Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
GALATIANS
1 2 3 4 5 6
Prev Up Next
Chapter 5
Gala LinVB 5:1  Krístu asikólí bísó mpô tózala na bonsómí. Bópika mpéndé, bóndima té ’te bámemisa bínó lisúsu mókúmbá mwa boómbo.
Gala LinVB 5:2  Ngáí Pólo nayébísí bínó boye : Sókó bondimí ’te bákátisa bínó nzóto, bokozwa litómba lyǒ kó na Krístu té.
Gala LinVB 5:3  Nayébísí lisúsu na moto nyó­nso óyo alingí ’te bákátisa yě nzóto : asengélí kotósa Mobéko mobimba.
Gala LinVB 5:4  Bínó bato bozalákí koluka kokóma bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe na botósi Mobéko, bokabwání na Krístu mpé bobébísí ngrásya o mitéma mya bínó.
Gala LinVB 5:5  Kasi bísó tozalí na elíkyá ’te, na ngúyá ya Elímo, tokokóma bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe, mpô ya boyambi.
Gala LinVB 5:6  Sókó moto azalí na Krístu lisangá, ákátisa nzóto tǒ té, ezalí na ntína mpenzá té ; kasi ázala moto wa boyambi mpé ásála misálá mí­nso na bolingi.
Gala LinVB 5:7  Bobandákí malámu. Náni apekísí bínó kokóba kotósa mambí ma bosôló ?
Gala LinVB 5:8  Moto apésí bínó mayéle mâná, ezalí Nzámbe té, óyo abyángí bínó.
Gala LinVB 5:9  Bókanisa : mwâ nkísi ekovímbisaka sǎni mobimba ya fufú ya mámpa.
Gala LinVB 5:10  Nazalí na elíkyá ’te, sókó botíkálí na Krístu lisangá, bokobóngola makanisi ma bínó té. Kasi moto óyo ayéí kotía mobúlú o mitéma mya bínó akokita o likambo, ázala atâ náni.
Gala LinVB 5:11  Bandeko, sókó ya sôló nazalí naíno kotéya ’te basengélí kokátisa nzóto, mpô níni bazalí kotungisa ngáí ? Sókó ezalákí bôngó, kurúse ezalákí lisúsu ntína ya esímbisi té !
Gala LinVB 5:12  Bato bazalí kotía mobúlú o mitéma mya bínó, malámu bákátakáta nzóto ya bangó mobimba !
Gala LinVB 5:13  Sôló, bandeko, bínó bánso bo-byángémí bózala bansómí. Kasi bómíkósa té ! Bonsómí boye bóli­ngisa bínó té ’te bólanda mpósá ya nzóto. Kasi bolingi bótínda bínó ’te bósálisana.
Gala LinVB 5:14  Zambí Mobéko mobimba mokomámí o mobéko sé mǒ­kó : Okoli­nga móníngá wa yǒ lokóla okomíli­ngaka.
Gala LinVB 5:15  Kasi sǒ kó bozalí koswâ báníngá mpé kotíana manzáka, bókéba, sókí té bokobomana.
Gala LinVB 5:16  Nayébísí bínó : bótíka Elímo Sántu ákamba bínó, bôngó bólanda mpósá ya nzóto té.
Gala LinVB 5:17  Zambí mpósá ya nzóto ekolukaka maye Elímo azalí kobóya, sé lokóla Elímo akotíndaka maye mpósá ya nzóto ezalí kobóya. Bangó bábalé bazalí sé bangú­ná, bôngó maye bínó mǒkó bolingí bokokí kosála mangó té.
Gala LinVB 5:18  Kasi sókó Elímo akambí bínó, bosengélí kotósa Mobéko lisúsu té.
Gala LinVB 5:19  Bísó bánso toyébí maye nzóto ekolukaka : ekóbo, mambí mazángí bopéto mpé ma bosóni,
Gala LinVB 5:20  bokúmisi bikeko, mambí ma nkísi, boyini, bongúná, zúwa, nkándá, boswâni, bokabwani, bobóyani,
Gala LinVB 5:21  likúnyá, bolángwi masanga, lokósó, bôngó na bôngó. Nakébísí bínó, lokóla nasílí kokébisa bínó libosó : baye bakosálaka makambo mâná bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe té.
Gala LinVB 5:22  Kasi na ngúyá ya Elímo bato bakosálaka boye : bakolinganaka, bazalí na esengo mpé na bobóto, bakokangaka mitéma, bakosálisanaka, bazalí na motéma molámu mpé na bondeko bwa sôló,
Gala LinVB 5:23  bazalí motéma ngolu mpé bakomíbátelaka : ma­kambo maye mánso mapekísámí na mobéko mǒkó té.
Gala LinVB 5:24  Baye bakómí bato ba Krístu Yézu basílí babákí nzóto ya bangó o kurúse, elo­ngó na mpósá mpé na malúli ma yangó.
Gala LinVB 5:25  Elímo moto apésí bísó bomoi, bôngó tósála sé lokóla Yě akolakisa bísó.
Gala LinVB 5:26  Tóluka lokúmu la mpámba té, tóluka báníngá na makambo té, tóyókelana zúwa té.