JOHN
Chapter 11
John | LinVB | 11:1 | Moto mǒkó azalákí na bokono, nkómbó ya yě Lazáro, wa Betánia, mbóka ya María na ndeko wa yě Márta. | |
John | LinVB | 11:2 | María azalákí mwásí óyo apakólákí Mokonzi malási mpé apangúsákí yě makolo na nsúki ya yě. Ndeko wa yě Lazáro azalákí kobéle. | |
John | LinVB | 11:3 | Bandeko ba yě básí bábalé batíndélí Yézu maloba : « Mokonzi, óyo okolingaka azalí kobéle. » | |
John | LinVB | 11:4 | Ntángo Yézu ayókí yangó, alobí : « Akokúfa na bokono bôná té, kasi bokono bôná bokolakisa nkémbo ya Nzámbe, mpé bokopésa lokúmu na Mwána wa Nzámbe. » | |
John | LinVB | 11:8 | Bayékoli balobí : « Motéyi, bobélé sikáwa ba-Yúda balingákí koboma yǒ na mabángá, mpé okozónga kúná ? » | |
John | LinVB | 11:9 | Yézu azóngísí : « O mokolo mǒkó mói mokoúmelaka ngonga zómi na íbalé té ? Sókó moto atámbólí na mói, akotúta libakú té, mpô azalí komóno mwínda mwa nsé eye. | |
John | LinVB | 11:11 | Elobí Yézu bôngó, abakísí : « Móníngá wa bísó Lazáro alálí mpongí, kasi nakeí kolamusa yě. » | |
John | LinVB | 11:13 | Yézu alingákí koloba ’te Lazáro awéí, kasi bangó bakanísí ’te azalákí kolála mpongí. | |
John | LinVB | 11:15 | Sókó nasepélí ’te nazalákí wâná té, ezalí mpô ya bínó, mpô ’te bóyamba. Kasi tókende epái ya yě ! » | |
John | LinVB | 11:16 | Tomá, nkómbó ya yě mpé Lipása, alobí na bayékoli basúsu : « Bísó mpé tókende mpô tókúfa elongó na yě ! » | |
John | LinVB | 11:21 | Márta alobí na Yézu : « Mokonzi ; sókó ozalákí áwa, mbele ndeko wa ngáí akúfákí té. | |
John | LinVB | 11:24 | Márta azóngísí : « Nayébí ’te akosékwa o mokolo mwa nsúka, mokolo bato bánso bakosékwa. » | |
John | LinVB | 11:25 | Yézu alobí na yě : « Ngáí nazalí nsékwa mpé bomoi. Moto ayambí ngáí, atâ awéí, ndâzalí na bomoi ; | |
John | LinVB | 11:26 | mpé moto nyónso óyo azalí na bomoi mpé ayambí ngáí, akokúfa sékô té. Oyambí yangó ? » | |
John | LinVB | 11:27 | Márta ayanoli : « Iyo, Mokonzi, nayambí ’te yǒ ozalí Krístu, Mwána wa Nzámbe, óyo ayéí o nsé. » | |
John | LinVB | 11:28 | Elobí yě bôngó, akeí kobênga ndeko wa yě María ; alobí na yě malémbe : « Mokonzi ayéí, azalí kobênga yǒ. » | |
John | LinVB | 11:31 | Ntángo ba-Yúda baye bazalákí na María o ndáko mpô ya kobóndo yě bamóní ’te atélémí nokí mpé abimí, balandí yě ; bakanísí ’te akeí kolela o lilíta. | |
John | LinVB | 11:32 | María akómí o esíká Yézu azalákí, amóní yě, akúmbámélí yě, alobí na yě : « Mokonzi, sókó ozalákí áwa, mbele ndeko wa ngáí akúfákí té. » | |
John | LinVB | 11:33 | Emóní Yézu ’te azalákí kolela, yě na ba-Yúda bayákí elongó na yě, motéma mwa yě moléngí mpé atatábání, | |
John | LinVB | 11:37 | Kasi basúsu balobí : « Oyo afungólí moto wa lolandá míso, akokákí kosála té ’te moto óyo ákúfa té ? » | |
John | LinVB | 11:38 | Motéma mwa Yézu moléngí lisúsu mpé akeí o lilíta, liye likátémí o káti ya mabángá, libángá lizipí lyangó. | |
John | LinVB | 11:39 | Yézu alobí : « Bólongola libángá ! » Márta, ndeko wa mowéi, alobí na yě : « Mokonzi, asílí alumbí, awéí mikolo mísáto milekí. » | |
John | LinVB | 11:40 | Yézu azóngísí : « Nalobákí na yǒ té ’te sókó ozalí na boyambi, okomóno nkémbo ya Nzámbe ? » | |
John | LinVB | 11:41 | Bôngó balongólí libángá. Yézu atómbólí míso o likoló, alobí : « Tatá, natóndí yǒ zambí ondimélí ngáí. | |
John | LinVB | 11:42 | Nayébí ’te okondimaka ngáí ntángo ínso ; kasi nalobí bôngó mpô ya bato bazíngí ngáí : báyamba ’te yǒ moto otíndí ngáí. » | |
John | LinVB | 11:44 | Mowéi abimí ; makolo ná mabóko mazíngámí na bilambá, elongi ya yě mpé ezíngámí na elambá. Yézu alobí na bangó : « Bókangola yě, bótíka yě ákende. » | |
John | LinVB | 11:45 | Káti ya ba-Yúda bayákí epái ya María, míngi bayambí Yézu áwa bamóní likambo liye asálí. | |
John | LinVB | 11:47 | Banganga bakonzi na ba-Farizéo basangání likita, balobí : « Tósála bóní ? Moto óyo akosálaka makamwísi míngi. | |
John | LinVB | 11:48 | Sókó totíkí yě bôngó, bánso bakoyamba yě, mpé ba-Róma bakoyâ, bakoboma Témpelo mpé ekólo ya bísó. » | |
John | LinVB | 11:49 | Mǒ kó wa bangó, Kaífa, moto azalákí nganga mokonzi o mobú môná, alobí na bangó : « Bínó boyébí elóko té ! | |
John | LinVB | 11:50 | Bomóní té ’te ebongélí bínó ’te moto mǒkó ákúfa mpô ya bato bánso, bôngó ekólo mobimba ékúfa té ! » | |
John | LinVB | 11:51 | Alobí bôngó na mayéle ma yě mǒkó té ; kasi áwa azalákí nganga mokonzi, asakólí lokóla proféta ’te Yézu akokúfa mpô ya ekólo mobimba. | |
John | LinVB | 11:52 | Akokúfa bobélé mpô ya ekólo kaka té, kasi mpô ’te ásangisa o libótá lyǒkó bána ba Nzámbe bapalángání. | |
John | LinVB | 11:54 | Yangó wâná Yézu abimí lisúsu o káti ya ba-Yúda té, kasi akeí o ekólo penepene na elíkí, o mbóka yǒ kó nkómbó ’te Efraim ; atíkálí kúná elongó na bayékoli ba yě. | |
John | LinVB | 11:55 | Pásiká ya ba-Yúda ekómí penepene. Bato baíké balongwí o mbóka ya bangó, bakeí o Yerúzalem komípétola libosó lya eyenga. | |
John | LinVB | 11:56 | Balukí Yézu, mpé o Témpelo bazalákí kotúnana : « Bokanísí níni ? Akoyâ o eyenga tǒ akoyâ té ? » | |