Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
REVELATION OF JOHN
Prev Up Next
Chapter 16
Reve LinVB 16:1  Nayókí loláká lonéne loútí o Témpelo, lolobí na Bǎnzelú nsambo : « Bókende mpé bósopa nkéni nsambo ya nkándá ya Nzámbe o mokili. »
Reve LinVB 16:2  Anzelú wa yambo akeí kosopa nkéni ya yě o mokili : mpótá na mayíná ibimélí bato bánso bazalákí na elembo ya Nyama mpé bakúmbámélákí ekeko ya yě ; bayókí mpási.
Reve LinVB 16:3  Anzelú wa bábalé asopí nkéni ya yě o mbú : mbú ebóngwání makilá. Bakokí kokanisa ’te bato babomámí wâná ; bínso bizalákí na bomoi o mbú bikúfí.
Reve LinVB 16:4  Anzelú wa básáto asopí nkéni ya yě o bibale mpé o máziba : mái makómí makilá.
Reve LinVB 16:5  Nayókí Anzelú wa mái alobí : « Ozalí na bosémbo, yŏ, Oyo Azalí mpé Azalákí, yŏ Mosántu, áwa opésí etúmbu boye.
Reve LinVB 16:6  Basopí makilá ma basántu mpé ma baproféta ; yangó wâná omelísí bangó makilá ; bazwí etúmbu ekokí na bangó ! »
Reve LinVB 16:7  Mpé nayókí loláká loútí epái ya altáre, lolobí : « Sôló, Mokonzi, Nzámbe wa bokási bónso, okátí makambo na bosémbo mpé na bosôló. »
Reve LinVB 16:8  Anzelú wa bánei asopí nkéni ya yě o mwésé ; mwésé mokómí na ngúyá ya kotumba bato :
Reve LinVB 16:9  bato bazíkí na molungé makási mpé batúkí nkómbó ya Nzámbe, óyo azalí na likokí lya kotínda malózí mâná. Kasi babóyí kobóngola mitéma mpé kopésa Nzámbe nkémbo.
Reve LinVB 16:10  Anzelú wa bátáno asopí nkéni ya yě o ngwendé ya Nyama. Bokonzi bwa yě bokómí na molílí. Bato bakómí komíswâ lolému mpô ya mpási bayókí.
Reve LinVB 16:11  Batúkí Nzámbe o likoló mpô ya mpási mpé mpô ya mpótá ibimí mayíná, kasi babóyí kobóngola bizalela bya bangó.
Reve LinVB 16:12  Anzelú wa motóbá asopí nkéni ya yě o ebale enéne Efráte. Mái ma yangó makaúkí, bô­ngó matíkélí bakonzi baútí o Esti nzelá.
Reve LinVB 16:13  Na nsima namóní bilímo bya mbindo bísáto, lokóla magbólóló, bibimí o monoko mwa Ngandó, o monoko mwa Nyama mpé o monoko mwa pro­féta wa lokutá.
Reve LinVB 16:14  Ya sôló, bilímo biye bya zábolo bikosálaka makamwísi, bikokende kosangisa bakonzi bánso ba mokili mobimba mpô ’te bábunda etumba o Mokolo monéne mwa Nzámbe, Mokonzi wa bokási bónso. (
Reve LinVB 16:15  « Tálá, nakoyâ lokóla moyíbi : esengo na moto akokéngeleke mpé alongólí bilambá bya yě té ; bô­ngó akotámbola bolúmbú té, mpé bakomóno nsóni ya yě té. »)
Reve LinVB 16:16  Basangísí bangó o esíká ba-Ebréi bakobéngaka ‘Armagédon’.
Reve LinVB 16:17  Anzelú wa nsambo asopí nkéni ya yě o etando ya likoló : út’o Témpelo nayókí loláká lonéne lolobí : « Esílí ! »
Reve LinVB 16:18  Ebimí minkalali, mingó­ngó na nkáké ; mokili moningání makási. Bandá mokolo bato bakómí o nsé, naíno mokili moningání makási boye té !
Reve LinVB 16:19  Engumbá enéne epaswání na biténi bísáto mpé bingumbá bya bikólo bí­nso bibúkání ; Nzámbe akundólí engumbá Babilóne o motéma, bôngó apésí yangó nkéni ya víno ya nkándá ya yě enéne.
Reve LinVB 16:20  Bisanga bínso bizindí mpé ngómbá ilímwí.
Reve LinVB 16:21  Mbúla ya matá­ndalá enókélí bato ; bozitó bwa libángá lyŏ kó lyŏ kó bokokí na kiló ntúkú ínei ! Mpé bato batúkí Nzá­mbe mpô ya mbúla enéne ya matá­ndalá ; ezalákí monyóko mwa nsómo mpenzá.