JOHN
Chapter 3
John | LinVB | 3:2 | ayéí na butú epái ya Yézu. Alobí na yě : « Motéyi, toyébí ’te Nzámbe atíndí yǒ mpô ótéya bato ; moto mǒkó té akokí kosála bilémbo biye yǒ ozalí kosála, sókó Nzámbe azalí na yě té. » | |
John | LinVB | 3:3 | Yézu azóngísélí yě : « Ya sôló sôló, nalobí na yǒ : moto mǒkó té akokí komóno Bokonzi bwa Nzámbe, sókó abótámí mbala ya íbalé té. » | |
John | LinVB | 3:4 | Nikodémo atúní yě : « Bóníbóní moto akokí kobótama lisúsu, áwa asílí akómí mobangé ? Akokí ndé kozónga o libumu lya mamá mpé kobótama mbala ya íbalé ? » | |
John | LinVB | 3:5 | Yézu ayanólí : « Ya sôló sôló, nalobí na yǒ : moto mǒkó té akokí kokóto o Bokonzi bwa Nzámbe sókó abótámí na mái mpé na Elímo Sántu té. | |
John | LinVB | 3:8 | Mompepe mokopepe epái molingí, mpé okoyóka lokitó la mwangó ; kasi okoyéba té epái mompepe mokoúta tǒ mokokende. Sé bôngó bato bánso babótámí na Elímo. » | |
John | LinVB | 3:11 | Ya sôló sôló, nalobí na yǒ : bísó tokolobaka maye toyébí, mpé tokoyébisaka maye tomónókí ; kasi bínó bondimí maloba ma bísó té. | |
John | LinVB | 3:12 | Sókó bondímí makambo ma nsé té, maye nayébísí bínó, bóníbóní bokoyamba sókó nayébísí bínó mambí ma likoló ? | |
John | LinVB | 3:13 | Moto mǒkó té asílí abutí o likoló, bobélé Oyo aútákí o likoló, yě ndé Mwána wa Moto. | |
John | LinVB | 3:16 | Nzámbe akolingaka bato míngi mpenzá, yangó wâná apésí bangó Mwána sé mǒkó wa yě, mpô ’te moto nyónso ayambí yě ábúngama té, kasi ázwa bomoi bwa sékô. | |
John | LinVB | 3:17 | Nzámbe atíndí Mwána wa yě áwa o nsé mpô ya kosámbisa bato té, kasi mpô ’te ábíkisa bangó. | |
John | LinVB | 3:18 | Moto ayambí Mwána, bakosámbisa yě té ; kasi moto ayambí Mwána té, asílí akití o likambo, mpámba té, ayambí Nkómbó ya Mwána sé mǒkó wa Nzámbe té. | |
John | LinVB | 3:19 | Tálá ndéngé bakokáta likambo : Mwínda moyéí o nsé ; kasi bato bapusí kolinga molílí, mpô misálá mya bangó mizalí mabé. | |
John | LinVB | 3:20 | Ya sôló, moto nyónso akosálaka mabé, akoyinaka mwínda mpé akokímaka mwangó, mpô ’te misálá mya yě míyébana té. | |
John | LinVB | 3:21 | Kasi moto akosálaka mambí ma bosôló akokende epái ya mwínda, mpô ’te émónono ’te misálá mya yě misálémí na botósi Nzámbe. » | |
John | LinVB | 3:22 | Nsima yangó Yézu na bayékoli ba yě bakeí o ekólo ya Yudéa ; atíkálí kuná mwâ mikolo elongó na bangó, mpé abátísí bato. | |
John | LinVB | 3:23 | Yoáne mpé azalákí kobátisa o Enon penepene na Salim, mpô mái mazalákí míngi kúná ; bato míngi bayéí kokúla batísimo. | |
John | LinVB | 3:25 | Mokolo mǒkó bayékoli basúsu ba Yoáne bawélání ntembe na mo-Yúda mǒkó mpô ya ndéngé bakomípétolaka. | |
John | LinVB | 3:26 | Bakeí epái ya Yoáne, balobí na yě : « Rábi, moto óyo azalákí na yǒ o ngámbo ya Yordáne, óyo osakólákí mpô ya yě, akómí kobátisa bato mpé bánso bazalí kokende epái ya yě. » | |
John | LinVB | 3:28 | Bínó mǒkó boyókákí ’te nalobákí : Ngáí nazalí Krístu té, kasi natíndámí libosó lya yě. | |
John | LinVB | 3:29 | Nkóló wa mwásí ndé mobáli, kasi móníngá wa bolóngani, óyo atélémí penepene na yě mpé ayókí yě, atóndí na nsáí mpô ayókí mongóngó mwa mobáli. Yangó ndé esengo ya ngáí, mpé nayókí esengo enéne mpenzá. | |
John | LinVB | 3:31 | Oyo aútí o likoló alekí bánso ; óyo aútí o nsé, azalí moto wa nsé mpé akolobaka lokóla moto wa nsé. Kasi óyo aútí o likoló alekí bánso ; | |
John | LinVB | 3:34 | Moto óyo Nzámbe atíndí, akolobaka maloba ma Nzámbe mpenzá, mpô Nzámbe atóndísí yě na Elímo wa yě. | |