JUDITH
Chapter 13
Judi | LinVB | 13:1 | Eyindi butu, bayangeli ba ye batelemi noki mpo bakende. Bagoas abimisi naino bato basusu batikalaki o ema ya mokonzi wa ye ; na nsima akangi monoko mwa ema. Banso bakei kolala ; banso balembi mpo bameleki vino mingi. | |
Judi | LinVB | 13:2 | Yudite atikali ye moko na Oloferne, amoni ’te alali o mbeto lokola moto akufi, mpo alangwi vino mingi. | |
Judi | LinVB | 13:3 | Sikawa Yudite alobi na mosaleli mwasi wa ye ’te atikala o libanda penepene na ndako ya kolala, mpe akengele ye ntango akobima, lokola azalaki kosala mikolo minso. Ayebisaki ye ’te akobima mpo ya losambo. Ayebisaki Bagoas mpe bongo. | |
Judi | LinVB | 13:4 | Bato banso babimaki o ndako ya Oloferne, ezala mokóló to mwana, moto moko atikalaki o ndako ya kolala te. Yudite atelemi pene na mbeto ya Oloferne, asambeli o motema : « Mokonzi Nzambe wa bokasi bonso, o ngonga eye, tala na bolamu mosala mwa maboko ma ngai mpo ’te Yeruzalem ezwa nkembo. | |
Judi | LinVB | 13:5 | Sikawa mpenza ntango ya kolendisa ekolo ya yo lisusu ekoki na bokokisi likambo nakani kosala, mpo ’te nanyata banguna ba biso, baye balingi kosukisa biso. » | |
Judi | LinVB | 13:6 | Na nsima akei penepene na mbeto esika Oloferne alalisi motó, alongoli mopanga mwa ye, | |
Judi | LinVB | 13:7 | abelemi na mbeto, asimbi ye na nsuki, alobi : « Mokonzi Nzambe wa Israel, sikawa lendisa ngai. » | |
Judi | LinVB | 13:8 | Apapi ye mopanga, abeti ye mbala ibale na bokasi bwa ye bonso, akati ye nkingo ; motó mwa ye molongwi. | |
Judi | LinVB | 13:9 | Apusi nzoto ya ye elo-ngwa o mbeto, alongoli elamba likolo lya makonzi. Na nsima abimi mpe apesi mosaleli wa ye motó mwa Oloferne. | |
Judi | LinVB | 13:10 | Mosaleli wa ye atii mwango o libenga lya bilei. Na nsima bango babale babimi o nganda lokola bameseni kosala mpo ya losambo. Awa bakatisi nganda, batiki nzela ya lobwaku, balandi nzela ya ngomba tee babuti ngomba ya Betulia mpe bakomi o ezibeli ya mboka. | |
Judi | LinVB | 13:11 | Ezalaki ye naino mosika, Yudite agangeli bakengeli bazalaki o boso bwa ezibeli ya mboka : « Bofungola, bofungola bizibeli, mpo Mokonzi Nzambe wa biso azali na biso solo ; alingi kolakisa bato ba Israel bokasi bwa ye o etumba na banguna, lokola asali lelo. » | |
Judi | LinVB | 13:12 | Awa bato ba mboka bayoki mongongo mwa ye, bakiti mbangu epai ya ezibeli ya mboka mpe babengi bakolo ba mboka. | |
Judi | LinVB | 13:13 | Bato banso bayei mbangu, bakolo na bana, mpo bakanisi te ’te akoya. Bafungoli ezibeli ya mboka mpe bayambi bango babale ; bapelisi móto mpo ya komono malamu, mpe bazingi bango. | |
Judi | LinVB | 13:14 | Na mongongo makasi Yudite ayebisi bango : « Bokumisa Nzambe, bopesa ye lokumu ! Bokumisa Nzambe oyo abosani libota lya Israel te, mpe ayokeli biso ngolu, zambi o butu bwa lelo abuki makasi ma banguna na maboko ma ngai. » | |
Judi | LinVB | 13:15 | Na nsima abimisi motó o libenga, esika atiaki mwango, mpe alakisi bango, alobi : « Tala motó mwa Oloferne, mokonzi monene wa basoda ba Asur, tala bilamba bya mbeto esika alalaki ntango alangwaki vino ! Mokonzi abomi ye na maboko ma mwasi ! | |
Judi | LinVB | 13:16 | Toyembela Mokonzi, mpo abateli ngai o ntango ya mosala moye monene ! Kitoko ya elongi ya ngai etambwisi mayele ma ye mpo ’te asuka mabe. Asalaki na ngai lisumu te ; yango wana nazali na nsoni te, nabebisi mpe lokumu la ngai te. » | |
Judi | LinVB | 13:17 | Bato banso bakomi na esengo enene, bafukami mpo ya kokumbamela Nzambe, mpe banso bagangi monoko se moko : « Bakumisa yo, Nzambe wa biso, yo moto osilisi lelo banguna ba ekolo ya yo. » | |
Judi | LinVB | 13:18 | Na nsima Ozia alobi na Yudite : « E mwana wa ngai, Nzambe wa nta likolo abenisa yo, abenisa yo leka basi banso ba mokili ; bakumisa Mokonzi Nzambe, Mozalisi wa likolo na nse, oyo akambi yo mpo okata motó mwa mokonzi wa banguna. | |
Judi | LinVB | 13:19 | Mokolo moko te bato bakobosana ’te otiaki motema na Mokonzi, kasi bakokanisa nguya ya Nzambe seko. | |