Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ROMANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 4
Roma LinVB 4:1  Bôngó, tóloba níni mpô ya Abaráma, nkóko óyo abótí bísó ? Azwákí níni ?
Roma LinVB 4:2  Sókó Abaráma akómákí moto wa bosémbo mpô ya misálá mya yě, mbele akokákí komíkúmisa, kasi o míso ma Nzámbe té !
Roma LinVB 4:3  O Minkandá bakomí níni ? Abaráma ayambákí Nzámbe, yangó wâná Nzámbe akómísí yě moto wa bosémbo.
Roma LinVB 4:4  Bakokabelaka moto wa mosálá likabo té, bakofútaka yě lifúta.
Roma LinVB 4:5  Kasi sókó moto atíí motéma na Oyo akokómisa mosúmuki moto wa bosémbo, atâ asálí mosálá té, Nzámbe akotála yě lokóla moto wa bosémbo mpô ya boyambi bwa yě.
Roma LinVB 4:6  Sé bôngó Davídi atángákí moto wa esengo moto óyo akómí moto wa bosémbo o míso ma Nzámbe, atâ atálí misálá mya yě té :
Roma LinVB 4:7  Esengo na baye Nzámbe alímbísí bangó mabé basálákí, mpé na baye akundí masúmu ma bangó.
Roma LinVB 4:8  Esengo na moto óyo Nzámbe atálí yě lokóla moto wa masúmu té.
Roma LinVB 4:9  Bôngó, bobélé bato bakátísí nzóto bakozala na esengo, tǒ mpé baye bakátísí nzóto té ? Tolobákí mpô ya Abaráma : Nzámbe akómísí yě moto wa bosémbo mpô ya boyambi bwa yě.
Roma LinVB 4:10  O ntángo níni yangó esálémákí ? Ntángo basílákí kokáta yě nzóto, tǒ naíno bakátákí yě nzóto té ? Ezalákí libosó ’te bákáta yě nzóto, nsima té.
Roma LinVB 4:11  Na nsima bakátí yě nzóto lokóla elembo ’te akómí moto wa bosémbo mpô ya boyambi bozalákí na yě ntángo bakátákí yě naíno nzóto té. Bôngó akómí tatá wa bato bánso bayambí Nzámbe, atâ bakátí bangó nzóto té : Nzámbe akómísí bangó bato ba bosémbo.
Roma LinVB 4:12  Akómí mpé tatá wa baye bánso bakátísá nzóto, baye bakotálaka bobélé elembo êná ya nzóto té, kasi bakolandaka nzelá ya boyambi bwa tatá wa bísó Abaráma ntángo naíno bakátákí yě nzóto té.
Roma LinVB 4:13  Nzámbe alakélákí Abaráma na libótá lya yě ’te bakokóma bankóló ba mokili. Apésákí Abaráma elakó êná mpô ya Mobéko té, kasi mpô ya boyambi bwa yě.
Roma LinVB 4:14  Sókó bobélé bato bakotósaka Mobéko bakozwa bolámu boye Nzámbe alakélákí, boyambi bokómí mpámbá ; elakó Nzámbe alakélákí ekómí mpámba lokóla.
Roma LinVB 4:15  Etúmbu ekokí kozala bobélé sókó Mobéko mozalí ; kasi sókó Mobéko mozalí té, moto akokí kobúka bwangó té.
Roma LinVB 4:16  Bôngó, Nzámbe alakélákí bokonzi bwa mokili mpô ya boyambi, sé lokóla likabo. Yangó wâná elakó êná ekokí na bána bánso ba Abaráma : bobélé na baye té bakotósaka Mobéko, kasi mpé na baye bazalí na boyambi lokóla Abaráma, tatá wa bísó bánso.
Roma LinVB 4:17  Ekomámí mpé boye : « Nakómísí yǒ tatá wa bikólo biíké. » Azalí tatá wa bísó o míso ma Nzámbe, lokóla ayambákí ’te Nzámbe akokí kosé­kwisa bato mpé kozalisa bilóko biye bizalákí té.
Roma LinVB 4:18  Abaráma atíákí motéma na Nzámbe : atâ amóní nzelá sókí té, ayambí sé boyambi ; bôngó akómí tatá wa bato ebelé, lokóla Nzámbe alobákí : Libótá lya yǒ likozala libótá linéne.
Roma LinVB 4:19  Abaráma ayambí, abétí ntembe té, atâ amóní ’te akómí penepene na kokúfa, alingákí ákokisa mibú monkámá, mpé Sára akokákí kobóta lisúsu té.
Roma LinVB 4:20  Abaráma andimí elakó ya Nzámbe, abétí ntembe té, ayambí sé boyambi, mpé boyambi bwa yě bopésí yě ngúyá ya kokúmisa Nzámbe.
Roma LinVB 4:21  Andimí sôló ’te Nzámbe azalí na ngúyá ya kokokisa maye alakélákí.
Roma LinVB 4:22  Yangó wâná Nzámbe akómísí yě moto wa bosémbo o míso ma yě.
Roma LinVB 4:23  Awa bakomí o Minkandá ’te Nzámbe andimí yě mpô ya boyambi bwa yě, bakomí bôngó bobélé mpô ya yě mǒkó té,
Roma LinVB 4:24  kasi mpô ya bísó lokóla ; tokokóma bato ba bosé­mbo sókó toyambí Nzámbe, Oyo asékwísí Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
Roma LinVB 4:25  Bakabákí Yézu mpô ya masúmu ma bísó mpé asékwí mpô tókóma bato ba bosémbo.