ROMANS
Chapter 16
Roma | LinVB | 16:1 | Naséngí bínó mpô ya ndeko mwásí wa bísó Fébe, diákono-mwásí wa Eklézya ya Kenkréa : | |
Roma | LinVB | 16:2 | bóyamba yě mpô ya Mokonzi, lokóla bato ba Nzámbe bakosálaka ; bósálisa yě mpé o makambo mánso akokí kosénge bínó. Yě mǒkó asálísákí bakrístu baíké, asálísákí ngáí mpé. | |
Roma | LinVB | 16:3 | Bópésa losáko na Príska mpé na Akwíla, baye basálísákí ngáí o mosálá mwa Krístu Yézu : | |
Roma | LinVB | 16:4 | bangó babángákí liwá té mpô ya kobíkisa ngáí. Bobélé ngáí mǒkó té nasengélí kotóndo bangó, bandeko bánso ba Biklézya bya bikólo bisúsu basengélí kosála bôngó. | |
Roma | LinVB | 16:5 | Bópésa mpé losáko na bandeko bánso bakosanganaka o ndáko ya bangó. Losáko na Epenéto, wa ngáí wa bolingo, yě moto wa libosó o Azía óyo ayambákí Krístu. | |
Roma | LinVB | 16:7 | Losáko na Androníko mpé na Yúniasi, bandeko ba ngáí tozalákí na bangó o bolóko : bazalí batéyi ba sôló, mpé bakómákí bakrístu libosó lya ngáí. | |
Roma | LinVB | 16:9 | Losáko na Urbáno, móníngá wa ngáí o mosálá mwa Krístu, mpé na Stákis, móníngá wa ngáí wa bolingo. | |
Roma | LinVB | 16:10 | Losáko na Apélo, óyo alakísákí ’te azalí moto wa Krístu sôló. Losáko na bato bánso ba libótá lya Aristóbulo. | |
Roma | LinVB | 16:12 | Losáko na Triféna mpé na Trifóza, bato ba mpíkó o mosálá mwa Mokonzi. Losáko na ndeko mwásí Pérsis, óyo amílembísákí míngi mpô ya Mokonzi. | |
Roma | LinVB | 16:14 | Losáko na Asinekríto, Flégon, Ermes, Patróba, Ermas mpé na bandeko bazalí epái ya bangó. | |
Roma | LinVB | 16:15 | Losáko na Filólogo, na Yúlia, na Nério mpé na ndeko mwásí wa yě, na Olímpas mpé na bakrístu bánso bazalí epái ya bangó. | |
Roma | LinVB | 16:17 | Nabóndélí bínó, bandeko, bókéba na bato babóyí matéya batéyákí bínó mpé balingí kokabola bato. Bókíma bangó. | |
Roma | LinVB | 16:18 | Bakosálelaka Mokonzi wa bísó Krístu té, bakokanisaka sé bilóko bya kolía ; na maloba ma sukáli mpé ma boléti bakokósaka bato bayékólá té. | |
Roma | LinVB | 16:19 | Bato bánso bayébí bóníbóní bokotósaka Nzámbe, yangó wâná nakosepelaka na bínó míngi, kasi nalingí kokébisa bínó : bóyéba níni ezalí malámu, bóyéba mpé kobóya makambo mabé. | |
Roma | LinVB | 16:20 | Nzámbe wa bobóto ásálisa bínó bónyata Sátana nokí. Ngrásya ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu ézala na bínó ! | |
Roma | LinVB | 16:21 | Timotéo, móníngá wa ngáí wa mosálá, atíndélí bínó losáko, ná mpé bandeko ba ngáí Lúsio, Yazon na Sosípater. | |
Roma | LinVB | 16:23 | Gáyo mpé atíndélí bínó losáko, yě moto ayambákí ngáí o ndáko ya yě ; akoyambaka mpé bato bánso ba Eklézya. Lisúsu Erásto, moto akobómbaka mosolo mwa mbóka, ná mpé ndeko wa bísó Kwárto batíndélí bínó losáko. ( | |
Roma | LinVB | 16:25 | Nkémbo na Nzámbe, óyo azalí na ngúyá ya koléndisa bínó engébéné na Nsango Elámu ya Yézu Krístu eye nakosangelaka. Yangó ndé mobómbamo mwa Nzámbe moyébání sikáwa : út’o bileko na bileko bato bayébákí mwangó té, | |
Roma | LinVB | 16:26 | kasi sikáwa Nzámbe alakísí mwangó. Lokóla ekomámí o Minkandá mya baproféta, Nzámbe atíndí ’te báyébisa mwangó na bato ba bikólo bínso, bándima mpé bátósa mwangó. | |