Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II CHRONICLES
Prev Up Next
Chapter 8
II C LinVB 8:1  Salomo asali mibu ntuku ibale mpo ya kotonga Tempelo ya Yawe na ndako ya ye moko.
II C LinVB 8:2  Na nsima alendisi mboka iye Kuram apesaki ye, afandisi bana ba Israel kuna.
II C LinVB 8:3  Salomo akei kobundisa Amat-Soba mpe abotoli yango.
II C LinVB 8:4  Alendisi mboka Tadmor o eliki na mboka inso esika bakobombaka biloko o mokili mwa Amat.
II C LinVB 8:5  Alendisi mpe Bet-Oron ya likolo mpe Bet-Oron ya nse, mpe azi­ngi yango na lopango, atii bizibeli mpe bikangeli.
II C LinVB 8:6  Alendisi lisusu Baalat, mboka inso esika bakobombaka biloko, na mboka inso ya makalo mpe mboka inso ya farasa. Salomo atongi mpe ndako inso alingi koto­nga o Yeruzalem, o Libano mpe o bipai binso azalaki mokonzi.
II C LinVB 8:7  Ba-Iti, ba-Amor, ba-Perizi, ba-Ivi na ba-Yebus baye batikali, bango bazalaki ba-Israel te,
II C LinVB 8:8  bankoko ba bango batikalaki o mokili, baye ba-Israel babomaki te, Salomo akamati bango mpo ’te basala mosala makasi tee lelo.
II C LinVB 8:9  Kasi Salomo atindi bana ba Israel mo­sala mona mwa boombo te, zambi bazalaki bato ba mosala mwa soda, bakomanda na baye bakomemeke bibu­neli, bakapita ba baye bakota­mbwisaka makalo mpe farasa.
II C LinVB 8:10  Bakapita ba bato bakotalaka misala mya Salomo bazalaki nkama ibale na ntuku itano ; bango bazalaki kotinda bato basala misala mya bango.
II C LinVB 8:11  Salomo alongoli mwasi wa ye, mwana wa Farao, o Engumba ya Davidi mpe afandisi ye o ndako amito-ngeli, zambi akanisi : Mwasi wa ngai akoki kofanda o ndako ya Davidi mokonzi wa Israel te, mpo esika Sa­nduku ya Yawe ekotoki ezali esika esantu.
II C LinVB 8:12  Na nsima Salomo abonzeli Yawe mabonza ma kotumba o altare ya Yawe, eye atongaki o boso bwa Ekoteli.
II C LinVB 8:13  Alandi bongo milulu mya kobonza mabonza lokola Moze atindaki o mikolo mya sabato, mikolo sanza ya sika ekobimaka mpe biyenga binene bisusu, mbala isato o mobu : Eyenga ya Mampa mazangi nkisi, eyenga ya Poso, mpe eyenga ya Biema.
II C LinVB 8:14  Alandi mibeko mya tata wa ye : akaboli ba­nganga Nzambe mangomba mango­mba mpo ’te basala mosala na likelemba, apesi mpe ba-Levi mosala mwa kokumisa Nzambe na bosalisi banganga Nzambe lokola milulu mya mokolo na mokolo mitindi ; atii mpe bakengeli ba bizibeli bya Tempelo, moto na moto o esika ya ye, zambi Davidi, moto wa Nzambe, atindaki bongo.
II C LinVB 8:15  Babuki mobeko moko te mo­ye motali banganga Nzambe mpe ba-Levi, ata mibeko mitali ebombelo ya mosolo.
II C LinVB 8:16  Bongo mosala Salomo alengeleki, moye mobandaki mpenza mokolo batiaki mabanga ma nse, mobongi nye mokolo basukisi kotonga Tempelo ya Yawe.
II C LinVB 8:17  Na nsima Salomo akei o Esio-Geber mpe o Elat o libongo lya mbu o mokili mwa Edom.
II C LinVB 8:18  Kuram ati­ndeli ye masuwa na bato bayebi mbu malamu. Elongo na basaleli ba Salomo bakei o Ofir ; ut’o mboka ena bayei na talenta ya wolo nkama inei na ntuku itano ; bapesi Salomo yango.