Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JUDITH
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 6
Judi LinVB 6:1  Esili makeléle ma bato bayaki kotonda penepene na bato ba Likita, Oloferne, komanda monene wa basoda ba Asur, afingi Akior o miso ma bampaya mpe ma ba-Moab banso,
Judi LinVB 6:2  alobi : « Yo nde nani, Akior na ba­nga­mba ba Efraim ? Solo, obangi te koloba likambo lokola olobi sikawa ? Okebisi biso ’te tobunda na ekolo Israel te, mpo Nzambe wa bango akobatela bango ! Nani azali nzambe soko Nabukodonozor te ? Ye moto akoti­nda basoda ba ye mpe akosilisa ba-Israel ; Nzambe wa bango akobikisa bango te.
Judi LinVB 6:3  Kasi biso, bato ba Nabukodonozor, tokonyata bango lokola moto moko mpamba. Bakokoka na bokasi bwa farasa ya biso te.
Judi LinVB 6:4  Tokotumba bango na móto kilikili. Ngomba ya ba­ngo ikomele makila ma bango, mpe bisobe bya bango bikotonda na bibembe. Mokonzi wa nse mobimba Nabukodonozor alobi ’te bakokoka biso soki moke te, banso bakokufa, banda moto wa yambo tee moto wa nsuka. Ye alobi bongo, mpe alobi ya­ngo mpamba te.
Judi LinVB 6:5  Yo Akior, mongamba wa ba-Amon, maloba outi koloba makobongela yo soki moke te ; banda lelo okobima o miso ma ngai lisusu te, liboso ’te nasukisa bato baye bakimaki mokili mwa Ezipeti, lokola nakaneli bango.
Judi LinVB 6:6  Mokolo mona likongo lya basoda ba ngai ná mopanga mwa bayangeli ba ngai bikotubola yo mopanzi. Ntango nakobimela ba-Yuda, okokufa bobele lokola bato bakwei o etumba.
Judi LinVB 6:7  Sikawa basaleli ba ngai bakokamba yo o mokili mwa ngomba mpe bakotika yo o engumba pene na lobwaku.
Judi LinVB 6:9  Yo moto ozali na elikya ’te tokoki kobotolo bingumba bya bango te, bongo olakisa elongi ya mawa te. Awa nalobi bongo, nakokokisa makambo manso nalobi. »
Judi LinVB 6:10  Oloferne atindi bato bakosalaka o ema ya ye ’te bakanga Akior, bake­nde na ye o Betulia mpe bakaba ye o maboko ma ba-Israel.
Judi LinVB 6:11  Basaleli bakangi ye, babimisi ye o nganda, bakatisi esobe mpe balandi nzela ya ngo­mba : bakomi o esika ya maziba pene na Betulia.
Judi LinVB 6:12  Bato ba Betulia o nsonge ya ngomba, bamoni banguna ; yango wana bakamati bibuneli bya bango, babimi o engumba mpe bakei o nso­nge ya ngomba ; baye bazalaki na bili­ngongo o maboko babwakeli banguna mabanga mpo ’te bapekisa bango kobuta ngomba.
Judi LinVB 6:13  Banguna bapusani pene na ngomba, bakangi Akior na nsinga mpe batiki ye alali wana pene na ngomba ; bango moko bazongi epai ya mokonzi wa bango.
Judi LinVB 6:14  Ba-Israel babimi o engumba, bakomi epai ya ye. Bafungoli nsinga mpe bakei na ye o Betulia, bakambi ye o miso ma bakonzi.
Judi LinVB 6:15  Ezalaki bo­ngo : Ozia, mwana wa Mikea wa libota lya Simeon, Kabris mwana wa Gotoniel, na Karmis mwana wa Melkiel.
Judi LinVB 6:16  Bango babengi bakolo ba mboka banso ; bilenge na basi banso bayei o likita. Ozia atuni Akior mpo ya makambo makwelaki ye. Ye atelemi o kati ya bato.
Judi LinVB 6:17  Ayanoli bango, ayebisi bango mikano minso mya likita lya Oloferne, na maloba manso ye moko alobaki o miso ma bankumu ba Asur, na mpe maloba manso ma lolendo Oloferne abimisaki mpo ya kokanela ekolo Israel.
Judi LinVB 6:18  Bato banso bafukami, bakumbameli Nzambe, balobi :
Judi LinVB 6:19  « E Mokonzi, Nzambe wa likolo, talaka lolendo la bato baye, oyokela libota lya yo mawa, bato ba yo basambwi mingi. Tala lelo bato baye bamikabi na yo. »
Judi LinVB 6:20  Na nsima balobi na Akior ’te akitisa motema, mpe bapesi ye longonya.
Judi LinVB 6:21  Esili likita, Ozia akei na ye o ndako ya ye mpe abengi bakolo banso o limpati. Butu mobimba babondeli Nzambe wa Israel ’te aya kosalisa bango.