JOHN
Chapter 21
John | LinVB | 21:1 | Na nsima Yézu abimélí bayekoli lisúsu o libóngo lya etíma ya Tibéria. Abimélí bangó boye : | |
John | LinVB | 21:2 | Simóni Pétro, Tomá, óyo bakobéngaka Lipása, Natánael wa Kána o Galiléa, bána ba Zebedéo, na bayékoli basúsu bábalé, bazalákí esíká yǒ kó. | |
John | LinVB | 21:3 | Simóni Pétro alobí na bangó : « Nakeí kolóbo mbísi. » Balobí na yě : « Bísó mpé tokokende na yǒ. » Bakeí mpé bakwélí o bwáto. Kasi o butú bôná babomí elóko té. | |
John | LinVB | 21:4 | Awa ntóngó ebandí kotána, Yézu atélémí o libóngo, kasi bayékoli bayébí té ’te ezalákí Yézu. | |
John | LinVB | 21:6 | Alobí na bangó : « Bóbwáka monyámá o lobóko la mobáli la bwáto, bokozwa. » Babwákí monyámá, mpé bakokí kobénda mwangó lisúsu té : monyámá motóndí na mbísi. | |
John | LinVB | 21:7 | Moyékoli óyo Yézu azalaki kolinga alobí na Pétro : « Mokonzi yě wâná ! » Eyókí Pétro ’te ezalákí Mokonzi, alátí elambá ya yě, zambí alátákí elambá té ; amíbwákí o mái. | |
John | LinVB | 21:8 | Bayékoli basúsu bayéí na bwáto, babéndí monyámá na mbísi ; bazalákí penepene na libóngo, mabóko sókí nkámá íbalé. | |
John | LinVB | 21:11 | Simóni Pétro akwélí o bwáto mpé abéndí monyámá o mokili. Monyámá motóndí na mbísi : mbísi inéne monkámá na ntúkú ítáno na ísáto ; atâ mbísi izalákí ebelé boye, monyámá mopaswání té. | |
John | LinVB | 21:12 | Yézu alobí na bangó : « Yákáni kolía. » Moto mǒkó té amekí kotúna yě : « Yǒ náni ? », zambí bayébí malámu ’te ezalákí Mokonzi. | |
John | LinVB | 21:15 | Awa basílísí kolía, Yézu alobí na Simóni Pétro : « Simóni, mwána wa Yoáne, okolingaka ngáí leká báníngá ? » Azóngísí : « Iyo, Mokonzi, oyébí ’te nakolingaka yǒ. » Yézu alobí na yě : « Kambá bana meme ba ngáí. » | |
John | LinVB | 21:16 | Atúní yě mbala ya íbalé : « Simóni, mwána wa Yoáne, okolingaka ngáí ? » Azóngísí : « Iyo, Mokonzi, oyébí ’te nakolingaka yǒ. » Yézu alobí na yě : « Kambá mpatá ya ngáí. » | |
John | LinVB | 21:17 | Alobí na yě mbala ya ísáto : « Simóni, mwána wa Yoáne, okolingaka ngáí ? » Pétro ayókí mawa míngi, zambí Yézu atúní yě mbala ísáto : Okolingaka ngáí ? Alobí na yě : « Mokonzi, oyébí mánso, oyébí ’te nakolingaka yǒ. » Yézu alobí na yě : « Kambá mpatá ya ngáí. | |
John | LinVB | 21:18 | Ya sôló sôló, nayébísí yǒ : Ntángo ozalákí elengé, yǒ mǒkó ozalákí kokanga nkámba o lokéto mpé kokende esíká yǒ mǒkó olingákí. Kasi ntángo okokóma mobangé, okotanda mabóko, mpé moto mosúsu akolátisa yǒ nkámba o lokéto, mpé akokamba yǒ esíká okolinga té. » | |
John | LinVB | 21:19 | Na maloba maye Yézu alakísí na liwá níni asengélákí kokúmisa Nzámbe. Na nsima Yézu alobí na yě : « Landá ngáí ! » | |
John | LinVB | 21:20 | Pétro amíbóngólí, amóní ’te moyékoli óyo Yézu akolingaka azalákí kolanda bangó. Yě moto alálísákí motó penepene na bontólo bwa Yézu o ntángo ya limpáti, mpé atúnákí Yézu : « Mokonzi, náni akokaba yǒ. » | |
John | LinVB | 21:22 | Yézu azóngísí : « Sókó nalingí ’te átíkala téé mokolo nakoyâ, ezalí ndé likambo lya yǒ ? Yǒ, landá ngáí. » | |
John | LinVB | 21:23 | Nsango epalángání o ntéi ya bandeko ’te moyékoli óyo akokúfa té. Nzókandé Yézu alobákí na Pétro té ’te akokúfa té, kasi « Sókó nalingí ’te átíkala téé mokolo nakoyâ, ezalí ndé likambo lya yǒ ? » | |
John | LinVB | 21:24 | Moyékoli óyo asakólí makambo maye amónókí, akomí mangó o monkandá, mpé toyébí ’te makambo asakólí mazalí ma sôló. | |