Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I SAMUEL
Prev Up Next
Chapter 7
I Sa LinVB 7:1  Bato ba Kiriat-Yearim bayei, bamemi Sanduku ya Yawe, batii yango o ndako ya Abinadab ezali o ngomba. Na nsima baponi Eleazar, mwana wa Abinadab, azala moke­ngeli wa Sanduku ya Yawe.
I Sa LinVB 7:2  Uta mokolo Sanduku ya Bondeko ekomi o Kiriat-Yearim, mibu mileki ntuku ibale, mpe ba-Israel banso bazalaki komilela epai ya Yawe.
I Sa LinVB 7:3  Samuel alobi na bato banso ba Israel : « Soko ya solo bozongeli Yawe na mo­tema moko, bolongola bikeko bya Baal na Astarte o kati ya bino ; bobongola mitema epai ya Yawe mpe bosalela se ye. Bongo akobikisa bino o maboko ma ba-Filisti. »
I Sa LinVB 7:4  Yango wana bato ba Israel balongoli bikeko bya Baal na Astarte, mpe basaleli se Yawe.
I Sa LinVB 7:5  Samuel alobi : « Bosangisa bato ba­nso ba Israel o mboka Mispa mpe nakobondela Yawe mpo ya bino. »
I Sa LinVB 7:6  Ba­nso basangani o Mispa, bakei kotoka mai mpe basopi mango liboso lya Yawe ; mokolo mona balali nzala mpe balobi : « Tosalaki masumu o miso ma Yawe. » Samuel asambisi ba-Israel bo­ngo o Mispa.
I Sa LinVB 7:7  Awa ba-Filisti bayoki ’te ba-Israel basangani o Mispa, bakonzi ba ba-Filisti bakei etumba na bango. Eyoki ba-Israel ’te ba-Filisti bazalaki koya, babangi.
I Sa LinVB 7:8  Balobi na Samuel : « Bondela Yawe Nzambe wa biso ’te abikisa biso o maboko ma ba-Filisti. »
I Sa LinVB 7:9  Samuel akamati mwana mpata mpe abonzeli Yawe yango, abondeli Yawe mpo ya Israel, mpe Yawe andimeli ye.
I Sa LinVB 7:10  Ntango Samuel azalaki kobo­nza libonza lya kotumba, ba-Filisti babandi etumba na ba-Israel ; kasi o mokolo mona Yawe abetibeti ba-Filisti, atii mobulu o kati ya bango, mpe bongo ba-Israel balongi.
I Sa LinVB 7:11  Bato ba Israel balongwi o Mispa, balandi ba-Filisti mpe babundi na bango etu­mba tee o Bet-Kar.
I Sa LinVB 7:12  Na nsima Samuel akamati libanga mpe atelemisi lyango kati ya Mispa na Sen mpe apesi lyango nkombo Eben-a-Ezer, alobi : « Yawe asalisi biso tee awa. »
I Sa LinVB 7:13  Ba-Filisti bakiti mpenza. Bayi­nge­li lisusu o mokili mwa Israel te ; Ya­we asilisi ba-Filisti na bokasi bwa loboko la ye mikolo minso mya bomoi bwa Samuel,
I Sa LinVB 7:14  Mboka inso ba-Filisti babotoloki ba-Israel izongeli ba­ngo, banda Ekron tee Gat. Ba-Israel babikisi mokili mwa bango mobimba o maboko ma ba-Filisti. Ba-Israel na ba-Amor bafandi na boboto.
I Sa LinVB 7:15  Samuel azalaki zuzi o Israel bomoi bwa ye mobimba.
I Sa LinVB 7:16  Mobu na mobu azalaki kokende o Betel, Gilgal na Mispa mpe ayangeli Israel o bisika bina binso azalaki zuzi wa Israel.
I Sa LinVB 7:17  Na nsima azongi o Rama, zambi ndako ya ye ezalaki wana. Ut’o mboka ena azalaki kosambisa Israel. Kuna ato-ngeli Yawe altare.