Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOHN
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Prev Up Next
Chapter 11
John LinVB 11:1  Moto mǒkó azalákí na bokono, nkómbó ya yě Lazáro, wa Betánia, mbóka ya María na ndeko wa yě Márta.
John LinVB 11:2  María azalákí mwásí óyo apakólákí Mokonzi malási mpé apangúsákí yě makolo na nsúki ya yě. Ndeko wa yě Lazáro azalákí kobéle.
John LinVB 11:3  Bandeko ba yě básí bábalé batíndélí Yézu maloba : « Mokonzi, óyo okolingaka azalí kobéle. »
John LinVB 11:4  Ntángo Yézu ayókí yangó, alobí : « Akokúfa na bokono bôná té, kasi bokono bôná bokolakisa nkémbo ya Nzámbe, mpé bokopésa lokúmu na Mwána wa Nzámbe. »
John LinVB 11:5  Yézu azalákí kolinga Márta ná ndeko wa yě, ná Lazáro.
John LinVB 11:6  Eyókí yě ’te Lazáro azalákí kobéle, atíkálí naíno mikolo míbalé o esíká azalákí.
John LinVB 11:7  Bobélé na nsima alobí na bayékoli : « Tózónga o Yudéa. »
John LinVB 11:8  Bayékoli balobí : « Motéyi, bobélé sikáwa ba-Yúda balingákí koboma yǒ na mabángá, mpé okozónga kúná ? »
John LinVB 11:9  Yézu azóngísí : « O mokolo mǒkó mói mokoúmelaka ngonga zómi na íbalé té ? Sókó moto atámbólí na mói, akotúta libakú té, mpô azalí komóno mwínda mwa nsé eye.
John LinVB 11:10  Kasi sókó atámbólí na butú, akotúta libakú, zambí azalí lisúsu na mwínda té. »
John LinVB 11:11  Elobí Yézu bôngó, abakísí : « Móníngá wa bísó Lazáro alálí mpongí, kasi nakeí kolamusa yě. »
John LinVB 11:12  Bayékoli balobí : « Sókó alálí mpongí, akobíka. »
John LinVB 11:13  Yézu alingákí koloba ’te Lazáro awéí, kasi bangó bakanísí ’te azalákí kolála mpongí.
John LinVB 11:14  Na nsima Yézu alobí polélé : « Lazáro awéí.
John LinVB 11:15  Sókó nasepélí ’te nazalákí wâná té, ezalí mpô ya bínó, mpô ’te bóyamba. Kasi tókende epái ya yě ! »
John LinVB 11:16  Tomá, nkómbó ya yě mpé Lipása, alobí na bayékoli basúsu : « Bísó mpé tókende mpô tókúfa elongó na yě ! »
John LinVB 11:17  Ntángo Yézu akómí kúná, basílí bakundí Lazáro mikolo mínei.
John LinVB 11:18  Betánia ezalí mosíká na Yerúzalem té, sé kilométele ísáto.
John LinVB 11:19  Ba-Yúda baíké bayákí kobóndo Márta na María mpô ya liwá lya ndeko wa bangó.
John LinVB 11:20  Ntángo Márta ayókí ’te Yézu ayéí, akeí kokútana na yě, kasi María atíkálí o ndáko.
John LinVB 11:21  Márta alobí na Yézu : « Mokonzi ; sókó ozalákí áwa, mbele ndeko wa ngáí akúfákí té.
John LinVB 11:22  Kasi atâ sikáwa nayébí ’te Nzámbe akopésa yǒ mánso okosénge yě. »
John LinVB 11:23  Yézu alobí na yě : « Ndeko wa yǒ akosékwa. »
John LinVB 11:24  Márta azóngísí : « Nayébí ’te akosékwa o mokolo mwa nsúka, mokolo bato bánso bakosékwa. »
John LinVB 11:25  Yézu alobí na yě : « Ngáí nazalí nsékwa mpé bomoi. Moto ayambí ngáí, atâ awéí, ndâzalí na bomoi ;
John LinVB 11:26  mpé moto nyónso óyo azalí na bomoi mpé ayambí ngáí, akokúfa sékô té. Oyambí yangó ? »
John LinVB 11:27  Márta ayanoli : « Iyo, Mokonzi, nayambí ’te yǒ ozalí Krístu, Mwána wa Nzámbe, óyo ayéí o nsé. »
John LinVB 11:28  Elobí yě bôngó, akeí kobênga ndeko wa yě María ; alobí na yě malémbe : « Mokonzi ayéí, azalí kobê­nga yǒ. »
John LinVB 11:29  Eyókí María bôngó, atélémí nokí mpé akeí kokútana na yě.
John LinVB 11:30  Yézu akómí naíno o mbóka té, azalákí bobélé esíká Márta ayéí kokútana na yě.
John LinVB 11:31  Ntángo ba-Yúda baye bazalákí na María o ndáko mpô ya kobóndo yě bamóní ’te atélémí nokí mpé abimí, balandí yě ; bakanísí ’te akeí kolela o lilíta.
John LinVB 11:32  María akómí o esíká Yézu azalákí, amóní yě, akúmbámélí yě, alobí na yě : « Mokonzi, sókó ozalákí áwa, mbele ndeko wa ngáí akúfákí té. »
John LinVB 11:33  Emóní Yézu ’te azalákí kolela, yě na ba-Yúda bayákí elongó na yě, motéma mwa yě moléngí mpé atatábání,
John LinVB 11:34  atúní : « Batíí yě wápi ? » Balobí : « Mokonzi, yáká ótála. »
John LinVB 11:36  Ba-Yúda balobí : « Tálá bóníbóní alingákí yě ! »
John LinVB 11:37  Kasi basúsu balobí : « Oyo afungólí moto wa lolandá míso, akokákí kosála té ’te moto óyo ákúfa té ? »
John LinVB 11:38  Motéma mwa Yézu moléngí lisúsu mpé akeí o lilíta, liye likátémí o káti ya mabángá, libángá lizipí lyangó.
John LinVB 11:39  Yézu alobí : « Bólongola libángá ! » Márta, ndeko wa mowéi, alobí na yě : « Mokonzi, asílí alumbí, awéí mikolo mísáto milekí. »
John LinVB 11:40  Yézu azóngísí : « Nalobákí na yǒ té ’te sókó ozalí na boyambi, okomóno nkémbo ya Nzámbe ? »
John LinVB 11:41  Bôngó balongólí libá­ngá. Yézu atómbólí míso o likoló, alobí : « Tatá, natóndí yǒ zambí ondimélí ngáí.
John LinVB 11:42  Nayébí ’te okondimaka ngáí ntángo ínso ; kasi nalobí bôngó mpô ya bato bazíngí ngáí : báyamba ’te yǒ moto otíndí ngáí. »
John LinVB 11:43  Elobí yě bôngó, agángí makási : « Lazáro, bimá ! »
John LinVB 11:44  Mowéi abimí ; makolo ná mabóko mazíngámí na bilambá, elongi ya yě mpé ezí­ngámí na elambá. Yézu alobí na bangó : « Bókangola yě, bótíka yě ákende. »
John LinVB 11:45  Káti ya ba-Yúda bayákí epái ya María, míngi bayambí Yézu áwa bamóní likambo liye asálí.
John LinVB 11:46  Nzókandé basúsu bakeí koyébisa ba-Farizéo maye Yézu asálí.
John LinVB 11:47  Banganga bakonzi na ba-Farizéo basa­ngání likita, balobí : « Tósála bóní ? Moto óyo akosálaka makamwísi míngi.
John LinVB 11:48  Sókó totíkí yě bôngó, bánso bakoyamba yě, mpé ba-Róma bakoyâ, bakoboma Témpelo mpé ekólo ya bísó. »
John LinVB 11:49  Mǒ kó wa bangó, Kaífa, moto azalákí nganga mokonzi o mobú môná, alobí na bangó : « Bínó boyébí elóko té !
John LinVB 11:50  Bomóní té ’te ebongélí bínó ’te moto mǒkó ákúfa mpô ya bato bá­nso, bôngó ekólo mobimba ékúfa té ! »
John LinVB 11:51  Alobí bôngó na mayéle ma yě mǒkó té ; kasi áwa azalákí nganga mokonzi, asakólí lokóla proféta ’te Yézu akokúfa mpô ya ekólo mobimba.
John LinVB 11:52  Akokúfa bobélé mpô ya ekólo kaka té, kasi mpô ’te ásangisa o libótá lyǒ­kó bána ba Nzámbe bapalángá­ní.
John LinVB 11:54  Yangó wâná Yézu abi­mí lisúsu o káti ya ba-Yúda té, kasi akeí o ekólo penepene na elíkí, o mbóka yǒ kó nkómbó ’te Efraim ; atíkálí kúná elongó na bayékoli ba yě.
John LinVB 11:55  Pásiká ya ba-Yúda ekómí penepene. Bato baíké balongwí o mbóka ya bangó, bakeí o Yerúzalem komí­pétola libosó lya eyenga.
John LinVB 11:56  Balukí Yézu, mpé o Témpelo bazalákí kotúnana : « Bokanísí níni ? Akoyâ o eyenga tǒ akoyâ té ? »
John LinVB 11:57  Banganga bakonzi na ba-Farizéo batíndí etíndá : Sókó moto ayébí esíká Yézu azalí, áyébisa bangó, bôngó bákanga yě.