ROMANS
Chapter 11
Roma | LinVB | 11:1 | Natúní lisúsu : Bôngó Nzámbe abóyí ndé ekólo ya yě ? Sókí moké té ! Ngáí mǒkó nazalí mo-Israél, nkóko wa Abaráma, wa libótá lya Benyamin ! | |
Roma | LinVB | 11:2 | Nzámbe aponókí bato ba yě út’o ebandela, abóyí bangó té. Bókanisa maloba ma Minkandá Misántu esíká Elía afúndí ba-Israél epái ya Nzámbe : | |
Roma | LinVB | 11:3 | « Mokonzi, babomí baproféta ba yǒ, babúkíbúkí altáre ya yǒ. Tálá, natíkálí ngáí mǒkó, mpé balingí koboma ngáí. » | |
Roma | LinVB | 11:4 | Bôngó Nzámbe ayanólákí yě níni ? Nabátélí bato nkóto nsambo bázala ba ngáí mpenzá, baye bakúmbámélákí Baal té. | |
Roma | LinVB | 11:6 | Aponí bangó mpô ya bolámu bwa yě, mpô ya misálá mya bangó té. Sókó aponókí bangó mpô ya misálá mya bangó, bolámu bwa Nzámbe bolingákí kozala bolámu bwa sôló té. | |
Roma | LinVB | 11:7 | Bôngó, tóloba níni ? Elóko bazalákí koluka, ba-Israél bánso bazwí yangó té. Bobélé baye Nzámbe aponí, bazwí yangó. Basúsu bánso bakómákí mitó makási, | |
Roma | LinVB | 11:8 | lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : Nzámbe alembísákí mayéle ma bangó. Téé leló bazalí komóno na míso té, mpé bazalí koyóka na matói té. | |
Roma | LinVB | 11:9 | Davídi mpé alobákí : Bilóko bya bangó bya kolía bíkóma kotíela bangó motámbo mpé monyámá, bíkwêisa bangó mpô ’te bázwa etúmbu. | |
Roma | LinVB | 11:10 | Míso ma bangó mákúfa, bámóno lisúsu té ; mpé sálá ’te bázalaka baómbo ntángo ínso. | |
Roma | LinVB | 11:11 | Natúní mpé boye : Awa batútákí libakú, bakwéí ndé libélá ? Sókí moké té ! Kasi áwa bakwéí, bato ba bikólo bisúsu bazwí nzelá ya kobíka mpô ’te ba-Israél báyókela bangó zúwa. | |
Roma | LinVB | 11:12 | Lokóla bato ba nsé mobimba bazwí bolámu mpô ya masúmu ma ba-Israél, mpé lokóla basúsu babíkí mpô ba-Israél bakití, esengo ekoleka mpenzá mokolo ba-Yúda bánso bakoyamba libíkí ! | |
Roma | LinVB | 11:13 | Nayébísí bínó bato bozalákí libosó bapagáno : ya sôló, nazalí apóstolo epái ya bapagáno, mpé nakosálaka mosálá mwangó na motéma mǒkó. | |
Roma | LinVB | 11:14 | Nalingí ’te bato ba ekólo ya ngáí báyókela bínó zúwa, bôngó, na mosálá mwa ngáí, Nzámbe ábíkisa basúsu ba bangó. | |
Roma | LinVB | 11:15 | Awa Nzámbe atíákí ba-Yúda mpembéni, azóngísí bondeko na bikólo bisúsu, yangó wâná o eleko akoyamba ba-Yúda lisúsu, bato baye bakúfákí bakozwa bomoi. | |
Roma | LinVB | 11:16 | Sókó límpa lya libosó babonzélí Nzámbe likómí lisántu, mámpa masúsu mánso makómí mámpa masántu. Sókó ntína ya nzeté ezalí esántu, bitápi bya yangó bizalí mpé bisántu. | |
Roma | LinVB | 11:17 | Awa bakátí bitápi bisúsu bya nzeté mpé bapikí yǒ, etápi ya nzeté ya olíva ya zámba, o mobímbí mpô ’te ntína ya nzeté éléisa yǒ, | |
Roma | LinVB | 11:18 | ómíkúmisa té o míso ma bitápi biye bikátémí. Okokí komíkúmisa té, zambí yǒ ozalí koléisa ntína ya nzeté té, ntína moto ezalí koleísa yǒ. | |
Roma | LinVB | 11:20 | Olobí malámu. Bakátákí byangó zambí bizángákí boyambi, mpé yǒ otíkálí mpô ya boyambi bwa yǒ ; kasi tíká komíkúmisa, ózala sé na bobángi. | |
Roma | LinVB | 11:22 | Yangó wâná ókanisa bolámu bwa Nzámbe, ókanisa mpé nkándá ya yě : nkándá ya yě ôná baye bakwéí, bolámu bwa yě ôná yǒ sókó otíkálí o bondeko bwa yě. Sókí bôngó té, akolongola yǒ lokóla. | |
Roma | LinVB | 11:23 | Mpé bangó, sókó babóngólí mitéma mpé bayambí, Nzámbe akozóngisa bangó o nzeté ; azalí na ngúyá ya kosála yangó. | |
Roma | LinVB | 11:24 | Kanísá : Yǒ etápi ya nzeté ya olíva ya zámba, balongólákí yǒ o nzeté eye ebimísákí yǒ, mpé bapikí yǒ o mobímbí mwa nzeté elámu ya olíva eye ebimísákí yǒ té. Bôngó mpô ’te bázóngisa bitápi biye bibimákí o nzeté êná o mobímbí mobimísákí byangó, ekozala mpási té ? | |
Roma | LinVB | 11:25 | Bandeko, nalingí ’te bóyéba mobómbamo mǒkó mpô ’te bómíkúmisa té na mayéle ma bínó : ndámbo ya ekólo ya Israél ekolakisa motó makási téé mokolo bato ba bikólo bisúsu bakoyíngela (o Eklézya). | |
Roma | LinVB | 11:26 | Bôngó ba-Israél bánso bakobíka, lokóla ekomámí : Mobíkisi akoúta o Síon, akolongola masúmu o libótá lya Yakób. | |
Roma | LinVB | 11:28 | Ya sôló, áwa bínó boyambí Nsango Elamú, ba-Yúda bakómí bangúná ba Nzámbe. Kasi lokóla Nzámbe aponókí bangó, bazalí sé bána ba yě ba bolingo mpô ya elaká alakélákí bankóko ba bangó. | |
Roma | LinVB | 11:30 | Kala bínó bato ba bikólo bisúsu bozalákí kotósa Nzámbe té, kasi sikáwa Nzámbe ayókélí bínó mawa, zambí ba-Yúda bazalí kotósa yě té. | |
Roma | LinVB | 11:31 | Sé bôngó : sikáwa ba-Yúda bazalí kotósa Nzámbe té, mpô Nzámbe ayókélí bínó mawa. Na nsima akoyókela mpé bangó mawa. | |
Roma | LinVB | 11:32 | Ya sôló, áwa bato bánso babóyí kotósa yě, Nzámbe andimákí ’te bákóma lokóla bato ba bolóko, mpô ’te bangó bánso bábíka bobélé mpô ya ngolu ya yě. | |
Roma | LinVB | 11:33 | Bókanisa naíno bonéne bwa bwányá mpé boyébi bwa Nzámbe ! Ndéngé yě akobongisaka makambo tǒ ndéngé yě akosálaka : moto mǒkó akokí koyéba yangó té ! | |