Chapter 1
Phil | LinVB | 1:1 | Pólo, o bolóko mpô ya Krístu Yézu, na ndeko Timotéo, óna Fílemo, móníngá wa bísó wa bolingo, | |
Phil | LinVB | 1:2 | na ndeko mwásí Apia, na Arsípo, móníngá wa bísó wa mosálá, mpé na bakrístu bánso bakosanganaka epái ya yó. | |
Phil | LinVB | 1:6 | Boyambi boye bokokómisaka yǒ lisangá na Krístu bósála ’te óyéba malámu maye tokokí kosála mpô ya Krístu. | |
Phil | LinVB | 1:7 | Sôló, ndeko, bolingi bwa yǒ bozalí kosepelisa mpé koléndisa ngáí, zambí oléndísí mitéma mya bakrístu ! | |
Phil | LinVB | 1:9 | mpô nayébí bolingi bwa yǒ nalingí kosénge yǒ éloko mǒkó, ngáí Pólo : mobangé, o bolóko mpô ya Krístu Yézu. | |
Phil | LinVB | 1:11 | Sôló, libosó ozwákí litómba na yě té, kasi sikáwa akokí kopésa yǒ lisálisi, sé lokóla asálísí ngáí. | |
Phil | LinVB | 1:13 | Nalingákí átíkala na ngáí mpô ’te ásálisa ngáí o nkómbó ya yǒ, áwa nakangémí o bolóko mpô ya Nsango Elámu. | |
Phil | LinVB | 1:14 | Nzókandé nalingákí kosála yangó té sókó yǒ ondimí té. Nalingí kotínda yǒ na makási té, malámu ósála yangó na motéma mwa yǒ mǒkó. | |
Phil | LinVB | 1:16 | lokóla moómbo lisúsu té, kasi lokóla ndeko wa bolingo, óyo alekí moómbo na bolámu. Azalí ndeko wa ngáí wa sôló, kasi akozala libosó ndeko wa yǒ o míso ma bato mpé ma Mokonzi ! | |
Phil | LinVB | 1:18 | Sókó asálákí yǒ mabé tǒ azalí na nyongo, tálá yangó lokóla ngáí moto nazalí na nyongo na yǒ. | |
Phil | LinVB | 1:19 | Na bokomi nkómbó ya ngáí, ngáí Pólo nandimí kofúta… Nakokundola mpé té bóníbóní yǒ mǒkó ozalí na nyongo ya ngáí ; nyongo êná, ndé yǒ mǒkó ! | |
Phil | LinVB | 1:20 | Ya sôló, ndeko wa ngáí, sálélá ngáí mosálá moye mpô ya Mokonzi. Kitísá motéma mwa ngáí mpô ya Krístu. | |
Phil | LinVB | 1:21 | Nayébí malámu ’te okosála maye nakomélí yǒ o monkandá ; okosála leká naíno maye nazalí kosénge yǒ. | |
Phil | LinVB | 1:22 | Bongísélá ngáí mpé esíká ya kolála ; mpô ya losámbo la bínó nazalí na elíkyá ’te nakozóngela bínó. | |
Phil | LinVB | 1:23 | Epafráse atíndélí yǒ mbóte, yě azalí esíká yǒ kó na ngáí o bolóko mpô ya Krístu Yézu. | |
Phil | LinVB | 1:24 | Oyamba mpé mbóte ya Márko, Aristárko, Démas mpé ya Lúka, bangó bánso bakosálaka na ngáí elongó. | |