Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
ROMANS
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Prev Up Next
Chapter 9
Roma LinVB 9:1  Maye nakoyébisa bínó mazalí ma sôló. Krístu ayébí ’te nazalí kokósa té, Elímo ayébísí ngáí mangó o motéma.
Roma LinVB 9:2  Nazalí na mawa míngi, nakoyókaka motéma mpási ntángo ínso.
Roma LinVB 9:3  Mbele epusí malámu Nzámbe ápésa ngáí mǒkó etúmbu, nákabwana mosíká na Krístu mpô ya bandeko ba ngáí, baye bazalí na ngáí ekólo yǒ kó.
Roma LinVB 9:4  Bazalí bato ba Israél, Nzámbe akómísákí bangó bána ba yě, alakísákí bangó nkémbo ya yě. Akátákí na bangó bondeko mpé apésákí bangó mibéko. Alakísákí bangó milúlú mya losámbo la sôló, apésákí bangó elakó ya libíkí.
Roma LinVB 9:5  Bazali bána ba bankóko ba bísó ba kala. Na nsima Krístu, óyo alekí bínso, abótámí o libótá lya bangó. Bákúmisa yě Nzámbe o bileko bínso sékô ! Amen.
Roma LinVB 9:6  Nzókandé liloba lya Nzámbe likeí mpámba té : bána ba Israél baponómí bánso na Nzámbe té.
Roma LinVB 9:7  Mpé atâ baye bánso babótámí o libótá lya Abaráma bazalí bána ba yě té, zambí ekomámí : Bobélé baye bazalí bána ba Izáka, bangó bato bazalí bána ba yǒ.
Roma LinVB 9:8  Elakísí ’te bána bánso ba Abaráma bazalí bána ba Nzámbe té, bobélé bána baponómí mpô ya elakó bazalí bána ba Nzámbe.
Roma LinVB 9:9  Nzámbe alakélákí Abaráma na maloba maye : Nakoyâ o ntángo ekokí, mpé Sára akobóta mwána mobáli.
Roma LinVB 9:10  Mpé esílí naíno té : Bána babáli bábalé baye Rebéka abótákí, bazalákí bána ba tatá mǒkó Izáka, óyo azalí nkóko wa bísó.
Roma LinVB 9:11  Atâ bána babótámákí naíno té, atâ basálákí naíno malámu tǒ mabé té, Nzámbe alobákí na Rebéka : Mwána wa libosó akosálela mozimi wa yě.
Roma LinVB 9:12  Nzámbe alakísí bôngó ’te akoponoko bobélé lokóla yě mǒkó alingí. Akolukaka bobélé baye yě mǒkó abyángí, akotálaka misálá mya bangó té.
Roma LinVB 9:13  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Nali­ngákí Yakób leká Ezáu.
Roma LinVB 9:14  Bôngó tóloba ’te Nzámbe azá­ngí bosémbo ? Sókí moké té !
Roma LinVB 9:15  Mpô alobákí na Móze : Oyo nalingí koyókela yě mawa, nakoyókela yě mawa ; sókó nalingí kosála moto malámu, nakosála yě malámu.
Roma LinVB 9:16  Yangó elekí maye moto akokí kolinga tǒ kosála, etálí sé Nzámbe óyo akoyókelaka bato mawa.
Roma LinVB 9:17  Eko­mámí o Minkandá Misántu ’te Nzámbe alobákí na Fárao boye : Natíákí yǒ mokonzi bobélé mpô ’te názwa nzelá ya kolakisa bokási bwa ngáí ; bôngó bato bákúmisa nkómbó ya ngáí o nsé mobimba.
Roma LinVB 9:18  Yangó wâná, sókó Nzámbe alingí, ayókélí moto mawa ; sókó alingí, akómísí yě motó makási.
Roma LinVB 9:19  Mbele okotúna ngáí : Sókó ezalí bôngó, ntína níni Nzámbe akosilikaka ? Náni akokí kobóya maye Nzá­mbe alingí ?
Roma LinVB 9:20  Moto, yǒ ndé náni ’te ótía ntembe na Nzámbe ? Elóko yǒ osálí ekokí ndé kotúna yǒ : Mpô níni osálí ngáí bôngó ?
Roma LinVB 9:21  Kanísá mosáli mbéki : akosálaka mbéki ya monzele tǒ mbéki ya mpá­mba, bôngó akokí kokémbisa yangó té lokóla yě mǒkó alingí ?
Roma LinVB 9:22  Nzámbe alingákí kolakisa nkándá mpé ngúyá ya yě : mikolo míngi mpenzá akangákí motéma na botáli mbéki iye ikómí ya kobwáka.
Roma LinVB 9:23  Asálákí bôngó mpô ya kolakisa nkémbo ya yě ndelo té na mbéki iye abongísákí út’o kala mpô ya koké­mbisa yangó.
Roma LinVB 9:24  Mbéki iye izalí bísó bato tobyángámí o ntéi ya ba-Yúda, kasi o ntéi ya bikólo bisúsu lokóla.
Roma LinVB 9:25  Elobámí bôngó o búku ya Ozéa : Ekólo eye ezalákí ya ngáí té, na­kotá­nga yangó ekólo ya ngáí, mpé baye na­zalákí kolinga té, nakolinga bangó.
Roma LinVB 9:26  Mpé o esíká bayébísákí bangó : « Bozalí bato ba ngáí té », bakotánga bangó bána ba Nzámbe wa bomoi.
Roma LinVB 9:27  Mpé Izáya asakólí mpô ya Israél : Atâ bána ba Israél bazalákí míngi lokóla zélo lya libóngo lya mbú, sé mwâ ndámbo ya bangó bakobíka ;
Roma LinVB 9:28  zambí Mokonzi akokokisa liloba lya yě o mo­kili, mobimba mpé nokí.
Roma LinVB 9:29  Mpé lokóla Izáya alobákí libosó : Sókó Mokonzi wa bokási bónso atíkéláká bísó mwâ ndámbo ya bána té, mbele tokómáká lokóla bato ba Sódoma, mbele tozaláká lokóla bato ba Gómora.
Roma LinVB 9:30  Bôngó, tóloba níni ? Bato ba bikólo bisúsu baye bazalákí koluka ’te bákóma bato ba bosémbo o míso ma Nzámbe, basílí bakómí bato ba bosémbo mpô ya boyambi.
Roma LinVB 9:31  Kasi ba-Israél bazalákí koluka Mobéko mokokí kokómisa bangó bato ba bosémbo, bakokísí ntína ya Mobéko môná té.
Roma LinVB 9:32  Ntína níni ? Mpô bazalákí kolanda nzelá ya bosémbo té ; bakanísákí ’te bakokóma bato ba bosémbo na botósi Mobéko. Batútákí libakú na libángá liye likokwêisaka bato,
Roma LinVB 9:33  lokóla ekomámí : Nakotía libángá o Síon, libá­ngá linéne likokwêisaka bato. Kasi moto akotía motéma na lyangó, akoyóka nsóni té.