JUDITH
Chapter 14
Judi | LinVB | 14:1 | Yudite alobi na bango : « Bandeko, boyoka ngai. Bokamata motó moye mpe bobaka mwango o eteni ya likolo lya linongi lya mboka. | |
Judi | LinVB | 14:2 | Ntango ntongo ekobanda kotana, mpe moi mokobima o mokili, bokamata bibuneli bya bino ; babali banso bazali makasi babima. Bopono moyangeli mpe bosala lokola bolingi kokita epai ya esobe mpo ya kokutana na basoda ba Asur, kasi bokita te. | |
Judi | LinVB | 14:3 | Ba-Asur bakokamata bibuneli bya bango, bakokende o nganda ya bango mpe bakolongola bakomanda o mpongi. Na nsima bakokende mbangu epai ya ema ya Oloferne mpe bakozwa ye te. Nsomo ekokanga bango mpe bakokima bino. | |
Judi | LinVB | 14:4 | Bino, elongo na bato banso bafandi o mokili mwa Israel, bokolanda bango, mpe bokoboma bango o nzela. | |
Judi | LinVB | 14:5 | Kasi liboso bobengela ngai naino Akior, moto wa Amon, mpo ’te amono na miso mpe ayeba moto oyo akinolaki libota lya Israel mpe atindaki ye epai ya biso mpo akufa awa. » | |
Judi | LinVB | 14:6 | Bongo babengi Akior o ndako ya Ozia. Ayei mbangu, mpe awa amoni motó mwa Oloferne o maboko ma moto moko wa likita, amibwaki elongi o nse mpe akwei senza. | |
Judi | LinVB | 14:7 | Batelemisi ye, kasi amibwaki o boso bwa Yudite mpo ya kokumisa ye, alobi : « Bakumisa yo o biema bya Yuda mpe o kati ya bikolo binso ; bato bakoyoka nkombo ya yo bakokamwa mpe bakoyoka nsomo. | |
Judi | LinVB | 14:8 | Sikawa yebisa ngai manso osalaki o mikolo miye. » Mpe Yudite asololi ye o miso ma bato banso manso asalaki banda mokolo atikaki Betulia tee ntango azalaki koloba na bango. | |
Judi | LinVB | 14:10 | Emoni Akior makambo manso Nzambe wa Israel asalaki, ayambi ye na motema moko, asengi ’te bakata ye nzoto mpe bandimi ye seko o ekolo ya ba-Israel. | |
Judi | LinVB | 14:11 | Etani ntongo, bato ba Betulia babaki motó mwa Oloferne o linongi lya mboka. Banso bakamati bibuneli bya bango, babimi mangomba mangomba mpe bakiti ngomba. | |
Judi | LinVB | 14:12 | Emoni ba-Asur bongo, batindi noki bantoma epai ya bayangeli ba bango ; bango bayebisi bakonzi banene na bakomanda ba bango. | |
Judi | LinVB | 14:13 | Bakomi bongo o ema ya Oloferne. Balobi na moto oyo azalaki kotala makambo ma ndako ya ye : « Lamusa mokonzi wa biso, mpo baombo baye bakiti ngomba mpo ya kobunda na biso ; bango banso baluki liwa. » | |
Judi | LinVB | 14:14 | Bagoas akoti o ema, abeti maboko liboso lya elamba ya kapo ya ndako ya kolala ; akanisi ’te Oloferne alali na Yudite. | |
Judi | LinVB | 14:15 | Kasi awa amoni ’te moto moko ayanoli te, afungoli kapo mpe akoti o ndako ya kolala ; akuti Oloferne asili akufi, alali penepene na mbeto, motó mozalaki te. | |
Judi | LinVB | 14:18 | « Baombo batomboki ; mwasi mo-Ebrei moko ayokisi Nabukodonozor na bato ba ye nsoni mingi. Ya solo, ebembe ya Oloferne elali o mabelé, motó mozali te. » | |