Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ROMANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 7
Roma LinVB 7:1  Bandeko, nalobí na bínó bato boyébí ntína ya mibéko : boyébí ’te moto asengélí kotósa mibéko bobélé ntángo azalí na bomoi.
Roma LinVB 7:2  Ndakisa : mwásí wa libála asengélí kotósa mibéko mya libála mikolo mínso mobáli wa yě azalí na bomoi. Kasi sókó mobáli awéí, akangémí na mibéko mya libála lisúsu té.
Roma LinVB 7:3  Sókó akómí na mobáli mosúsu ntángo mobáli wa yě azalí naíno na bomoi, bakobénga yě mwásí wa bo­káli. Kasi sókó mobáli akúfí, mwásí asengélí kotósa mibéko mya libála lisúsu té ; sókó babálí yě na mobáli mosúsu, bakobénga yě mwá­sí wa bokáli té.
Roma LinVB 7:4  Bandeko, bínó sé bôngó, bokangémí lisúsu na Mobéko té, mpô nzóto ya Krístu ekúfákí. Bozwí mokonzi mosúsu óyo asékwákí o bawá mpô ’te bísó tóbótela Nzámbe mbuma.
Roma LinVB 7:5  Ntángo tozalákí naíno baómbo ba nzóto, mpósá ya mabé ezalákí o nzóto ya bísó ; Mobéko mozalákí koyébisa bísó bôngó. Mpósá eye etíndákí bísó tósála mabé mpô tóbóta mbuma iye ikosúkisa bísó o liwá.
Roma LinVB 7:6  Kasi sikáwa tolongwí o boómbo bwa Mobéko, zambí tokúfí o maye matálí nzóto, eye ezalákí kokanga bísó o boómbo. Totíkí kosálela Nzámbe na ndéngé ya kala lokóla ekomámí o Mobéko, tozalí kosálela yě na ndéngé ya sika lokóla Elímo akolakisaka bísó.
Roma LinVB 7:7  Bôngó, tóloba ’te Mobéko mwa Móze mokómí ndé lisúmu ? Sókí moké té ! Sé mpô ya Mobéko nayébákí níni ezalí lisúmu. Mobéko motíndí ’Olúla té’ ; sókó Mobéko molobákí bôngó té, mbele nayébákí té ’te kolúla ezalí mabé.
Roma LinVB 7:8  Bôngó mpô ya Mobéko lisúmu lizwákí nzelá ya kotínda ngáí nálúla mabé ndéngé na ndéngé. Sókó Mobéko mozalákí té, mbele lisúmu lizalákí na ngúyá té.
Roma LinVB 7:9  Kala, ntángo Mobéko mozaláká té, ngáí nazalákí na bomoi. Kasi ntá­ngo Mobéko mobimí, lisúmu likómí na ngúyá,
Roma LinVB 7:10  mpé nakómí lokóla moto akúfí. Mobéko batíndákí mpô ya kopésa bomoi, moyélí ngáí liwá.
Roma LinVB 7:11  Mpámba té, mpô ya Mobéko lisúmu lizwí ngúyá ya kosénginya ngáí, mpé ya koboma ngáí.
Roma LinVB 7:12  Sôló, Mobéko mozalí mosántu mpé mokotíndaka sé mitíndo misá-ntu mpé milámu.
Roma LinVB 7:13  Mobéko, elóko elámu, ekómélí ngáí ndé ntína ya liwá ? Sókí moké té ! Mobéko mozalí malámu, kasi na elóko elámu, yangó ndé Mobéko, lisúmu liyélí ngáí liwá, mpé lilakísí bôngó ’te lizalí lisúmu sôló. Masúmu mazwí ngúyá ya ko­ngala makási sé mpô ya Mobéko.
Roma LinVB 7:14  Toyébí ’te Mobéko moútí na Nzámbe, kasi ngáí nazalí moto motaú, moómbo wa lisúmu.
Roma LinVB 7:15  Ya sôló, maye nakosálaka, nayébí ntína ya mangó té : maye nalingí kosála, nakosálaka mangó té, nzókandé nakosálaka maye nakobóyaka.
Roma LinVB 7:16  Bôngó, sókó nasálí maye nalingí té, nandimí ’te Mobéko mozalí molámu.
Roma LinVB 7:17  Yangó wâná emónóní ’te ngáí moto nakosálaka bôngó té, bobélé lisúmu lizalí o motéma mwa ngáí likosálaka yangó.
Roma LinVB 7:18  Sôló, nayébí ’te bosémbo bozalí na ngáí sókí té, nazalí koloba sé mpô ya nzóto. Atâ nayókí mpósá ya kosála malámu, nakokí kosála mangó té.
Roma LinVB 7:19  Yangó wâná, malámu maye nalingí kosála, nakosálaka mangó té, mpé mabé maye nalingí kosála té, nakosálaka mangó.
Roma LinVB 7:20  Bôngó, sókó nasálí likambo nalingí té, elakísí ’te ezalí ngáí té moto nasálí lyangó, kasi lisúmu liye lifándí o nzóto ya ngáí.
Roma LinVB 7:21  Yangó wâná, namóní ’te ntángo nalingí kosála malámu, mpósá ya kosála mabé eyélí ngáí.
Roma LinVB 7:22  Na motéma mwa ngáí nakosepelaka mobéko mwa Nzámbe míngi.
Roma LinVB 7:23  Kasi nayókí mpósá o nzóto ya ngáí ezalí kobunda etumba na mobéko moye nandimí na mayéle ma ngáí ; mpósá êná ekokómisaka ngáí moómbo wa lisúmu lifándí o nzóto ya ngáí.
Roma LinVB 7:24  Aá, ngáí moto wa mawa ! Náni akobíkisa ngáí o boómbo bwa nzóto eye ezalí koyêla ngáí liwá ?
Roma LinVB 7:25  Tótóndo Nzámbe mpô ya Yézu Krístu Mokonzi wa bísó ! Mayéle ma ngáí makotíndaka ngáí nátósa mobéko mwa Nzámbe, kasi nzóto ya ngáí ekotíndaka ngáí nátósa mobéko mwa lisúmu.