Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOSHUA
Prev Up Next
Chapter 11
Josh LinVB 11:1  Eyoki Yabin, mokonzi wa Asor, makambo mana, atindi maloba epai ya Yobab, mokonzi wa Madon, mokonzi wa Simron, mokonzi wa Aksaf,
Josh LinVB 11:2  na bakonzi baye bakofandaka epai ya ngomba ya Nordi, o Araba o Sudi ya Kinerot, o mokili mwa lobwaku mpe o ngomba ya Dor epai ya Westi,
Josh LinVB 11:3  ba-Kanana bafandi epai ya Esti ma Westi ; ba-Amor, ba-Iti, ba-Perizi na ba-Yebus kuna o ngomba, mpe ba-Ivi o nse ya ngomba Ermon o mokili mwa Mispa.
Josh LinVB 11:4  Bakei banso elongo na basoda ba ba­ngo ba­nso, bato ebele mpenza, mingi lokola zelo o libongo lya mbu. Bakei mpe na farasa mpe na makalo ebele.
Josh LinVB 11:5  Bakonzi baye banso bayokani ’te bakosangana esika yoko, bayei kopika nganda penepene na mai ma Merom mpo ya kobundisa ba-Israel.
Josh LinVB 11:6  Ya­we alobi na Yozue : « Obanga ba­ngo te, zambi lobi na ngonga eyemei nakokaba bango banso o maboko ma ba-Israel, banso bakokufa. Kata mi­nsisa mya makolo ma farasa ya bango mpe tumba makalo ma bango. »
Josh LinVB 11:7  Yozue na basoda ba ye banso bazwani na bango na mbalakaka penepene na mai ma Merom mpe bakamatani.
Josh LinVB 11:8  Yawe akabi bango o maboko ma ba-Israel ; ba-Israel balongi bango, balandi bango tee o engumba ya Sidoni tee Misrepot epai ya Westi, tee o lo­bwaku la Mispa epai ya Esti. Bakweisi bango ; moto moko abiki te.
Josh LinVB 11:9  Yozue asali bango se lokola Yawe alobelaki ye ; akati misisa mya makolo ma farasa ya bango mpe atumbi makalo ma bango.
Josh LinVB 11:10  O ntango ena Yozue azongi mpe abotoli Asor, abomi mokonzi wa mboka na mopanga. Kala Asor ezalaka mboka mokonzi ya mokili mona.
Josh LinVB 11:11  Babomi bato banso na mopanga ; basilisi binso nye ; moto moko abiki te, mpe batumbi mboka Asor.
Josh LinVB 11:12  Yozue abotoli mboka inso na bakonzi ba yango ; abomi bango banso na mopanga mpe asilisi binso nye, se lokola Moze mosaleli wa Yawe atindaki ye.
Josh LinVB 11:13  Nzokande ba-Israel batumbi mboka inso ya ngomba te, se Asor, eye Yozue atumbi.
Josh LinVB 11:14  Kasi ba-Israel babotoli biloko binso bizalaki o mboka ná bibwele lokola. Babomi bato banso na mopanga ; moto moko abiki te. Batiki moto moko na bomoi te.
Josh LinVB 11:15  Lokola Yawe atindaki Moze mosaleli wa ye, se bongo Moze atindaki Yozue ; mpe Yozue asali manso lokola Yawe atindaki Moze, atiki ata li­loba lyoko te.
Josh LinVB 11:16  Mpe bongo Yozue abo­toli mokili mona mobimba : mokili mwa ngomba, mokili mwa Negeb, mokili mobimba mwa Gosen, mokili mwa lobwaku, mokili mwa Araba, ngomba ya Israel na mabwaku ma yango.
Josh LinVB 11:17  Longwa o ngomba Pele pene na Seir tee Baal-Gad, o lobwaku la Libano o nse ya ngomba Ermon, akangi bakonzi banso mpe abomisi bango.
Josh LinVB 11:19  Mboka ata yoko te ekataki bondeko na ba-Israel, tika se ba-Ivi, baye bakofandaka o Gabaon. Babo­toli mboka isusu inso se na bitumba.
Josh LinVB 11:20  Mpamba te, Yawe akomisaki bango motó makasi mpo ’te babunda etumba na ba-Israel mpo ’te banso basila nye ; moto moko ayokela ba­ngo mawa te, kasi basila nye lokola Yawe alobaki na Moze.
Josh LinVB 11:21  O mikolo mina Yozue akei koboma ba-Anakim banso bafandi o mokili mwa ngomba, o Ebron, o Debir, o Anab, o ngomba ya Yuda mpe o ngo­mba inso ya Israel ; abomi bango banso ná mboka ya bango lokola.
Josh LinVB 11:22  O ekolo Israel etikalaki lisusu ba-Anakim te, longola se o mboka Gaza, Gat na Asdod.
Josh LinVB 11:23  Yozue abotoli mokili mobimba se lokola Yawe alobaki na Moze ; akabeli ba-Israel mabelé enge­bene na mabota ma bango. Nsima ya bitumba mokili mokomi nye.