzoto te, ye nde nani mpo ’te atumola basoda ba Nzambe wa bomoi ? » | |
I Sa | LinVB | 17:28 | Motomolo wa ye Eliab ayoki ’te azalaki kosolola na basoda, ayokeli ye nkanda mpe alobi : « Mpo nini oyei awa ? Otiki mpata ya yo o esobe o maboko ma nani ? Nayebi lolendo la yo mpe mayele mabe ma yo. Oyaki awa se mpo ’te otala bitumba ! » | |
I Sa | LinVB | 17:30 | Davidi atiki ye mpe akei kosolola na moto mosusu. Atuni motuna se moko mpe bazongiseli ye se lokola mbala ya liboso. | |
I Sa | LinVB | 17:31 | Kasi bato basusu bayokaki maloba ma Davidi, bakei koyebisa Saul mango. Saul abengi ye. | |
I Sa | LinVB | 17:32 | Davidi alobi na Saul : « Moto moko abanga mo-Filisti oyo te. Ngai mosaleli wa yo nakokende kobunda na ye. » | |
I Sa | LinVB | 17:33 | Saul alobi na Davidi : « Yo okoki kokende kobunda na mo-Filisti oyo te, ozali se mwana, ye nde ameseni na bitumba ut’o bomwana. » | |
I Sa | LinVB | 17:34 | Kasi Davidi alobi na Saul : « Ngai, mosaleli wa yo, nazalaki kokengele mpata ya tata wa ngai ; soko ntambwe to nkoi eyei koyiba mpata o lopango, | |
I Sa | LinVB | 17:35 | nalandaki yango, nabeteki yango mpe nabotoloki mpata o monoko mwa yango. Awa elingaki kokanga ngai, nakangaki yango na mbanga mpe nabeteki yango tee ekufi. | |
I Sa | LinVB | 17:36 | Ngai mosaleli wa yo nabomaki ntambwe na nkoi, nakosala se bongo na mo-Filisti mosutu oyo, zambi aluki basoda ba Nzambe na makambo. » | |
I Sa | LinVB | 17:37 | Davidi alobi lisusu : « Yawe oyo abikisaki ngai o manzaka ma ntambwe mpe ma nkoi, akobikisa ngai mpe o maboko ma mo-Filisti oyo. » Saul alobi na Davidi : « Kende, Yawe azala na yo. » | |
I Sa | LinVB | 17:38 | Saul alatisi Davidi monkoto mwa ye mwa soda, enkoti ya mbengi na bilamba bisusu bya etumba. | |
I Sa | LinVB | 17:39 | Mpe likolo lya monkoto mwa ye akangi mopanga mwa ye ; Davidi ameki kotambola na byango, kasi akoki te, zambi ameseni na byango te. Alobi na Saul : « Nakoki kotambola boye te, zambi nameseni na byango te. » Bongo balongoli ye bilamba bina. | |
I Sa | LinVB | 17:40 | Davidi asimbi lingenda o maboko. O moluka akei koluka mabanga seliseli matano, abombi mango o libenga ; amemi mpe bilingongo mpe akei kokutana na mo-Filisti. | |
I Sa | LinVB | 17:41 | Goliat abelemi, alandi soda oyo amemeli ye nguba mpo ya kobatela ye, akomi penepene na Davidi. | |
I Sa | LinVB | 17:42 | Ntango mo-Filisti akomi komono Davidi, atali ye swii mpe akinoli ye, mpo Davidi azalaki se elenge, nsuki motane mpe elongi kitoko. | |
I Sa | LinVB | 17:43 | Alobi na Davidi : « Nazali nde mbwa mpo ’te oya kobunda na ngai na lingenda ? » Mpe abeteli Davidi mobondo o nkombo ya banzambe ba ye. | |
I Sa | LinVB | 17:44 | Alobi lisusu na Davidi : « Yaka pene na ngai, napesa ndeke ya likolo mpe nyama ya zamba misuni mya yo ! » | |
I Sa | LinVB | 17:45 | Kasi Davidi azongiseli mo-Filisti : « Yo oyeli ngai etumba na mopanga, na likongo mpe na makula ; kasi ngai nakobunda na yo o nkombo ya Yawe wa mampinga, mokonzi wa basoda ba Israel. Yo moko oluki bango na etumba. | |
I Sa | LinVB | 17:46 | Lelomei Yawe akokaba yo o maboko ma ngai, nakoboma yo mpe nakokata yo nkingo ; bobele lelo nakopesa bibembe bya ba-Filisti na ndeke ya likolo mpe na nyama ya zamba. O nse mobimba bakoyeba ’te o Israel Nzambe azali. | |
I Sa | LinVB | 17:47 | Mpe bato banso basangani awa, bakoyeba ’te Yawe akolongisa bato na mopanga to na likongo te. Yawe akokamba etumba mpe ye akokaba bino o maboko ma biso. » | |
I Sa | LinVB | 17:48 | Awa mo-Filisti apusani mpe ayei epai ya Davidi, Davidi abimi o milo-ngo mya basoda mpe akei kokutana na ye. | |
I Sa | LinVB | 17:49 | Atii loboko o libenga, akamati libanga lyoko, mpe na bilingongo ya ye abwakeli ye libanga. Azokisi ye o elongi ; libanga likoteli ye o motó ; akwei elongi o nse. | |
I Sa | LinVB | 17:50 | Davidi alongi bongo mo-Filisti na bilingongo mpe na libanga. Abeti mpe abomi ye ata azalaki na mopanga o maboko te. | |
I Sa | LinVB | 17:51 | Apoti mbangu epai ya mo-Filisti, atelemi o nzoto ya ye, akamati mopanga mwa ye mpe akati ye nkingo. Emoni ba-Filisti ’te elombe wa bango akufi, bakimi. | |
I Sa | LinVB | 17:52 | Bato ba Israel mpe ba Yuda batelemi mpe bagangi migango mya etumba, babengani ba-Filisti tee o mboka Gat, tee o ezibeli ya mboka Ekron. Bipai binso bibembe bya ba-Filisti bilali o nzela, ut’o Saraim tee Gat na Ekron. | |
I Sa | LinVB | 17:53 | Ba-Israel batiki kobengana ba-Filisti mpe bazongi o nganda ya bango, babotoli bango biloko binso. | |
I Sa | LinVB | 17:54 | Davidi akamati motó mwa mo-Filisti mpe amemi mwango o Yeruzalem, akei na bibuneli bya ye o ema ya ye moko. | |
I Sa | LinVB | 17:55 | Emonoki Saul boniboni Davidi akendeki kobundisa mo-Filisti, atunaki Abner, komanda wa basoda : « Abner, elenge mobali oyo, ye mwana wa nani ? » Abner azongisaki : « E mokonzi, ya solo mpenza, nayebi ye te ! » | |
I Sa | LinVB | 17:57 | Euti Davidi koboma mo-Filisti, Abner akei na ye epai ya Saul ; amemi motó mwa mo-Filisti o maboko. | |