Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ROMANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 6
Roma LinVB 6:1  Bôngó, tóloba ’te tótíkala na masúmu mpô ’te Nzámbe ábakisela bísó ngrásya ? Sókí moké té !
Roma LinVB 6:2  Mpó ya maye matálí masúmu, tosílí tokúfí. Ndéngé níni tokokí kolanda mangó lisúsu ?
Roma LinVB 6:3  Bínó mǒkó boyébí malámu ’te mokolo tokúlákí batísimo ya Yézu Krístu, tokúlákí yangó mpô tókúfa na yě elo­ngó.
Roma LinVB 6:4  Bôngó, sókó na batísimo tokúfákí na yě elongó, tokundámákí mpé na yě elongó. Kasi áwa Tatá asékwísí Krístu na ngúyá ya yě, tosengélí kokóma na ezalela ya bomoi bwa sika.
Roma LinVB 6:5  Zambí lokóla tosangání na Krístu, áwa tokúfí lokóla yě akúfákí, tokosangana mpé na yě o nsékwa ya yě.
Roma LinVB 6:6  Tóyéba malámu : babomákí bomoto bwa bísó bwa kala o kurúse na yě elongó, mpô ’te nzóto ya bísó ya masúmu ékúfa mpé tózala baómbo ba lisúmu lisúsu té.
Roma LinVB 6:7  Ya sôló, moto akúfí azalí moómbo wa lisúmu lisúsu té.
Roma LinVB 6:8  Lokóla tokúfí na Krístu elongó, toyambí ’te tozalí na bomoi elongó na yě.
Roma LinVB 6:9  Toyébí ’te Krístu óyo asílí asékwí akokúfa lisúsu té, liwá likokí kosála yě lisúsu elóko té.
Roma LinVB 6:10  Na liwá lya yě asúkísí bokási bwa masúmu na mbala yǒ kó sékô. Bomoi bozalí na yě sikáwa bozalí bomoi sôló o míso ma Nzámbe.
Roma LinVB 6:11  Bínó bobélé bôngó : bóyéba ’te bosílí bokúfí o maye matálí masúmu. Kasi o míso ma Nzámbe bozalí na bomoi, mpô bozalí lisangá na Yézu Krístu.
Roma LinVB 6:12  Nzóto ya bínó, eye esengélí kokúfa, ékóma lisúsu moómbo wa lisú­mu té, bôngó bótósa lisúsu mpósá ebé ya nzóto té.
Roma LinVB 6:13  Bóndima lisúsu té ’te nzóto ya bínó ésálela mabé na lisúmu, kasi bómíbonzela Nzámbe lokóla bato babíkí o liwá ; bósála ’te nzóto ya bínó ésálela bosémbo mpô ya Nzámbe.
Roma LinVB 6:14  Lisúmu likokí kozala mokonzi wa bínó té, mpô bozalí baómbo ba Mobéko té, kasi bána ba bolingo ba Nzámbe.
Roma LinVB 6:15  Bôngó áwa tozalí lisúsu baó­mbo ba Mobéko té, kasi bána ba bolingo ba Nzámbe, tóloba ’te tokokí kosála masúmu ? Sókí moké té !
Roma LinVB 6:16  Boyébí ’te sókó bomípésí na moto mpô ya kosálela yě, bokómí baómbo ba moto óyo bozalí kotósa : sókó botósí lisúmu, bokosúka o liwá ; sókó botósí Nzámbe, bokokóma bato ba bosémbo o míso ma Yě.
Roma LinVB 6:17  Tótóndo Nzámbe, mpô bozalí lisúsu baómbo ba lisúmu té, kasi sikáwa bokómí kotósa na motéma mǒkó matéya ma sôló maye batéyákí bínó.
Roma LinVB 6:18  Bolongwí o boómbo bwa masúmu, sikáwa bokómí kosálela bosémbo.
Roma LinVB 6:19  Awa nazalí koloba na bato bataú, nakotángela bínó ndakisa ya bísó bato. Libosó bozalákí kokaba nzóto ya bínó bǒ baó­mbo na makambo ma bosóni ; maka­mbo ma bínó mazángákí bosémbo, koleka ndelo. Bómípésa sikáwa na bosémbo, mpô ’te bókóma basántu.
Roma LinVB 6:20  Ntángo bozalákí baómbo ba lisúmu, bozalákí na lotómo la kolanda nzelá ya bosémbo té.
Roma LinVB 6:21  Bozalákí kosála makambo mazalí koyókisa bínó nsóni sikáwa. Bôngó bozwákí níni ? Nsúka ya mangó, sé liwá.
Roma LinVB 6:22  Kasi sikáwa bolongwí o boómbo bwa lisúmu mpé bokómí basáleli ba Nzámbe, bozwí bôngó likabo lya bosántu ; mpé na nsúka bokozwa bomoi bwa lobíko.
Roma LinVB 6:23  Sôló, lifúta lya lisúmu, sé liwá ; kasi likabo Nzámbe akopésaka : bomoi bwa sékô mpô ya Krístu Yézu Mokonzi wa bísó.