Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDITH
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 12
Judi LinVB 12:1  Oloferne akotisi ye o esika atiaki sani ya ye inso ya palata ; apesi ye biloko bya kolia na vino.
Judi LinVB 12:2  Kasi Yudite alobi : « Nakoki kolia biloko biye te, mpo nabangi lisumu, nakolia biloko ngai moko namemi. »
Judi LinVB 12:3  Oloferne azongisi : « Kasi soko bilei bya yo bisili, tokoki kozwa byango wapi ? O kati ya biso moto moko wa ekolo ya yo azali te. »
Judi LinVB 12:4  Yudite alobi : « Tala, o nkombo ya yo, mokonzi wa ngai, ngai moombo wa yo nakosilisa bilei bya ngai te liboso ’te Nzambe asala na maboko ma ngai makambo manso akani kosala. »
Judi LinVB 12:5  Basalisi ba Oloferne bakambi ye o ema ; alali mpongi tee o kati ya butu. Na nsoso ya yambo atelemi.
Judi LinVB 12:6  Atindelaki Oloferne maloba maye : « Mokonzi, kebisa bato mpo ’te ngai, mosaleli wa yo, nabima mpo ya kosambela. »
Judi LinVB 12:7  Oloferne apesi bakengeli ba ye mobeko ’te bapekisa Yudite te soko alingi kobima. Yudite atikali o nganda mikolo misato. Na butu azalaki kobima o nzela ekokende o Betulia, mpe akei kosukola nzoto o liziba penepene na bakengeli ba nganda.
Judi LinVB 12:8  Ntango azalaki kobuta ngomba, azalaki kosambela Mokonzi Nzambe wa Israel mpo akamba mosala mwa ye mpo ’te bana ba ekolo ya ye babika o likama.
Judi LinVB 12:9  Eko­mi ye lisusu nzoto peto, azongi mpe atikali bobele o ema tee ntango bayeli ye biloko bya kolia na mpo­kwa.
Judi LinVB 12:10  Mokolo mwa minei Oloferne ala­mbi limpati ; abengi se bayangeli ba basoda ba ye, abengi basaleli ba ye basusu te.
Judi LinVB 12:11  Alobi na Bagoas, mobali eniki, oyo akotalaka makambo ma­nso ma ndako ya ye : « Kende kosenge mwasi mo-Ebrei ’te andima koya, tolia mpe tomele esika yoko.
Judi LinVB 12:12  Nsoni mingi na biso soko totiki mwasi lokola ye mpamba mpe totamboli na ye te. Soko tomeki kondimisa ye te, ako­seke biso. »
Judi LinVB 12:13  Bagoas abimi epai ya Oloferne mpe akoti o ema ya Yudite, alobi na ye : « Mwasi kitoko oyo andima koya epai ya mokonzi wa ngai, okozwa lokumu o miso ma ye, okomele vino elongo na biso, okosepela esika yoko na biso mpe okokoto lelo o molongo mwa bilenge basi ba Asur, baye bakozalaka o ndako ya Nabukodonozor. »
Judi LinVB 12:14  Yudite azongisi : « Ngai nde nani ’te naboya etinda ya mokonzi wa ngai ? Manso makoki kosepelisa ye, nakosala mango noki ; ya­ngo ekoyokisa ngai esengo enene tee mokolo nakokufa. »
Judi LinVB 12:15  Atelemi, alati bilamba bya mo­nzele na biloko binso bikokembisaka nzoto ya mwasi. Mosaleli mwasi wa ye akoti liboso, atandeli ye litoko o boso bwa Oloferne, liye Bagoas apesaki Yudite mpo ’te afandelaka lya­ngo mikolo minso o ntango ya kolia.
Judi LinVB 12:16  Yudite ayingeli mpe akei kofanda. Oloferne asepeli mingi, mayele ma ye matamboli, motema mwa ye mokomi koyoka mposa ya kolala na ye. Ut’o mokolo amonoki ye mbala ya liboso, azalaki koluka nzela ya kosenginya ye.
Judi LinVB 12:17  Alobi na ye : « Mele vino mpe sepela esika yoko na biso. »
Judi LinVB 12:18  Yudite aya­noli : « Solo mokonzi, nakomele vino, mpo ut’o mbotama ya ngai, mokolo moko te nazwi nzela ya kosepela lokola lelo. »
Judi LinVB 12:19  Yudite akamati biloko mosaleli wa ye alambaki, alei mpe ameli o miso ma Oloferne.
Judi LinVB 12:20  Awa Oloferne azalaki kotala ye, asepeli mingi ; ameli vino mingi ; ba-nda mokolo babotaki ye ameleki naino mingi boye te.