WISDOM
Chapter 5
Wisd | LinVB | 5:1 | Kasi moto semba akoteleme na elikya enene o miso ma bato bazalaki konyokolo ye, baye bazalaki koseke mpasi ya ye. | |
Wisd | LinVB | 5:2 | Bato bakomono ye, bakoyoka nsomo, bakokamwa ndenge abiki, awa bakanisaki bongo soki te. | |
Wisd | LinVB | 5:4 | « Tala wana moto oyo biso tozalaki koseke, oyo biso bazoba tokomisaki eloko ya nsoni o miso ma bato. Tokanisaki ’te bomoi bwa ye bozali se bolema, mpe totalaki liwa lya ye lokola likambo lya nsoni. | |
Wisd | LinVB | 5:5 | Ndenge nini atangemi sikawa o kati ya bana ba Nzambe, mpe boniboni akoti sikawa o lisanga lya basantu ? | |
Wisd | LinVB | 5:6 | Solo, tobungi mpe totiki nzela ya bosolo, moi mwa bosembo mongengeli biso te, mpe mwinda mwa mwese motaneli biso te. | |
Wisd | LinVB | 5:7 | Tomilembisi na makambo ma bobomi mazangi bosembo, tokatisi eliki, esika nzela ezali te, kasi toyebaki nzela ya Mokonzi te ! | |
Wisd | LinVB | 5:8 | Lofundo la biso lopesi biso litomba nini ? Tofundi na nkita ya biso, kasi yango ipesi biso eloko nini ? | |
Wisd | LinVB | 5:10 | Manso maleki lokola masuwa mapasoli mbonge ya mai, mpe moto moko te akoki komono esika maleki, to nzela eye epaswanaki o kati ya mbonge. | |
Wisd | LinVB | 5:11 | Se lokola ndeke ekopimbwaka o likolo mpe ekotika elembo o nzela ata yoko te : ebeti mompepe na mapapu ma yango, epasoli mompepe na makasi ma bopimbwi bwa yango, ekatisi likolo na nsala ya yango, kasi esika eleki, ekoki komonono lisusu te. | |
Wisd | LinVB | 5:12 | Se lokola likula lipasoli nzela o kati ya mompepe, kasi mompepe mokozonga noki o esika ya kala, mpe bongo nzela ya likula ekomonono lisusu te. | |
Wisd | LinVB | 5:13 | Biso se bongo : awa tobotamaki mpe tosili towei, totiki elembo ya misala milamu ata yoko te, liwa likweli biso ntango tozalaki kosala mabe. » | |
Wisd | LinVB | 5:14 | Elikya ya moto aboyi Nzambe ezali lokola mpumbulu ebendami na mompepe, lokola fulu ya mbonge ekosila na ekumbaki, lokola milinga mipanzani na mompepe, ekolimwa lokola mompaya afandaki se mokolo moko. | |
Wisd | LinVB | 5:15 | Kasi basemba bakoumela seko, bakozwa lifuta lya bango o maboko ma Mokonzi, mpe Nzambe wa bokasi bonso akopanganaka na bango. | |
Wisd | LinVB | 5:16 | Yango wana bakozwa bokonzi bwa nkembo mpe enkoti ya lokumu o maboko ma Mokonzi : akobatela bango na loboko la ye la mobali, mpe akokengele bango na nguba ya ye. | |
Wisd | LinVB | 5:17 | Ebuneli ya Nzambe, nde zuwa ya bolingi bwa ye, akopesa bato bibuneli o maboko mpo ya kotumbola banguna ba ye. | |
Wisd | LinVB | 5:18 | Molato mwa ye o etumba, nde bosembo bwa ye, enkoti ya ye ya ebende, nde nguya ya ye ya kokata makambo. | |
Wisd | LinVB | 5:20 | Mompanga mwa ye, nde nkanda ya ye enene ; elongo na ye bikelamo binso bikobunda etumba na bazangi mayele. | |
Wisd | LinVB | 5:21 | Minkalali mya ye mikozokisa lokola makula, lokola moto abombami o mampata mpe abendi litimbo. | |
Wisd | LinVB | 5:22 | Bilingongo ekobwakela bango matandala na nkele, mbonge ya mbu ikotombokela bango, mpe bibale bikozindisa bango, mawa te. | |