Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
DEUTERONOMY
Prev Up Next
Chapter 7
Deut LinVB 7:1  Mokolo Yawe Nzambe wa bino akoyingisa bino o mokili moye bolingi kozwa sikawa, bokolonga bato ebele, bikolo nsambo bya bato baleki bino na boike mpe na bokasi : ba-Iti, ba-Girgas, ba-Amor, ba-Kanana, ba-Perizi, ba-Ivi na ba-Yebus.
Deut LinVB 7:2  Yawe Nzambe wa bino akokaba ba­ngo o maboko ma bino, bokolonga bango mpe bokobengana bango o lisanga lya bino. Bokata na bango bo­ndeko te, boyokela bango mpe mawa te.
Deut LinVB 7:3  Boluka kobala bango te, bopesa babali ba bango bana basi ba bino te ; bobalela bana babali ba bino bana basi ba bango te,
Deut LinVB 7:4  soki te, bana ba bino bakoboya kotosa ngai, mpe bakokumisa banzambe basusu ; yango wana Yawe akoyokela bino nkanda mpe akoboma bino noki.
Deut LinVB 7:5  Kasi tala boniboni bosengeli kosala ona bato ba bikolo bina : boboma altare ya bango, bobuka makonzi ma nkisi, bokata nze­te ya nkisi mpe botumba bikeko bya bango.
Deut LinVB 7:6  Bozali ekolo ya Yawe Nzambe wa bino ; ye moto aponi bino bozala ekolo ya ye mpenza o kati ya bikolo bi­nso bya nse.
Deut LinVB 7:7  Soko Nzambe alingi bino mpe aponi bino, ezali te zambi bozali ekolo eleki enene : o kati ya bikolo binso bozali ekolo eke.
Deut LinVB 7:8  Yawe abimisaki bino na bokasi bwa ye mpe abikisaki bino o boombo, alongolaki bino o maboko ma Farao, mokonzi wa Ezipeti, zambi apusi kolinga bino mpe akokisaki ndai alayelaki bankoko ba bino.
Deut LinVB 7:9  Bongo boyeba ’te Nza­mbe wa bino azali Nzambe wa solo, akokosaka te, amemyi bondeko akataki na bino ; akolingaka seko baye balingi ye mpe batosi mibeko mya ye.
Deut LinVB 7:10  Kasi akopesaka etumbu na bato bayini ye : akoumela te koboma moto oyo ayini ye ; akopesa ye etumbu ekoki na ye.
Deut LinVB 7:11  Bongo, botosa bitinda, mibeko na mimeseno napesi bino lelo ; bokokisa myango.
Deut LinVB 7:12  Soko bolandi mimeseno mina mpe bondimi kokokisa myango, Yawe Nzambe wa bino akobatela bo­ndeko bwa bolingi alayelaki bankoko ba bino.
Deut LinVB 7:13  Akolinga bino, akobenisa bino, akokomisa bino bato ebele, ako­benisa bana ba bino, akobenisa mbuma ya bilanga, mbuma ya ma­mpa, vino ya sika na mafuta, bana ba ngombe na mpata inso izali na zemi kuna o mokili moye alakelaki bankoko ba bino.
Deut LinVB 7:14  Bokozwa bobenisi leka bikolo binso. Bato ba yo banso bakobota bana, babali na basi ; bibwele mpe bikobota mingi.
Deut LinVB 7:15  Yawe akolo­ngola bokono bonso, akotindela bino bitumbu bibe te biye bomonoki o Ezipeti, kasi baye banso bayini bino akotindela bango byango.
Deut LinVB 7:16  Bokosilisa bato ba bikolo binso baye Yawe Nzambe wa bino akokaba o maboko ma bino. Bokoyokela moto moko mawa te. Bokokumisa banzambe ba bango te, zambi bango bakoki kokotisa bino o motambo.
Deut LinVB 7:17  Mbele bokoloba o kati ya mitema : « Bato ba bikolo bina baleki biso na boike ; ndenge nini tokoki kobotolo bango mokili mwa bango ? »
Deut LinVB 7:18  Bobanga bango te ; bokundola o mitema makambo manso Yawe Nzambe wa bino asalaki Farao na bato banso ba Ezipeti.
Deut LinVB 7:19  Bokanisa minyoko, misala na makambo manene bomonoki na miso mpe boniboni Yawe alakisaki bokasi bwa ye mpe atombolaki lobo­ko mpo ya kobimisa bino kuna. Yawe Nzambe wa bino akosala se bo­ngo na bikolo binso biye bozali kobanga.
Deut LinVB 7:20  Yawe Nzambe wa bino akotinda mpe nzoi inene mpo ya koboma o miso ma bino baye banso batikali na bomoi mpe babombami o miso ma bino.
Deut LinVB 7:21  Bolenge o miso ma bango te, za­mbi Yawe Nzambe wa bino, Nzambe monene mpe wa nsomo, azali o kati ya bino.
Deut LinVB 7:22  Yawe Nzambe wa bino ako­boma bango se malembe male­mbe. Bokoki koboma bango banso na mbala yoko te mpo ’te nyama ya zamba ikoma mingi te, mpe bongo isala bino mabe te.
Deut LinVB 7:23  Yawe Nzambe wa bino akokaba bango o maboko ma bino, bango bakozala na nsomo tee banso basili kokufa.
Deut LinVB 7:24  Yawe akokaba mpe bakonzi ba bango o maboko ma bino, mpe bokolongola nko­mbo ya bango o mokili. Moto moko akokoka bino te, tee bokosilisa ba­ngo banso.
Deut LinVB 7:25  Botumba bikeko bya banzambe ba bango ; bolula wolo to palata ya bikeko te. Soko bokamati yango, bokoti o motambo, zambi ezali lika­mbo lya nsomo o miso ma Yawe Nza­mbe wa bino.
Deut LinVB 7:26  Bokotisa o ndako ya bino eloko ya nsomo te, mpo ’te bino moko bozwa bobe te lokola eloko ena. Botala biloko bina lokola biloko bya mbindo mpe bya nsomo, zambi bizali biloko bya ekila.