Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next Toggle notes
Chapter 3
Deut LinVB 3:1  Na nsima tolandaki nzela ya Basan. Og, mokonzi wa Basan, ayaki kozwana na biso o mboka Edrei elongo na bato ba ye banso mpo ya kobunda na biso.
Deut LinVB 3:2  Yawe alobaki na ngai : « Obanga te, zambi nakabaki ye o maboko ma yo, ye na bato ba ye banso na mpe ekolo ya ye. Sala na ye lokola osalaki na Sikon, mokonzi wa Amor, oyo afandi o Kesbon. »
Deut LinVB 3:3  Bongo Yawe Nzambe wa biso akabaki Og, mokonzi wa Basan, o maboko ma biso ; tolongaki ye, mpe moto moko wa bango abikaki te.
Deut LinVB 3:4  O mikolo mina tobotoloki mpe mboka ya bango inso, batikalaki ata na mboka yoko te : mboka ntuku motoba, mokili mobimba mwa Argob, boko-nzi bwa Og o Basan,
Deut LinVB 3:5  mboka ina i­nso izingami na mapango makasi, na bifelo bilai mpe bizibeli bya mboka bikangemi na bibende makasi, na mpe mboka ebele ya ba-Perizi.
Deut LinVB 3:6  Se lokola tosalaki na Sikon, mokonzi wa Kesbon, tobomaki binso nye, ná babali ná basi ná bana.
Deut LinVB 3:7  Kasi tobotoloki bibwele binso na mpe biloko bya mboka bitikalaki nsima ya etu­mba.
Deut LinVB 3:8  O ntango ena tobotoloki bongo mokili mwa bakonzi babale ba Amor o ngambo ya Yordane, banda moluka Arnon tee ngomba Eromon.
Deut LinVB 3:9  Ba-Sidon bakotangaka Eromon na nko­mbo Sirion, ba-Amor Senir.
Deut LinVB 3:10  Tobotoloki mboka inso ya mokili mwa ngomba, Galaad na Basan mobimba tee Salka mpe Edrei, mboka moko­nzi wa Og o Basan.
Deut LinVB 3:11  Og, mokonzi wa Basan, ye moto wa nsuka wa libota lya ba-Refaim atikalaki na bomoi ; lilita lya ye lizali lilita lya bibe­nde, liye bakoki komono o Raba o mokili mwa bato ba Amon, bolai ma­boko libwa, bonene maboko manei.
Deut LinVB 3:12  Ntango ena tobotoloki mokili mona banda Aroer penepene na moluka Arnon. Napesaki ba-Ruben mpe ba-Gad ndambo ya mokili mwa ngo­mba mwa Galaad na mpe mboka ya mwango.
Deut LinVB 3:13  Eteni eye ya mokili mwa Galaad etikalaki, na mpe mokili mwa Basan, ekolo ya Og, napesaki yango na ndambo ya libota lya Manase. Mokili mwa Argob na mokili mwa Basan batangi yango ekolo ya ba-Refaim.
Deut LinVB 3:14  Yair, mwana wa Manase abotoloki mokili mobimba mwa Argob tee nde­lo ya mokili mwa ba-Gesur na ba-Maaka ; apesi mokili mwa Basan, nkombo ya ye moko : mboka ya Yair etangemi se bongo tee lelo.
Deut LinVB 3:16  Na­pesaki bato ba mabota ma Ruben mpe ma Gad mokili mwa Galaad, banda moluka Arnon tee moluka Yabok, ndelo ya ekolo ya ba-Amon.
Deut LinVB 3:17  Ndelo esusu ezali lobwaku la Araba mpe ebale Yordane, banda Kineret tee Mbu ya Araba, Mbu ya Mongwa, o nse ya ngomba Pisga o Esti.
Deut LinVB 3:18  O mokolo mona napesaki bino etinda eye : « Yawe Nzambe wa bino apesaki bino mokili moye mpo ’te bokoma bankolo ba mabelé. Bino babali banso bokoki na etumba, boleka liboso lya bandeko ba bino ba-Israel, bibuneli o maboko.
Deut LinVB 3:19  Se basi na bana na bibwele, mpo nayebi ’te bozali na bibwele mingi, batikala o mboka napesaki bino.
Deut LinVB 3:20  Mokolo Yawe akopesa bino ná bandeko ba bino nzela ya kopema, mokolo bango nde bazwi mabelé maye Yawe Nzambe wa bino akopesa bango o ngambo ya Yor­dane, bino banso bokoki kozo­nga o mokili moye napesaki bino. »
Deut LinVB 3:21  Napesaki Yozue etinda eye : « Omonoki na miso manso Yawe Nzambe wa yo asalaki na bakonzi bana babale ; Yawe akosala se bongo na bikolo binso esika okoleka.
Deut LinVB 3:22  Obanga bango te ; Yawe Nzambe wa bino ye moko akobundela bino etumba. »
Deut LinVB 3:24  « E Yawe Mokonzi wa ngai, obandaki kolakisa ngai mosaleli wa yo bonene na bokasi bwa yo. Nzambe nani o likolo to o nse, akosalaka mosala lokola yo, mpe azali na bokasi lokola yo ?
Deut LinVB 3:25  Tika nakatisa ebale mpe namono mokili kitoko kuna o ngambo ya Yordane, ngomba kitoko mpe Libano. »
Deut LinVB 3:26  Kasi Yawe asi­likaki na ngai mpo ya bino mpe andimelaki ngai te, alobi : « Ekoki bo­ngo ! Oloba na ngai lisusu likambo lina te !
Deut LinVB 3:27  Buta ngomba Pisga tee o nso­nge, tala epai ya Westi, Nordi, Sudi mpe Esti ; tala malamu zambi yo okokatisa Yordane te.
Deut LinVB 3:28  Pesa Yozue bitinda bya yo, lendisa ye, zambi ye moto akoleka liboso, ye moto akokamba bato baye, ye moto akokomisa bango bankolo ba mabelé maye ozali komono. »
Deut LinVB 3:29  Bongo totikalaki o lobwaku la ngo­mba penepene na Baal-Peor.