II KINGS
Chapter 22
II K | LinVB | 22:1 | Yozia akokisi mibu mwambe ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku isato na moko o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Yedida, mwana wa Adaya, moto wa Boskat. | |
II K | LinVB | 22:2 | Asali malamu o miso ma Yawe mpe alandi ezalela ya nkoko wa ye Davidi o mambi manso, atamboli nzela nyokanyoka te. | |
II K | LinVB | 22:3 | O mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa ye, mokonzi Yozia atindi mokomi minkanda Safan, mwana wa Asalya, nkoko wa Mesulam, o Tempelo ya Yawe, alobi na ye : | |
II K | LinVB | 22:4 | « Kende epai ya nganga Nzambe mokonzi Kilkia mpe loba na ye ata-nga mosolo monso bato bapesaki mpo ya Tempelo ya Yawe, mosolo moye bakengeli ba ezibeli ya Tempelo bazwaki o maboko ma bango. | |
II K | LinVB | 22:5 | Bapesa mosolo mwango na bakapita ba misala mpe na baye bakobongisa Tempelo ya Yawe esika ebebi ; | |
II K | LinVB | 22:6 | bafuta bongo basali ba mabaya, baye bakokata mabanga na baye bakotonga mango ; basomba mpe mabaya na mabanga manene mpo ya kobongisa Tempelo. | |
II K | LinVB | 22:7 | Bapangana te na mosolo basali bazwaki, zambi banso basali mosala mwa bango na bosembo. » | |
II K | LinVB | 22:8 | Nganga Nzambe monene Kilkia alobi na Safan, mokomi minkanda : « Nazwi buku ya Mobeko o Tempelo ya Yawe ! » Kilkia apesi Safan buku, mpe oyo abandi kotanga yango. | |
II K | LinVB | 22:9 | Mokomi Safan akei epai ya mokonzi mpe ayebisi ye : « Basaleli ba yo bakamati mosolo bazwaki o Tempelo mpe bapesi mwango na bakapita ba misala mpe na bayangeli ba Tempelo ya Yawe. » | |
II K | LinVB | 22:10 | Na nsima mokomi Safan ayebisi mokonzi likambo liye : « Nganga mokonzi Kilkia apesaki ngai buku, mpe Safan atangeli mokonzi yango. » | |
II K | LinVB | 22:12 | Na nsima atindi nganga Nzambe Kilkia, na Akikam, mwana wa Safan, na Akbor, mwana wa Mikaya, na Safan, mokomi minkanda, na mpe Asaya, mosaleli wa mokonzi, alobi na bango : | |
II K | LinVB | 22:13 | « Bokende kotuna Yawe mpo ya ngai mpe mpo ya bato banso ba Yuda, ayebisa biso ntina ya maloba mazali o buku eye nazwi. Ntembe te, Yawe ayokeli biso nkanda enene, zambi bankoko ba biso batosaki maloba ma buku eye te, basalaki te lokola ekomami. » | |
II K | LinVB | 22:14 | Nganga Nzambe Kilkia, Akikam, Akbor, Safan na Asaya bakei kotala profeta mwasi Kulda, mwasi wa Salum, mokengeli wa ndako ya bilamba ; Salum azalaki mwana wa Tikwa mpe nkoko wa Karkas. Mwasi ona afandi o Yeruzalem o mboka ya sika. Esilisi bango koloba, | |
II K | LinVB | 22:15 | mwasi alobi : « Yawe Nzambe wa Israel alobi : Boyebisa moto oyo atindi bino epai ya ngai : | |
II K | LinVB | 22:16 | Yawe alobi boye : Nakoyokisa esika eye na mpe bato bafandi awa mpasi enene ; nakokokisa maloba manso ma buku eye mokonzi wa Yuda atangaki. | |
II K | LinVB | 22:17 | Awa baboyi ngai mpe batumbeli banzambe basusu mpaka ya malasi, awa bayokisi ngai nkanda na bikeko bisalemi na maboko ma bato, nakomi kosilika mpenza na mboka eye mpe nkanda ya ngai ekosila noki te ! | |
II K | LinVB | 22:18 | Boloba na mokonzi wa Yuda, oyo atindi bino mpo ya kotuna Yawe : Yawe Nzambe wa Israel alobi boye : Oyoki maloba mana malamu ; | |
II K | LinVB | 22:19 | motema mwa yo moyoki mawa mpe omikitisi o miso ma Yawe ntango oyoki maloba nalobaki ona mboka eye ekokoma esika ya nsomo, eye bakotombela bobe, mpe ona bato bafandi wana. Opasoli bilamba bya yo mpe oleli o miso ma ngai, yango wana ngai mpe nayoki. Maloba ma Yawe. | |