Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
LAMENTATIONS
1 2 3 4 5
Prev Up Next
Chapter 5
Lame LinVB 5:1  E Yawe, kundola makambo makweli biso, tala boniboni tosambwi !
Lame LinVB 5:2  Mokili mwa biso mokomi o maboko ma bauta, ndako ya biso o maboko ma bato ba bikolo bisusu.
Lame LinVB 5:3  Tokomi bana bitike, tozali na tata te, bamama bakomi lokola basi baze­nge.
Lame LinVB 5:4  Tokomeleke mai ma kosomba, tosengeli kofuta nkoni ya biso.
Lame LinVB 5:5  Batieli biso mokumba o mapeke, tonyokwami mingi. Tokomilembisaka, tokoki kopema te.
Lame LinVB 5:6  Tosengi lisalisi lya ba-Ezipeti na ba-Asur, mpo tozwa biloko bya bolei.
Lame LinVB 5:7  Bankoko ba biso basalaka masumu, bawei, kasi biso tozwi etumbu mpo ya mabe ma bango.
Lame LinVB 5:8  Baombo bakomi koyangela biso, moto moko te akobikisa biso o maboko ma bango.
Lame LinVB 5:9  Koluka biloko bya bolei ekomi likama, o eliki bato bakokanelaka biso na mopanga.
Lame LinVB 5:10  Nzoto ya biso ekoyokaka móto lokola etumbelo, zambi nzala ekangi biso.
Lame LinVB 5:11  Babebisi basi o Sion, bangondo o bingumba bya Yuda.
Lame LinVB 5:13  Bilenge babali bakumbi libanga lya konika, bakwei mpo ya bozito bwa mabaya bakumbi.
Lame LinVB 5:14  Bakolo ba mboka bakosambisaka makambo lisusu te, bilenge batiki koyemba nzembo.
Lame LinVB 5:15  Tozali na esengo o motema lisusu te, Libina lya biso libongwani nze­mbo ya lilaka.
Lame LinVB 5:16  Tokolataka enkoti ya lokumu lisusu te, mawa na biso mpo tosali masumu !
Lame LinVB 5:17  Yango wana toyoki motema mpasi, miso ma biso makomi molili :
Lame LinVB 5:18  ngomba Sion ebebi nye, minsole mikomi kotambola wana !
Lame LinVB 5:19  Kasi yo, Yawe, okoumela seko ; ngwende ya yo ekoumela o bileko binso !
Lame LinVB 5:20  Okobosana biso nde seko ? Okotika biso nde kin’o nsuka ya mikolo mya biso ?
Lame LinVB 5:21  Yawe, sala ’te tozongela yo, tokozonga ; bongisa bomoi bwa biso, tokoma lokola kala.
Lame LinVB 5:22  To obwaki biso seko mpe oyokeli biso nkanda ndelo te ?