Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LAMENTATIONS
1 2 3 4 5
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 4
Lame LinVB 4:1  Ndenge nini wolo ebebi, wolo eye eleki peto ? Mabanga masantu mapanzani o matumu ya balabala inso.
Lame LinVB 4:2  Bana ba Sion bakoki na motuya monene, lokola wolo bapetoli ; bongo bakomi kotala bango se lokola mbeki isalemi na maboko ma moyemi !
Lame LinVB 4:3  Ata minsole mikopesaka bana ma­béle mpe mikonungisaka bango. Kasi bato ba ekolo ya ngai motema mabe lokola maligbanga ma eliki.
Lame LinVB 4:4  Bilezi bayoki mposa ya mai, lolemu la bango lokangami na eda­da ; bana bake basengi biloko bya bolei, kasi moto moko apesi bango te.
Lame LinVB 4:5  Baye bazalaki kolia biloko elengi bakomi kokufa o balabala. Baye bazalaki kolata bilamba bya longondo bakomi kolata biteni ba­lokotoki o bipoli.
Lame LinVB 4:6  Masumu ma bato ba ekolo ya ngai maleki masumu ma bato ba Sodoma, eye ekufaki na mbala yoko, ata bato babomaki yango te.
Lame LinVB 4:7  Bilenge babali ba bango babonzami na Nzambe bazalaki peto leka mbula ya mpembe, nzoto etane leka libanga lya ngola, bilongi bya bango bingengeki leka libanga lya safir.
Lame LinVB 4:8  Sikawa bilongi bya bango biindi leka mputulu ya makala, bakoki koyeba bango lisusu te ; lomposo la bango lokangemi na minkuwa, lokauki lokola nkoni.
Lame LinVB 4:9  Baye bakufaki na mopanga bayokaki mpasi te lokola baye bakufaki na nzala, mpo bokasi bosilaki mpe bale­mbeki nye, mpo bazalaki na mbuma ya bila­nga te.
Lame LinVB 4:10  Bamama bakozalaka na motema bolingi balambaki mpe baliaki bana ba bango moko, mpo mpasi ya bato ba ngai elekaki.
Lame LinVB 4:11  Yawe alandi nkanda ya ye, atumboli na nkanda enene. Móto mwa nkanda ya ye mopeli o Sion, mozikisi engumba kin’o mabelé.
Lame LinVB 4:12  Bakonzi na bato banso ba nse bandimaki te ’te mokolo moko monyokoli na monguna bakoyi­ngela o Yeruzalem.
Lame LinVB 4:13  Yango esalemi mpo ya masumu ma baprofeta mpe mabe ma ba­nganga Nzambe, baye basopi makila ma bato ba bosembo o engumba.
Lame LinVB 4:14  Bazalaki koyengayenga o balabala lokola bato bakufa miso ; nzoto ya bango ibebaki na makila, bongo ata moto moko akokaki kosimba bango na bilamba.
Lame LinVB 4:15  Bato bazalaki koganga : « Keba na bango ! Osimba bango te, bazali na mbindo ! » Baye bakimaki o bikolo bisusu bakokaki kofanda kuna te.
Lame LinVB 4:16  Yawemei apanzaki bango, apanganaki na bango lisusu te. Bato bazalaki komemya lisusu ba­nganga Nzambe te, bakolo ba mboka mpe te.
Lame LinVB 4:17  Ntango inso tozalaki koluka lisalisi, kasi se mpamba. Lokola bakengeli tozalaki kotia elikya na ekolo eye ekokaki kobikisa biso te.
Lame LinVB 4:18  Bazalaki kokenge nzela ya biso, mpe kopekisa biso kotambola o engumba ya biso. Mikolo mya biso mikokaki, ya solo, tokomaki o nsuka !
Lame LinVB 4:19  Banyokoli bazalaki kolanda biso mbangu, leka bingondo o likolo. Bazalaki kolanda biso o ngomba mpe kotiela biso mitambo o eliki.
Lame LinVB 4:20  Moponomi wa Yawe, mpema ya zolo ya biso, akangemaki o mabulu ma bango. Tokanisaki ’te : « Pene na ye tokoki kofanda o bikolo bisusu ! »
Lame LinVB 4:21  Bato ba Edom, bosepela naino ! Boyoka naino nsai, bato ba Us ! Kasi mokolo moko bino mpe bokomele nkeni ya malozi, bokolangwa mpe bokolakisa bolumbu bwa bino !
Lame LinVB 4:22  Osilisi etumbu ya yo, Sion. Bakokanga yo o boombo lisusu te ! Kasi Yawe akotumbola yo, Edom, mpo ya mabe ma yo, akolakisa masumu ma yo polele.