ROMANS
Chapter 6
Roma | LinVB | 6:1 | Bôngó, tóloba ’te tótíkala na masúmu mpô ’te Nzámbe ábakisela bísó ngrásya ? Sókí moké té ! | |
Roma | LinVB | 6:3 | Bínó mǒkó boyébí malámu ’te mokolo tokúlákí batísimo ya Yézu Krístu, tokúlákí yangó mpô tókúfa na yě elongó. | |
Roma | LinVB | 6:4 | Bôngó, sókó na batísimo tokúfákí na yě elongó, tokundámákí mpé na yě elongó. Kasi áwa Tatá asékwísí Krístu na ngúyá ya yě, tosengélí kokóma na ezalela ya bomoi bwa sika. | |
Roma | LinVB | 6:5 | Zambí lokóla tosangání na Krístu, áwa tokúfí lokóla yě akúfákí, tokosangana mpé na yě o nsékwa ya yě. | |
Roma | LinVB | 6:6 | Tóyéba malámu : babomákí bomoto bwa bísó bwa kala o kurúse na yě elongó, mpô ’te nzóto ya bísó ya masúmu ékúfa mpé tózala baómbo ba lisúmu lisúsu té. | |
Roma | LinVB | 6:9 | Toyébí ’te Krístu óyo asílí asékwí akokúfa lisúsu té, liwá likokí kosála yě lisúsu elóko té. | |
Roma | LinVB | 6:10 | Na liwá lya yě asúkísí bokási bwa masúmu na mbala yǒ kó sékô. Bomoi bozalí na yě sikáwa bozalí bomoi sôló o míso ma Nzámbe. | |
Roma | LinVB | 6:11 | Bínó bobélé bôngó : bóyéba ’te bosílí bokúfí o maye matálí masúmu. Kasi o míso ma Nzámbe bozalí na bomoi, mpô bozalí lisangá na Yézu Krístu. | |
Roma | LinVB | 6:12 | Nzóto ya bínó, eye esengélí kokúfa, ékóma lisúsu moómbo wa lisúmu té, bôngó bótósa lisúsu mpósá ebé ya nzóto té. | |
Roma | LinVB | 6:13 | Bóndima lisúsu té ’te nzóto ya bínó ésálela mabé na lisúmu, kasi bómíbonzela Nzámbe lokóla bato babíkí o liwá ; bósála ’te nzóto ya bínó ésálela bosémbo mpô ya Nzámbe. | |
Roma | LinVB | 6:14 | Lisúmu likokí kozala mokonzi wa bínó té, mpô bozalí baómbo ba Mobéko té, kasi bána ba bolingo ba Nzámbe. | |
Roma | LinVB | 6:15 | Bôngó áwa tozalí lisúsu baómbo ba Mobéko té, kasi bána ba bolingo ba Nzámbe, tóloba ’te tokokí kosála masúmu ? Sókí moké té ! | |
Roma | LinVB | 6:16 | Boyébí ’te sókó bomípésí na moto mpô ya kosálela yě, bokómí baómbo ba moto óyo bozalí kotósa : sókó botósí lisúmu, bokosúka o liwá ; sókó botósí Nzámbe, bokokóma bato ba bosémbo o míso ma Yě. | |
Roma | LinVB | 6:17 | Tótóndo Nzámbe, mpô bozalí lisúsu baómbo ba lisúmu té, kasi sikáwa bokómí kotósa na motéma mǒkó matéya ma sôló maye batéyákí bínó. | |
Roma | LinVB | 6:19 | Awa nazalí koloba na bato bataú, nakotángela bínó ndakisa ya bísó bato. Libosó bozalákí kokaba nzóto ya bínó bǒ baómbo na makambo ma bosóni ; makambo ma bínó mazángákí bosémbo, koleka ndelo. Bómípésa sikáwa na bosémbo, mpô ’te bókóma basántu. | |
Roma | LinVB | 6:20 | Ntángo bozalákí baómbo ba lisúmu, bozalákí na lotómo la kolanda nzelá ya bosémbo té. | |
Roma | LinVB | 6:21 | Bozalákí kosála makambo mazalí koyókisa bínó nsóni sikáwa. Bôngó bozwákí níni ? Nsúka ya mangó, sé liwá. | |
Roma | LinVB | 6:22 | Kasi sikáwa bolongwí o boómbo bwa lisúmu mpé bokómí basáleli ba Nzámbe, bozwí bôngó likabo lya bosántu ; mpé na nsúka bokozwa bomoi bwa lobíko. | |