GALATIANS
Chapter 3
Gala | LinVB | 3:1 | E bato ba Galáta, bozángí ndé mayéle ? Náni alokí bínó ? Bayébísákí bínó polélé té bóníbóní Yézu Krístu ayókákí mpási o kurúse. | |
Gala | LinVB | 3:2 | Nalingí bóyébisa ngáí sé elóko yǒ kó : Bokúlákí Elímo mpô botósí Mobéko, tǒ mpô boyambí matéya boyókákí ? | |
Gala | LinVB | 3:3 | Bóní bozángí mayéle boye ? Awa bobandákí na Elímo, bolingí ndé kosúka sikáwa na makambo ma nzóto ? | |
Gala | LinVB | 3:5 | Nzámbe óyo apésí bínó Elímo mpé azalí kosála makamwísi o ntéi ya bínó, akosálaka bôngó mpô botósí Mobéko, tǒ mpô boyókí matéya mpé boyambí ? | |
Gala | LinVB | 3:6 | Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Abaráma ayambí Nzámbe, yangó wâná Nzámbe atálí yě lokóla moto wa bosémbo. | |
Gala | LinVB | 3:8 | Utá kala Nzámbe asílí koyébisa o Minkandá Misántu ’te akokómisa bapagáno bato ba bosémbo mpô ya boyambi bwa bangó ; yangó wâná asangélí Abaráma nsango elámu eye : Bato ba bikólo bínso bakozwa bolámu mpô ya yǒ. | |
Gala | LinVB | 3:10 | Kasi bato bánso bakolukaka sé kotósa Mobéko, bangó bánso bakozwa bobé ; sôló, ekomámí bôngó : Mabé mákwêla moto óyo akotósa mpé akokokisa mibéko mínso té, miye mikómámí o búku ya Mobéko. | |
Gala | LinVB | 3:11 | Ntembe té, moto mǒkó té akokóma na bosémbo o míso ma Nzámbe mpô atósí Mobéko, zambí moto akómí na bosémbo mpô ya boyambi akozwa bomoi. | |
Gala | LinVB | 3:12 | Moto atósí Mobéko asengélí kozala na boyambi té, kasi moto akotósa mibéko miye akozwa bomoi. | |
Gala | LinVB | 3:13 | Awa Krístu yě mǒkó andimí kokóma moto óyo batómbélí bobé, asikólí bísó o bobé boye bokwêlákí bísó mpô ya Mobéko, mpô ekomámí ’te : Moto batingísí o nzeté, batómbélí yě bobé. | |
Gala | LinVB | 3:14 | Esálémí bôngó mpô ’te, mpô ya Yézu Krístu, bapagáno bázwa bobenisi boye Abaráma azwáká, mpé bísó, mpô ya boyambi, tókúla Elímo óyo Nzámbe alakélákí. | |
Gala | LinVB | 3:15 | Bandeko, tíká nápésa ndakisa ya makambo ma bísó bato : Sókó moto asílí akomá monkandá mpô ya kotíkela bána ba yě bilóko bǒ esengélí, moto mǒkó té akokí koboma tǒ kobóngola mwangó, atâ mozalí sé monkandá mokomámí na bato. | |
Gala | LinVB | 3:16 | Nzámbe alakélákí Abaráma mpé libótá lya yě bilakó. Ekomámí té ’te.’na bána ba libótá lya yě ’, lokóla bazalákí míngi, kasi áwa Nzámbe alobákí ‘libótá lya yǒ ’ alakísákí sé moto mǒkó ; moto ôná ndé Krístu. | |
Gala | LinVB | 3:17 | Nalingí koloba boye : Mobéko mobimí mibú nkámá ínei na ntúkú ísáto nsima ya monkandá mwa botíkeli bána bilóko, moye Nzámbe asílí akomákí bǒ esengélí ; bôngó Mobéko moye mokokákí koboma monkandá môná té ; mokokákí koboma elakó té eye Nzámbe alakélákí. | |
Gala | LinVB | 3:18 | Sókó bato bazwákí bolámu mpô ya Mobéko, mbele bakokákí kozwa bwangó lisúsu mpô ya elakó té. Nzókandé Nzámbe apésákí Abaráma bolámu mpô ya elakó alakélákí yě. | |
Gala | LinVB | 3:19 | Bôngó Mobéko mopésámákí ntína níni ? Mobéko moyákí mpô ya kolakisa polélé ’te bato bakotósaka Nzámbe té. Mobéko mosengélákí kotíkala kín’o mokolo mwána wa Abaráma akoyâ, óyo Nzámbe alakélákí. Bǎnzelú bapésákí Mobéko o mabóko ma mobémbisi, moto azalí káti ya Nzámbe na bato. | |
Gala | LinVB | 3:20 | Kasi mobémbisi asengélí kozala té sókó moto mosúsu azalí té ; áwa mpé Nzámbe azalí sé yě mǒkó. | |
Gala | LinVB | 3:21 | Bôngó tóloba ’te Mobéko moyókání na bilakó té ? Sókí moké té ! Sókó ya sôló Mobéko mokokákí kopésa bomoi, mbele baye bakotósaka Mobéko bakómákí bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe. | |
Gala | LinVB | 3:22 | Kasi o Minkandá Misántu balakísí ’te bato bánso bazalí baómbo ba lisúmu, mpô ’te bato bánso bakoyambaka Yézu Krístu bázwa bolámu boye Nzámbe alakélákí mpô ya boyambi. | |
Gala | LinVB | 3:23 | Ntángo toyébákí naíno boyambi bôná té, Mobéko mozalákí kokanga mpé kokéngele bísó ; tozalákí kozila ’te Nzámbe ábimisela bísó boyambi. | |
Gala | LinVB | 3:24 | Mobéko mozalákí kokéngele bísó kín’o mokolo Krístu ayéí mpô tókóma bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe mpô ya boyambi bwa bísó. | |
Gala | LinVB | 3:28 | Awa bínó bánso bokómí sé moto mǒkó o Krístu Yézu, bato bánso bakómí ndéngé yǒkó : ná mo-Yúda ná moto wa ekólo esúsu, ná moómbo ná moto wa bo-nsómí, ná mobáli ná mwásí. | |