ROMANS
Chapter 12
Roma | LinVB | 12:1 | Bandeko, nabóndélí bínó mpô ya ngolu ya Nzámbe : bómíbonza na Nzámbe bǒ libonza lya sôló, libonza lisántu likosepelisaka Nzámbe. Bókúmisa yě bôngó na losámbo bǒ ebongí. | |
Roma | LinVB | 12:2 | Bólanda ezalela ya bato ba nsé eye té, kasi bókóma bato ba mayéle ma sika, na mitéma mya sika. Bôngó bokoyéba níni Nzámbe alingí bósála, níni ezalí malámu mpé ekosepelisa yě, mpé níni ebongí nyé mpenzá. | |
Roma | LinVB | 12:3 | Mpô ya ngrásya Nzámbe apésí ngáí, nayébísí mǒkó mǒkó wa bínó bánso : Bótíka loléndo ! Moto mǒkó ámítómbola té ! Moto na moto ámíyéba sé lokóla Nzámbe akabélí yě makabo ma boyambi. | |
Roma | LinVB | 12:5 | na bísó sé bôngó : tozalí bato baíké, kasi tozalí nzóto sé yǒ kó o Krístu ; bísó bánso tozalí biténi bya nzóto, moto na moto na loléngé la yě. | |
Roma | LinVB | 12:6 | Tozwí mpé makabo ndéngé na ndéngé, sé lokóla Nzámbe akabélí bísó mangó. Sókó ozwí likabo lya kosakola, sakólá sé lokóla eyamba etíndí. | |
Roma | LinVB | 12:7 | Sókó ozwí likabo lya kosálisa báníngá, sálísá bangó malámu ; sókó ozwí likabo lya kotéya, téyá malámu ; | |
Roma | LinVB | 12:8 | sókó ozwí likabo lya koléndisa bato, léndísá bangó. Moto alingí kokabela móníngá elóko, ákaba yangó na motéma mǒkó. Moto azalí na bokonzi, áyángela bato na mpíkó ; óyo akosálisaka bato ba mawa, ásála yangó na esengo. | |
Roma | LinVB | 12:9 | Bólinga báníngá na mitéma míbalé té, bóbóya makambo mabé, bólanda mambí malámu na moléndé. | |
Roma | LinVB | 12:10 | Bólingana na motéma mǒkó ; moto na moto átála móníngá lokóla moto alekí yě na bolámu. | |
Roma | LinVB | 12:12 | Na esengo bótía elíkyá na Nzámbe, bókanga mitéma o ntángo ya minyóko, bólembe kosámbela té. | |
Roma | LinVB | 12:13 | Bósálisa bandeko bakrístu bazalí kokélela, mpé bóyamba bampaya malámu o ndáko ya bínó. | |
Roma | LinVB | 12:14 | Bósénge Nzámbe ’te ábenisa bato bakonyókoloko bínó ; bótómbela bangó sé mambí malámu, mabé té. | |
Roma | LinVB | 12:15 | Bósepela elongó na bato bazalí koyóka esengo, bólela elongó na baye bazalí koyóka mawa. | |
Roma | LinVB | 12:16 | Bóyókana malámu bínó na bínó, bózala na loléndo té. Bósepela libosó maye mánso mazángí lokúmu. Bómímóno té lokóla bato ba mayéle. | |
Roma | LinVB | 12:17 | Moto asálí bínó mabé, bózóngisela yě mabé té, kasi bóluka kosála maye makobongela bato bánso. | |
Roma | LinVB | 12:19 | Bandeko ba bolingo, sókó basálí bínó mabé, bózóngisa mabé té, bótíka yangó o mabóko ma Nzámbe, mpô ekomámí o Minkandá : « Mokonzi alobí : Ngáí moto nakokáta makambo ma bato basálí mabé, ngáí mǒkó nakopésa etúmbu. » | |
Roma | LinVB | 12:20 | Kasi sókó mongúná ayókí nzala, pésá yě bilóko álía. Sókó ayókí mpósá ya mái, pésá yě mái ámele. Sókó osálí bôngó, okoyókisa yě nsóni mpenzá. | |